Surah Al-Jaathiya — Crouching

Surah Al-Jaathiya (Crouching) is chapter 45 of the Quran, with 37 verses. This page presents the Arabic text with a Lingala translation, verse by verse.

حمٓ

Hâ, mîm

Ayah 1

تَنزِيلُ ٱلۡكِتَٰبِ مِنَ ٱللَّهِ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡحَكِيمِ

Buku ekitaki kowuta epai ya Allah azali na bokasi atonda bwanya

Ayah 2

إِنَّ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ لَأٓيَٰتࣲ لِّلۡمُؤۡمِنِينَ

Ya soló, okati ya likolo na mabele bilembo тропа bandimi

Ayah 3

وَفِي خَلۡقِكُمۡ وَمَا يَبُثُّ مِن دَآبَّةٍ ءَايَٰتࣱ لِّقَوۡمࣲ يُوقِنُونَ

Mpe na bokeli bino na banyama, ezali bilembo тропа baye bazali na tembe te

Ayah 4

وَٱخۡتِلَٰفِ ٱلَّيۡلِ وَٱلنَّهَارِ وَمَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مِن رِّزۡقࣲ فَأَحۡيَا بِهِ ٱلۡأَرۡضَ بَعۡدَ مَوۡتِهَا وَتَصۡرِيفِ ٱلرِّيَٰحِ ءَايَٰتࣱ لِّقَوۡمࣲ يَعۡقِلُونَ

Mpe bokeseni bwa butu na mokolo; na maye Allah akitisaki kowuta na likolo lokola bozui, oyo ezali kopesa bomoyi na mabele sima ya kokufa na yango, mpe kotambola ya mopepe bipai na bipai, ezali bilembo mpo bato bakoka kokanisa

Ayah 5

تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱللَّهِ نَتۡلُوهَا عَلَيۡكَ بِٱلۡحَقِّۖ فَبِأَيِّ حَدِيثِۭ بَعۡدَ ٱللَّهِ وَءَايَٰتِهِۦ يُؤۡمِنُونَ

Wana ezali mikapo mia Allah tozali kotangela yo na bosoló. Liloba kani bakondimaka yango osima (koyoka mpe kozua liloba) ya Allah na bilembo bia ye

Ayah 6

وَيۡلࣱ لِّكُلِّ أَفَّاكٍ أَثِيمࣲ‏

Bato banso baye bazali kosala masumu ya minene mpe kobuka lokuta; bakozua mabe

Ayah 7

يَسۡمَعُ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِ ثُمَّ يُصِرُّ مُسۡتَكۡبِرࣰ ا كَأَن لَّمۡ يَسۡمَعۡهَاۖ فَبَشِّرۡهُ بِعَذَابٍ أَلِيمࣲ‏

(Oyo) azali koyoka mikapo mia Allah miye bazali kotangela ye sima asaleli yango lolendo lokola atikala koyoka yango te, pesa ye sango ya etumbu ya makasi

Ayah 8

وَإِذَا عَلِمَ مِنۡ ءَايَٰتِنَا شَيۡـًٔا ٱتَّخَذَهَا هُزُوًاۚ أُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ عَذَابࣱ مُّهِينࣱ‏

Soki ayebi eloko moke okati ya mikapo mia biso, asaleli yango litio, baye wana nde bakozua etumbu ya kokitisama

Ayah 9

مِّن وَرَآئِهِمۡ جَهَنَّمُۖ وَلَا يُغۡنِي عَنۡهُم مَّا كَسَبُواْ شَيۡـࣰٔ ا وَلَا مَا ٱتَّخَذُواْ مِن دُونِ ٱللَّهِ أَوۡلِيَآءَۖ وَلَهُمۡ عَذَابٌ عَظِيمٌ

Sima bango bakozalaka na lifelo; bakosalisaka bango na eloko te; ezala ata baye bazuaki bango ete bazali babateli na bango na batiki Allah. Bakozalaka na etumbu monene

Ayah 10

هَٰذَا هُدࣰ ىۖ وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِمۡ لَهُمۡ عَذَابࣱ مِّن رِّجۡزٍ أَلِيمٌ

(Kurani) oyo ezali bokambi, mpe baye bazali kopengwa na mikapo mia Nkolo wa bango, bakozua etumbu ya makasi koleka

Ayah 11

۞ٱللَّهُ ٱلَّذِي سَخَّرَ لَكُمُ ٱلۡبَحۡرَ لِتَجۡرِيَ ٱلۡفُلۡكُ فِيهِ بِأَمۡرِهِۦ وَلِتَبۡتَغُواْ مِن فَضۡلِهِۦ وَلَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ

