Surah Al-Furqaan — The Criterion

Surah Al-Furqaan (The Criterion) is chapter 25 of the Quran, with 77 verses. This page presents the Arabic text with a Lingala translation, verse by verse.

تَبَارَكَ ٱلَّذِي نَزَّلَ ٱلۡفُرۡقَانَ عَلَىٰ عَبۡدِهِۦ لِيَكُونَ لِلۡعَٰلَمِينَ نَذِيرًا

Nkembo naye oyo akitisa bososoli epai na mowumbu naye, mpo azala mokebisi тропа mokili mobimba

Ayah 1

ٱلَّذِي لَهُۥ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَلَمۡ يَتَّخِذۡ وَلَدࣰ ا وَلَمۡ يَكُن لَّهُۥ شَرِيكࣱ فِي ٱلۡمُلۡكِ وَخَلَقَ كُلَّ شَيۡءࣲ فَقَدَّرَهُۥ تَقۡدِيرࣰ ا

Oyo bokonzi ya likolo mpe ya nsé ezali yaye, mpe amipesaka mwana te, mpe akoki kozala na mosangisi te okati ya bokonzi, mpe akela biloko binso, mpe apesa yango bokoki bwa semba

Ayah 2

وَٱتَّخَذُواْ مِن دُونِهِۦٓ ءَالِهَةࣰ لَّا يَخۡلُقُونَ شَيۡـࣰٔ ا وَهُمۡ يُخۡلَقُونَ وَلَا يَمۡلِكُونَ لِأَنفُسِهِمۡ ضَرࣰّ ا وَلَا نَفۡعࣰ ا وَلَا يَمۡلِكُونَ مَوۡتࣰ ا وَلَا حَيَوٰةࣰ وَلَا نُشُورࣰ ا

Mpe batiki ye bazui banzambe misusu baye bakelaka eloko te, po bango moko bakelama, mpe bazali na makoki ya komisala bolamu te mpe komisala mabe te, mpe basimbi liwa na maboko na bango te, mpe bomoyi te, mpe bazali na makoki ya kosekwisa te (o sima ya liwa)

Ayah 3

وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّآ إِفۡكٌ ٱفۡتَرَىٰهُ وَأَعَانَهُۥ عَلَيۡهِ قَوۡمٌ ءَاخَرُونَۖ فَقَدۡ جَآءُو ظُلۡمࣰ ا وَزُورࣰ ا

Mpe baye bapengwa bazali koloba ete: Oyo ezali sé lokuta monene oyo ayei na yango, (ye Muhammad) mpe bato basusu basalisi ye na yango, ya solo bango basili kobuka lokuta mpe na libubi

Ayah 4

وَقَالُوٓاْ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ ٱكۡتَتَبَهَا فَهِيَ تُمۡلَىٰ عَلَيۡهِ بُكۡرَةࣰ وَأَصِيلࣰ ا

Mpe balobi ezali nde masapo ya kala oyo asengaki bakomela ye bazalaki kotangela ye yango tongo na pokwa

Ayah 5

قُلۡ أَنزَلَهُ ٱلَّذِي يَعۡلَمُ ٱلسِّرَّ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ إِنَّهُۥ كَانَ غَفُورࣰ ا رَّحِيمࣰ ا

Loba: Akitisa yango oyo ayebi sekele ya likolo na mabele. Ya soló, ye azali molimbisi atonda mawa

Ayah 6

وَقَالُواْ مَالِ هَٰذَا ٱلرَّسُولِ يَأۡكُلُ ٱلطَّعَامَ وَيَمۡشِي فِي ٱلۡأَسۡوَاقِ لَوۡلَآ أُنزِلَ إِلَيۡهِ مَلَكࣱ فَيَكُونَ مَعَهُۥ نَذِيرًا

Mpe bazali koloba: Ndenge nini motindami azali kolia biloko mpe azali kotambola okati ya bazando? Mpona nini bakitiselaki epai naye anzelu te mpona azala mokebisi elongo naye

Ayah 7

أَوۡ يُلۡقَىٰٓ إِلَيۡهِ كَنزٌ أَوۡ تَكُونُ لَهُۥ جَنَّةࣱ يَأۡكُلُ مِنۡهَاۚ وَقَالَ ٱلظَّٰلِمُونَ إِن تَتَّبِعُونَ إِلَّا رَجُلࣰ ا مَّسۡحُورًا