Allah akela ebale тропа bino; тро ete masuwa etambolaka na mitindo mia ye тре mpo bozuaka bolamu bwa yango mpe botondo. (ye)

Ayah 12

وَسَخَّرَ لَكُم مَّا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِ جَمِيعࣰ ا مِّنۡهُۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتࣲ لِّقَوۡمࣲ يَتَفَكَّرُونَ

Mpe akeli тропа bino manso maye mazali okati ya likolo na mabele na mitindo kowuta epai naye. Ya soló, wana ezali bilembo mpo bato bakanisa

Ayah 13

قُل لِّلَّذِينَ ءَامَنُواْ يَغۡفِرُواْ لِلَّذِينَ لَا يَرۡجُونَ أَيَّامَ ٱللَّهِ لِيَجۡزِيَ قَوۡمَۢا بِمَا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ

Loba na baye bandima: Balimbisa baye bazali kolikia na mikolo mia Allah te, mpo moto nyoso afutama na maye asalaki

Ayah 14

مَنۡ عَمِلَ صَٰلِحࣰ ا فَلِنَفۡسِهِۦۖ وَمَنۡ أَسَآءَ فَعَلَيۡهَاۖ ثُمَّ إِلَىٰ رَبِّكُمۡ تُرۡجَعُونَ

Oyo akosala bolamu ezali тропа ye moko, mpe oyo akobebisa, ekozongela sé ye moko. Sima bokozongisama epai ya Nkolo wa bino

Ayah 15

وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡحُكۡمَ وَٱلنُّبُوَّةَ وَرَزَقۡنَٰهُم مِّنَ ٱلطَّيِّبَٰتِ وَفَضَّلۡنَٰهُمۡ عَلَى ٱلۡعَٰلَمِينَ

Мре tosilaki kopesa na bana ya isalayele buku тре mibeko тре bontoma, тре topesaki bango biloko bia kitoko, mpe totombolaki bango esika koleka basusu (na tango na bango)

Ayah 16

وَءَاتَيۡنَٰهُم بَيِّنَٰتࣲ مِّنَ ٱلۡأَمۡرِۖ فَمَا ٱخۡتَلَفُوٓاْ إِلَّا مِنۢ بَعۡدِ مَا جَآءَهُمُ ٱلۡعِلۡمُ بَغۡيَۢا بَيۡنَهُمۡۚ إِنَّ رَبَّكَ يَقۡضِي بَيۡنَهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ فِيمَا كَانُواْ فِيهِ يَخۡتَلِفُونَ

Mpe toyelaki bango bilembo bia polele ya mibeko mpe bakabwanaki te sé tango boyebi eyelaki bango тропа likunya okati na bango. Ya soló, Nkolo nayo akosambisa kati na bango na bosôló o mokolo mwa suka тропа maye bazalaki na bokeseni

Ayah 17

ثُمَّ جَعَلۡنَٰكَ عَلَىٰ شَرِيعَةࣲ مِّنَ ٱلۡأَمۡرِ فَٱتَّبِعۡهَا وَلَا تَتَّبِعۡ أَهۡوَآءَ ٱلَّذِينَ لَا يَعۡلَمُونَ

Sima totiyaki yo na nzela ya mibeko landa yango, kasi kolanda te bamposa ya baye bazanga boyebi

Ayah 18

إِنَّهُمۡ لَن يُغۡنُواْ عَنكَ مِنَ ٱللَّهِ شَيۡـࣰٔ اۚ وَإِنَّ ٱلظَّٰلِمِينَ بَعۡضُهُمۡ أَوۡلِيَآءُ بَعۡضࣲۖ وَٱللَّهُ وَلِيُّ ٱلۡمُتَّقِينَ

Ya soló, bango bazali na bokoki ya kosalela yo bolamu te koleka bolamu ya Allah. Mpe ya soló, bato mabe bango na bango bazali baninga, Allah nde azali mobateli ya bandimi

Ayah 19

هَٰذَا بَصَٰٓئِرُ لِلنَّاسِ وَهُدࣰ ى وَرَحۡمَةࣱ لِّقَوۡمࣲ يُوقِنُونَ

Buku (Kurani) oyo ezali polele тропа bato, тре ezali bokambi тре ngolu тропа baye bazali па kondima ya soló

Ayah 20

أَمۡ حَسِبَ ٱلَّذِينَ ٱجۡتَرَحُواْ ٱلسَّيِّـَٔاتِ أَن نَّجۡعَلَهُمۡ كَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ سَوَآءࣰ مَّحۡيَاهُمۡ وَمَمَاتُهُمۡۚ سَآءَ مَا يَحۡكُمُونَ