To, babwakela ye bomengo, to azala na bilanga mpo aliaka na yango. Mpe babubi balobi: Oyo bozali kolanda azali ya kolokama

Ayah 8

ٱنظُرۡ كَيۡفَ ضَرَبُواْ لَكَ ٱلۡأَمۡثَٰلَ فَضَلُّواْ فَلَا يَسۡتَطِيعُونَ سَبِيلࣰ ا

Tala lolenge bapesi yo bandakisa, mpe bamibungisi bakoki kozua nzela te (nzela ya bokambami epai ya Allah)

Ayah 9

تَبَارَكَ ٱلَّذِيٓ إِن شَآءَ جَعَلَ لَكَ خَيۡرࣰ ا مِّن ذَٰلِكَ جَنَّٰتࣲ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ وَيَجۡعَل لَّكَ قُصُورَۢا

Nkembo naye oyo soki alingi akotiela yo bolamu ebele koleka oyo wana, (soki alingi andimela yo bolamu okati ya) bilanga eye ezali koleka o nsé na yango mingala, mpe akotiela yo bandako ya kitoko

Ayah 10

بَلۡ كَذَّبُواْ بِٱلسَّاعَةِۖ وَأَعۡتَدۡنَا لِمَن كَذَّبَ بِٱلسَّاعَةِ سَعِيرًا

Kaši baboyi kondima na mokolo ya suka, na yango tolengeli moto ya makasi тропа baye bazui yango na lokuta

Ayah 11

إِذَا رَأَتۡهُم مِّن مَّكَانِۭ بَعِيدࣲ سَمِعُواْ لَهَا تَغَيُّظࣰ ا وَزَفِيرࣰ ا

Soki yango emoni bango na mosika, babandi koyoka kotoka mpe lolaka na yango

Ayah 12

وَإِذَآ أُلۡقُواْ مِنۡهَا مَكَانࣰ ا ضَيِّقࣰ ا مُّقَرَّنِينَ دَعَوۡاْ هُنَالِكَ ثُبُورࣰ ا

Mpe tango bakobwakama okati na yango na esika ya moke, maboko makangami na sima ya bakingo, na tango wana bakosenge ete bakufa mpe babebisama mbala moko

Ayah 13

لَّا تَدۡعُواْ ٱلۡيَوۡمَ ثُبُورࣰ ا وَٰحِدࣰ ا وَٱدۡعُواْ ثُبُورࣰ ا كَثِيرࣰ ا

Lelo bosenga liwa mbala moko te, kasi bosenga yango mbala ebele

Ayah 14

قُلۡ أَذَٰلِكَ خَيۡرٌ أَمۡ جَنَّةُ ٱلۡخُلۡدِ ٱلَّتِي وُعِدَ ٱلۡمُتَّقُونَۚ كَانَتۡ لَهُمۡ جَزَآءࣰ وَمَصِيرࣰ ا

Loba: Boye oyo ezali malamu to Iola ya libela eye elakama тропа babangi. Yango ezali lifuta mpe esika ya bozongi na bango ya suka

Ayah 15

لَّهُمۡ فِيهَا مَا يَشَآءُونَ خَٰلِدِينَۚ كَانَ عَلَىٰ رَبِّكَ وَعۡدࣰ ا مَّسۡـُٔولࣰ ا

Bakozua nyoso bazali na yango mposa, libela na libela kati na yango. Wana ezali solo elaka ya Nkolo wayo eye ekozangaka te

Ayah 16

وَيَوۡمَ يَحۡشُرُهُمۡ وَمَا يَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ فَيَقُولُ ءَأَنتُمۡ أَضۡلَلۡتُمۡ عِبَادِي هَٰٓؤُلَآءِ أَمۡ هُمۡ ضَلُّواْ ٱلسَّبِيلَ

Mpe mokolo moye (Allah) akosangisa bango elongo na maye bazalaki kobondela na kotika Allah, akotuna bango: Boye bino nde bobungisaki bawumbu na ngai oyo to bango moko babungaki nzela

Ayah 17

قَالُواْ سُبۡحَٰنَكَ مَا كَانَ يَنۢبَغِي لَنَآ أَن نَّتَّخِذَ مِن دُونِكَ مِنۡ أَوۡلِيَآءَ وَلَٰكِن مَّتَّعۡتَهُمۡ وَءَابَآءَهُمۡ حَتَّىٰ نَسُواْ ٱلذِّكۡرَ وَكَانُواْ قَوۡمَۢا بُورࣰ ا

Bakolobaka: Lokumu nayo, esengeli na biso te kotika yo mpe tozua bakonzi babateli basusu, kasi opesaki bango mpe batata na bango bomengo na bisengo kino babosani bokundoli (kurani), mpe bazalaki nde bato ya kobunga

Ayah 18

فَقَدۡ كَذَّبُوكُم بِمَا تَقُولُونَ فَمَا تَسۡتَطِيعُونَ صَرۡفࣰ ا وَلَا نَصۡرࣰ اۚ وَمَن يَظۡلِم مِّنكُمۡ نُذِقۡهُ عَذَابࣰ ا كَبِيرࣰ ا

Bawangani bino na maye bozali koloba, mpe bokozua esika ya kokima te mpe lisungi te. Mpe oyo akobuba o kati na bino, tokomekisa ye etumbu ya monene

Ayah 19

وَمَآ أَرۡسَلۡنَا قَبۡلَكَ مِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ إِلَّآ إِنَّهُمۡ لَيَأۡكُلُونَ ٱلطَّعَامَ وَيَمۡشُونَ فِي ٱلۡأَسۡوَاقِۗ وَجَعَلۡنَا بَعۡضَكُمۡ لِبَعۡضࣲ فِتۡنَةً أَتَصۡبِرُونَۗ وَكَانَ رَبُّكَ بَصِيرࣰ ا

Mpe totindaki liboso nayo batindami, bazalaki kolia bilei mpe kotambola na bazando, mpe totiaki basusu bazala elembo ya komekama ya baninga na bango, boye bokoyika mpiko? Kasi Nkolo wayo azali kornona

Ayah 20

۞وَقَالَ ٱلَّذِينَ لَا يَرۡجُونَ لِقَآءَنَا لَوۡلَآ أُنزِلَ عَلَيۡنَا ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ أَوۡ نَرَىٰ رَبَّنَاۗ لَقَدِ ٱسۡتَكۡبَرُواْ فِيٓ أَنفُسِهِمۡ وَعَتَوۡ عُتُوࣰّ ا كَبِيرࣰ ا

Mpe baye bazali kolikia na elaka na biso te, bazali koloba: Soki ata bakitiselaka biso ba anzelu to mpe tomona Nkolo wa biso? Basili komisalela lolendo, mpe balekisi ndelo monene тропа komikumisa

Ayah 21

يَوۡمَ يَرَوۡنَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ لَا بُشۡرَىٰ يَوۡمَئِذࣲ لِّلۡمُجۡرِمِينَ وَيَقُولُونَ حِجۡرࣰ ا مَّحۡجُورࣰ ا

Mokolo oyo bato mabe bakomona ba anzelu ekozala sango malamu te, (ba anzelu) bakolobaka na batomboki ete: Epekisami; nzela ezali te, (epekisami na bino kozua sango ya malamu тропа kokota na lola)

Ayah 22

وَقَدِمۡنَآ إِلَىٰ مَا عَمِلُواْ مِنۡ عَمَلࣲ فَجَعَلۡنَٰهُ هَبَآءࣰ مَّنثُورًا

Mpe tokozua maye basalaki mpe tokomisi yango putulu ezali kopumbwa

Ayah 23

أَصۡحَٰبُ ٱلۡجَنَّةِ يَوۡمَئِذٍ خَيۡرࣱ مُّسۡتَقَرࣰّ ا وَأَحۡسَنُ مَقِيلࣰ ا

Mokolo wana bato ya lola bakozalaka na bosepeli mpe na bisika ya kitoko mpe bopemi bolamu

Ayah 24

وَيَوۡمَ تَشَقَّقُ ٱلسَّمَآءُ بِٱلۡغَمَٰمِ وَنُزِّلَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ تَنزِيلًا

Mpe mokolo moye likolo likopasukaka na mapata, mpe ba anzelu bakokitaka

Ayah 25

ٱلۡمُلۡكُ يَوۡمَئِذٍ ٱلۡحَقُّ لِلرَّحۡمَٰنِۚ وَكَانَ يَوۡمًا عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ عَسِيرࣰ ا

Mokolo wana bokonzi ya sôló ekozalaka sé ya Ar-Rahmân, mpe ekozalaka mokolo ya mpasi тропа bapengwi

Ayah 26

وَيَوۡمَ يَعَضُّ ٱلظَّالِمُ عَلَىٰ يَدَيۡهِ يَقُولُ يَٰلَيۡتَنِي ٱتَّخَذۡتُ مَعَ ٱلرَّسُولِ سَبِيلࣰ ا

Mpe mokolo moye mobubi akomisuaka maboko mibale mpe akolobaka: Soki nalandaka ata nzela ya motindami

Ayah 27

يَٰوَيۡلَتَىٰ لَيۡتَنِي لَمۡ أَتَّخِذۡ فُلَانًا خَلِيلࣰ ا

Eh ngai, mawa na nagi; soki nazuaki songolo te moninga

Ayah 28

لَّقَدۡ أَضَلَّنِي عَنِ ٱلذِّكۡرِ بَعۡدَ إِذۡ جَآءَنِيۗ وَكَانَ ٱلشَّيۡطَٰنُ لِلۡإِنسَٰنِ خَذُولࣰ ا

Asilaki kobungisa ngai mpe atiye ngai mosika na bokundoli tango eyelaki ngai (kurani). Kasi ya sólo, penza satana azali mokosi mpo na moto, (akimaka moto o sima ya komeka ye mpe kobungisa ye)

Ayah 29

وَقَالَ ٱلرَّسُولُ يَٰرَبِّ إِنَّ قَوۡمِي ٱتَّخَذُواْ هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانَ مَهۡجُورࣰ ا

Мре motindami alobi ete: Oh Nkolo wa ngai! Ya soló, bato na ngai basundoli kurani oyo

Ayah 30

وَكَذَٰلِكَ جَعَلۡنَا لِكُلِّ نَبِيٍّ عَدُوࣰّ ا مِّنَ ٱلۡمُجۡرِمِينَۗ وَكَفَىٰ بِرَبِّكَ هَادِيࣰ ا وَنَصِيرࣰ ا

Mpe lolenge wana nde totiyelaki ntoma na ntoma monguna otei ya batomboki, kasi Nkolo wayo akoki тропа bokambami mpe azali mosungi

Ayah 31

وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَوۡلَا نُزِّلَ عَلَيۡهِ ٱلۡقُرۡءَانُ جُمۡلَةࣰ وَٰحِدَةࣰۚ كَذَٰلِكَ لِنُثَبِّتَ بِهِۦ فُؤَادَكَۖ وَرَتَّلۡنَٰهُ تَرۡتِيلࣰ ا

Mpe bapengwi bakolobaka: Mpona nini kurani yango ekitelaki ye mbala moko te? Tokitisaki yango ndenge wana mpona kolendisa motema nayo, mpe tozalaki kotanga yango malamu penza (kotangisa ye kurani mpe koyekola yango na pete)

Ayah 32

وَلَا يَأۡتُونَكَ بِمَثَلٍ إِلَّا جِئۡنَٰكَ بِٱلۡحَقِّ وَأَحۡسَنَ تَفۡسِيرًا

Mpe bakokoka koyela yo lisese moko te sé tokoyela yo bosembo mpe ndimbola na yango ya malamu koleka

Ayah 33

ٱلَّذِينَ يُحۡشَرُونَ عَلَىٰ وُجُوهِهِمۡ إِلَىٰ جَهَنَّمَ أُوْلَٰٓئِكَ شَرࣱّ مَّكَانࣰ ا وَأَضَلُّ سَبِيلࣰ ا

Ba oyo bakosangisamaka na bilongi na bango na moto ya lifelo, bango wana nde bakozala na esika ya mabe mpe libungi ya mosika

Ayah 34

وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا مُوسَى ٱلۡكِتَٰبَ وَجَعَلۡنَا مَعَهُۥٓ أَخَاهُ هَٰرُونَ وَزِيرࣰ ا

Mpe tosilaki kopesa Mûssa buku, mpe topesaki ye ndeko naye Háruna mpo asalisa ye

Ayah 35

فَقُلۡنَا ٱذۡهَبَآ إِلَى ٱلۡقَوۡمِ ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا فَدَمَّرۡنَٰهُمۡ تَدۡمِيرࣰ ا

Mpe tolobaki: Bökende bino mibale epai ya bato oyo baboyaki kondimela mikapo mia biso, sima tobebisaki bango banso. (koboma bango)

Ayah 36

وَقَوۡمَ نُوحࣲ لَّمَّا كَذَّبُواْ ٱلرُّسُلَ أَغۡرَقۡنَٰهُمۡ وَجَعَلۡنَٰهُمۡ لِلنَّاسِ ءَايَةࣰۖ وَأَعۡتَدۡنَا لِلظَّٰلِمِينَ عَذَابًا أَلِيمࣰ ا

Мре bato ya Nûh, tango baboyaki kondimela ba tindami tozindisaki bango mpe totiyaki bango bazala elembo тропа bato, kasi tobombeli babubi etumbu ya makasi

Ayah 37

وَعَادࣰ ا وَثَمُودَاْ وَأَصۡحَٰبَ ٱلرَّسِّ وَقُرُونَۢا بَيۡنَ ذَٰلِكَ كَثِيرࣰ ا

Mpe aad na Thamúd, na bato ya rass, elongo na bato basusu ebele kati kati na bango sé lolenge moko

Ayah 38

وَكُلࣰّ ا ضَرَبۡنَا لَهُ ٱلۡأَمۡثَٰلَۖ وَكُلࣰّ ا تَبَّرۡنَا تَتۡبِيرࣰ ا

Mpe tobetelaki bato banso ndakisa, mpe bango banso tolimwisaki bango na lolenge ya makasi

Ayah 39

وَلَقَدۡ أَتَوۡاْ عَلَى ٱلۡقَرۡيَةِ ٱلَّتِيٓ أُمۡطِرَتۡ مَطَرَ ٱلسَّوۡءِۚ أَفَلَمۡ يَكُونُواْ يَرَوۡنَهَاۚ بَلۡ كَانُواْ لَا يَرۡجُونَ نُشُورࣰ ا

Mpe basilaki koleka o mboka oyo ebetelaki mbula ya mabe, boye bazali kornona yango te? Kasi bazalaki kolikia na mokolo ya lisekwa te

Ayah 40

وَإِذَا رَأَوۡكَ إِن يَتَّخِذُونَكَ إِلَّا هُزُوًا أَهَٰذَا ٱلَّذِي بَعَثَ ٱللَّهُ رَسُولًا

Mpe soki bamoni yo, bazali koseka yo, bazali koloba: Oyo nde oyo Allah atindaki mpo azala motindami

Ayah 41

إِن كَادَ لَيُضِلُّنَا عَنۡ ءَالِهَتِنَا لَوۡلَآ أَن صَبَرۡنَا عَلَيۡهَاۚ وَسَوۡفَ يَعۡلَمُونَ حِينَ يَرَوۡنَ ٱلۡعَذَابَ مَنۡ أَضَلُّ سَبِيلًا

Etikali токе abungisa biso nzela ya banzambe ba biso, soki koyika mpiko na biso te nabango. Kasi mosika te, bakoyeba, ntango bakomona etumbu ete nani abungi nzela koleka

Ayah 42

أَرَءَيۡتَ مَنِ ٱتَّخَذَ إِلَٰهَهُۥ هَوَىٰهُ أَفَأَنتَ تَكُونُ عَلَيۡهِ وَكِيلًا

Boye ozali kornona te moto oyo azui mposa naye nde nzambe naye? Boye yo ozali mobateli ya moto ya motindo oyo

Ayah 43

أَمۡ تَحۡسَبُ أَنَّ أَكۡثَرَهُمۡ يَسۡمَعُونَ أَوۡ يَعۡقِلُونَۚ إِنۡ هُمۡ إِلَّا كَٱلۡأَنۡعَٰمِ بَلۡ هُمۡ أَضَلُّ سَبِيلًا

To ozali kokanisa ete ebele na bango bazali koyoka to koyeba? Kasi bazali nde lokola banyama mpe bazali babungi nzela koleka

Ayah 44

أَلَمۡ تَرَ إِلَىٰ رَبِّكَ كَيۡفَ مَدَّ ٱلظِّلَّ وَلَوۡ شَآءَ لَجَعَلَهُۥ سَاكِنࣰ ا ثُمَّ جَعَلۡنَا ٱلشَّمۡسَ عَلَيۡهِ دَلِيلࣰ ا

Boye ozali kornona te lolenge Nkolo wayo atiaki molili? Soki alingaki, mbele akangisi yango esika moko. Sima totiyaki moyi ezala elembo тропа yango

Ayah 45

ثُمَّ قَبَضۡنَٰهُ إِلَيۡنَا قَبۡضࣰ ا يَسِيرࣰ ا

Sima tozuaki ye mpe tomemaki ye epai na biso na pete

Ayah 46

وَهُوَ ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلَّيۡلَ لِبَاسࣰ ا وَٱلنَّوۡمَ سُبَاتࣰ ا وَجَعَلَ ٱلنَّهَارَ نُشُورࣰ ا

Mpe ye nde atielaki bino butu ezala elamba, mpe pongi ezala bopemi, mpe atiaki mokolo ezali bozongi na bomoyi (kolamuka)

Ayah 47

وَهُوَ ٱلَّذِيٓ أَرۡسَلَ ٱلرِّيَٰحَ بُشۡرَۢا بَيۡنَ يَدَيۡ رَحۡمَتِهِۦۚ وَأَنزَلۡنَا مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءࣰ طَهُورࣰ ا

Mpe ye nde azali kotinda mopepe lokola elaka ya ngolu naye. Sima akitisi kowuta na yango mayi ya peto (kowuta o likolo)

Ayah 48

لِّنُحۡـِۧيَ بِهِۦ بَلۡدَةࣰ مَّيۡتࣰ ا وَنُسۡقِيَهُۥ مِمَّا خَلَقۡنَآ أَنۡعَٰمࣰ ا وَأَنَاسِيَّ كَثِيرࣰ ا

Mpona kopesa bomoyi o mboka eye ekauka mpe komelisa bato mpe bibwele na biye binso bizali kati na yango

Ayah 49

وَلَقَدۡ صَرَّفۡنَٰهُ بَيۡنَهُمۡ لِيَذَّكَّرُواْ فَأَبَىٰٓ أَكۡثَرُ ٱلنَّاسِ إِلَّا كُفُورࣰ ا

Mpe tosilaki kokabola kati kati na bango mpo ete bakanisa (biso), kasi ebele ya bato baboyi yango baponi sé bopengwi

Ayah 50

وَلَوۡ شِئۡنَا لَبَعَثۡنَا فِي كُلِّ قَرۡيَةࣲ نَّذِيرࣰ ا

Mpe soki tolingaki, mbele totindaki na mboka inso mokebisi

Ayah 51

فَلَا تُطِعِ ٱلۡكَٰفِرِينَ وَجَٰهِدۡهُم بِهِۦ جِهَادࣰ ا كَبِيرࣰ ا

Kaši kotosa bapengwi te, mpe bundisa bango (na kurani), kobundisa ya bonene

Ayah 52

۞وَهُوَ ٱلَّذِي مَرَجَ ٱلۡبَحۡرَيۡنِ هَٰذَا عَذۡبࣱ فُرَاتࣱ وَهَٰذَا مِلۡحٌ أُجَاجࣱ وَجَعَلَ بَيۡنَهُمَا بَرۡزَخࣰ ا وَحِجۡرࣰ ا مَّحۡجُورࣰ ا

Мре ye nde atandı bibale mibale bizali kotiola esika moko, oyo ezali malili kitoko, mpe oyo mosusu ezali mungwa kitoko te, mpe atie ndelo kati kati na yango mibale mpo ekutana te

Ayah 53

وَهُوَ ٱلَّذِي خَلَقَ مِنَ ٱلۡمَآءِ بَشَرࣰ ا فَجَعَلَهُۥ نَسَبࣰ ا وَصِهۡرࣰ اۗ وَكَانَ رَبُّكَ قَدِيرࣰ ا

Mpe ye nde akeli moto na litanga ya mayi, mpe apesi ye libota mpe bolongani. Mpe Nkolo wayo azali penza na bokoki

Ayah 54

وَيَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ مَا لَا يَنفَعُهُمۡ وَلَا يَضُرُّهُمۡۗ وَكَانَ ٱلۡكَافِرُ عَلَىٰ رَبِّهِۦ ظَهِيرࣰ ا

Mpe bazali kobondela basusu batiki Allah, ba oyo bakosalela bango bolamu to mabe te. Mompegwi akozala mosungi ya monguna ya Nkolo naye

Ayah 55

وَمَآ أَرۡسَلۡنَٰكَ إِلَّا مُبَشِّرࣰ ا وَنَذِيرࣰ ا

Mpe totindaki yo te sé mpo ozala mopesi sango mpe mokebisi

Ayah 56

قُلۡ مَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍ إِلَّا مَن شَآءَ أَن يَتَّخِذَ إِلَىٰ رَبِّهِۦ سَبِيلࣰ ا

Loba: Nazali kosenga bino lifuta moko te sé na moto oyo alingi kozua nzela ya Nkolo naye

Ayah 57

وَتَوَكَّلۡ عَلَى ٱلۡحَيِّ ٱلَّذِي لَا يَمُوتُ وَسَبِّحۡ بِحَمۡدِهِۦۚ وَكَفَىٰ بِهِۦ بِذُنُوبِ عِبَادِهِۦ خَبِيرًا

Mpe mipesa epai ya oyo azali na bomoi liwa ezuaka ye te (Allah), mpe pesa lokumu naye. Мре ayebi malamu masumu ya bawumbu baye

Ayah 58

ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَمَا بَيۡنَهُمَا فِي سِتَّةِ أَيَّامࣲ ثُمَّ ٱسۡتَوَىٰ عَلَى ٱلۡعَرۡشِۖ ٱلرَّحۡمَٰنُ فَسۡـَٔلۡ بِهِۦ خَبِيرࣰ ا

Oyo akela likolo na mabele, na maye manso mazali otei na yango nyoso mibale na mikolo motoba, mpe sima amitombwami na likolo ya ngwende, Ar-Rahmân nde tika ete otuna sé oyo ayebi manso

Ayah 59

وَإِذَا قِيلَ لَهُمُ ٱسۡجُدُواْۤ لِلرَّحۡمَٰنِ قَالُواْ وَمَا ٱلرَّحۡمَٰنُ أَنَسۡجُدُ لِمَا تَأۡمُرُنَا وَزَادَهُمۡ نُفُورࣰ ا۩

Мре soki bayebisi bango ete: Bofukamela Ar-Rahmân, (Allah) bakozongisa été: Nani Ar-Rahmân? Tofukamela oyo ozali kotinda biso? Мре ezali kobakisela bango sé bopengwi. (ezali malamu kogumbama sima ya mokapo moye)

Ayah 60

تَبَارَكَ ٱلَّذِي جَعَلَ فِي ٱلسَّمَآءِ بُرُوجࣰ ا وَجَعَلَ فِيهَا سِرَٰجࣰ ا وَقَمَرࣰ ا مُّنِيرࣰ ا

Mapamboli naye oyo atia olikolo minzoto mpe ati moyi mpe sanza ya kongenga

Ayah 61

وَهُوَ ٱلَّذِي جَعَلَ ٱلَّيۡلَ وَٱلنَّهَارَ خِلۡفَةࣰ لِّمَنۡ أَرَادَ أَن يَذَّكَّرَ أَوۡ أَرَادَ شُكُورࣰ ا

Mpe ye nde atia butu na mokolo elandana na bongengi mpe molili, тропа oyo alingi kokanisa to mpe kopesa matondi

Ayah 62

وَعِبَادُ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلَّذِينَ يَمۡشُونَ عَلَى ٱلۡأَرۡضِ هَوۡنࣰ ا وَإِذَا خَاطَبَهُمُ ٱلۡجَٰهِلُونَ قَالُواْ سَلَٰمࣰ ا

Mpe bawumbu ya Ar-Rahmân bazali baye batambolaka likolo ya mabele na malembe mpe limemia na komikitisa, mpe soki batumoli bango na baye bayebi eloko te, bayanoli bango été: Kimia

Ayah 63

وَٱلَّذِينَ يَبِيتُونَ لِرَبِّهِمۡ سُجَّدࣰ ا وَقِيَٰمࣰ ا

Mpe baye bazali kolekisa butu na bango nakotelema mpe kofukamela Nkolo na bango

Ayah 64

وَٱلَّذِينَ يَقُولُونَ رَبَّنَا ٱصۡرِفۡ عَنَّا عَذَابَ جَهَنَّمَۖ إِنَّ عَذَابَهَا كَانَ غَرَامًا

Mpe baye bazali koloba: Nkolo tiya biso mosika na etumbu ya lifelo, mpo ya soló etumbu na yango ekozala ya libela

Ayah 65

إِنَّهَا سَآءَتۡ مُسۡتَقَرࣰّ ا وَمُقَامࣰ ا

Ya soló, yango ezali esika mabe тропа kovanda

Ayah 66

وَٱلَّذِينَ إِذَآ أَنفَقُواْ لَمۡ يُسۡرِفُواْ وَلَمۡ يَقۡتُرُواْ وَكَانَ بَيۡنَ ذَٰلِكَ قَوَامࣰ ا

Мре baye bazali kokaba to kobimisa тре bazali kolekisa ndelo te mpe batiki kokaba te, kasi bazali na kati kati

Ayah 67

وَٱلَّذِينَ لَا يَدۡعُونَ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَ وَلَا يَقۡتُلُونَ ٱلنَّفۡسَ ٱلَّتِي حَرَّمَ ٱللَّهُ إِلَّا بِٱلۡحَقِّ وَلَا يَزۡنُونَۚ وَمَن يَفۡعَلۡ ذَٰلِكَ يَلۡقَ أَثَامࣰ ا

Mpe baye bazali kobondela Allah mpe kosangisa ye na banzambe misusu te, mpe bazali koboma molimo oyo Allah apekisaki te, longola sé ezala na nzela ya bosôló, mpe bazali kosala ekobo te. Kasi oyo akosala yango akozua etumbu

Ayah 68

يُضَٰعَفۡ لَهُ ٱلۡعَذَابُ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ وَيَخۡلُدۡ فِيهِۦ مُهَانًا

Bakobakiselaka ye etumbu o mokolo mwa suka, mpe akotikalaka libela okati na yango mpe azingami na kozanga lokumu

Ayah 69

إِلَّا مَن تَابَ وَءَامَنَ وَعَمِلَ عَمَلࣰ ا صَٰلِحࣰ ا فَأُوْلَٰٓئِكَ يُبَدِّلُ ٱللَّهُ سَيِّـَٔاتِهِمۡ حَسَنَٰتࣲۗ وَكَانَ ٱللَّهُ غَفُورࣰ ا رَّحِيمࣰ ا

Longola sé oyo akotubela mpe andimi mpe alandisi kosala misala milamu, Allah akobongolaka mabe na bango ekomi bolamu. Mpe Allah azali molimbisi atonda mawa

Ayah 70

وَمَن تَابَ وَعَمِلَ صَٰلِحࣰ ا فَإِنَّهُۥ يَتُوبُ إِلَى ٱللَّهِ مَتَابࣰ ا

Mpe oyo akotubela mpe asali mosala ya malamu, ya solo Allah akondimelaka ye bozongi

Ayah 71

وَٱلَّذِينَ لَا يَشۡهَدُونَ ٱلزُّورَ وَإِذَا مَرُّواْ بِٱللَّغۡوِ مَرُّواْ كِرَامࣰ ا

Mpe baye batatolaka na lokuta te, mpe soki bakutani na makambo mazanga ntina, bapesi yango mokongo

Ayah 72

وَٱلَّذِينَ إِذَا ذُكِّرُواْ بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِمۡ لَمۡ يَخِرُّواْ عَلَيۡهَا صُمࣰّ ا وَعُمۡيَانࣰ ا

Мре baye soki bakundoli bango mikapo mia Nkolo wa bango, bakozangaka koyoka mpe kornona yango te

Ayah 73

وَٱلَّذِينَ يَقُولُونَ رَبَّنَا هَبۡ لَنَا مِنۡ أَزۡوَٰجِنَا وَذُرِّيَّٰتِنَا قُرَّةَ أَعۡيُنࣲ وَٱجۡعَلۡنَا لِلۡمُتَّقِينَ إِمَامًا

Mpe baye balobaka ete: Nkolo, pesa biso bosepelisi miso bolamu kowuta epai ya basi na biso mpe mabota na biso, mpe otia biso bakambi ya baye bazali kobanga

Ayah 74

أُوْلَٰٓئِكَ يُجۡزَوۡنَ ٱلۡغُرۡفَةَ بِمَا صَبَرُواْ وَيُلَقَّوۡنَ فِيهَا تَحِيَّةࣰ وَسَلَٰمًا

Bango wana nde lifuta na bango ekozala esika ya likolo (o paladizo) mpo été bakangaki mitema, mpe bakokutana na losako mpe kimia o kati na yango

Ayah 75

خَٰلِدِينَ فِيهَاۚ حَسُنَتۡ مُسۡتَقَرࣰّ ا وَمُقَامࣰ ا

Libela kati na yango, boye bolamu kani bakozuaka o esika ena bakozalaka

Ayah 76

قُلۡ مَا يَعۡبَؤُاْ بِكُمۡ رَبِّي لَوۡلَا دُعَآؤُكُمۡۖ فَقَدۡ كَذَّبۡتُمۡ فَسَوۡفَ يَكُونُ لِزَامَۢا

Loba: Nkolo wa ngai akomitungisa тропа bino te wana bozangi losambo na bino, mpo bozwaka(ntoma) lokuta, na yango etumbu ekotika bino te, mpe ekozalaka seko na seko

Ayah 77