Boye baye bazali kosala mabe, bakanisi ete tokozua bango lolenge moko na baye bandimi mpe bazali kosala misala milamu okati ya bomoyi mpe liwa na bango? Oyo ndenge ya mabe ya kokata likambo

Ayah 21

وَخَلَقَ ٱللَّهُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ بِٱلۡحَقِّ وَلِتُجۡزَىٰ كُلُّ نَفۡسِۭ بِمَا كَسَبَتۡ وَهُمۡ لَا يُظۡلَمُونَ

Mpe Allah akela likolo na mabele na bosóló; mpe mpo afuta moto nyoso na maye asalaki, mpe bakobubamaka te

Ayah 22

أَفَرَءَيۡتَ مَنِ ٱتَّخَذَ إِلَٰهَهُۥ هَوَىٰهُ وَأَضَلَّهُ ٱللَّهُ عَلَىٰ عِلۡمࣲ وَخَتَمَ عَلَىٰ سَمۡعِهِۦ وَقَلۡبِهِۦ وَجَعَلَ عَلَىٰ بَصَرِهِۦ غِشَٰوَةࣰ فَمَن يَهۡدِيهِ مِنۢ بَعۡدِ ٱللَّهِۚ أَفَلَا تَذَكَّرُونَ

Boye ozali kornona te ete oyo azui mposa naye nde nzambe naye, mpe Allah abungisi ye na boyebi, mpe akangi ye matoyi na motema mpe atie ezipelo na miso, nani mosusu akokamba ye osima ya Allah, boye bozali kokanisa te

Ayah 23

وَقَالُواْ مَا هِيَ إِلَّا حَيَاتُنَا ٱلدُّنۡيَا نَمُوتُ وَنَحۡيَا وَمَا يُهۡلِكُنَآ إِلَّا ٱلدَّهۡرُۚ وَمَا لَهُم بِذَٰلِكَ مِنۡ عِلۡمٍۖ إِنۡ هُمۡ إِلَّا يَظُنُّونَ

Mpe bazali koloba ete: Bomoyi ezali sé ya mokili ya nsé, tozali kofanda mpe tozali kokufa, bobele tango nde ezali koboma biso. Bazali na boyebi te тропа yango sé makanisi

Ayah 24

وَإِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِمۡ ءَايَٰتُنَا بَيِّنَٰتࣲ مَّا كَانَ حُجَّتَهُمۡ إِلَّآ أَن قَالُواْ ٱئۡتُواْ بِـَٔابَآئِنَآ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ

Mpe soki batangeli bango mikapo mia biso mapolele bakolobaka ete: Bozongisa bankoko na biso na bomoyi soki bozali koloba bosóló

Ayah 25

قُلِ ٱللَّهُ يُحۡيِيكُمۡ ثُمَّ يُمِيتُكُمۡ ثُمَّ يَجۡمَعُكُمۡ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِ لَا رَيۡبَ فِيهِ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ

Loba: Allah apesaka bino bomoyi sima akobomaka bino; sima akosangisaka bino o mokolo mwa suka, mokolo moye mokozalaka na tembe te; kasi ebele ya bato bazali koyeba te

Ayah 26

وَلِلَّهِ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَيَوۡمَ تَقُومُ ٱلسَّاعَةُ يَوۡمَئِذࣲ يَخۡسَرُ ٱلۡمُبۡطِلُونَ

Mpe bokonzi bwa likolo na mabele ezali ya Allah. Mpe tango mokolo wana mokokokaka, bato ya lokuta bakozangaka

Ayah 27

وَتَرَىٰ كُلَّ أُمَّةࣲ جَاثِيَةࣰۚ كُلُّ أُمَّةࣲ تُدۡعَىٰٓ إِلَىٰ كِتَٰبِهَا ٱلۡيَوۡمَ تُجۡزَوۡنَ مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ

Mpe okomona bato banso bakofukama. Mpe bakobengama o ngambu ya buku na bango, lelo bokofutama тропа maye bosalaki

Ayah 28

هَٰذَا كِتَٰبُنَا يَنطِقُ عَلَيۡكُم بِٱلۡحَقِّۚ إِنَّا كُنَّا نَسۡتَنسِخُ مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ

Oyo buku na biso ezali koloba bosembo likolo na bino. Tozalaki kozua maye manso bozalaki kosala

Ayah 29

فَأَمَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ فَيُدۡخِلُهُمۡ رَبُّهُمۡ فِي رَحۡمَتِهِۦۚ ذَٰلِكَ هُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡمُبِينُ

Kasi baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, Nkolo wa bango akokotisa bango na bolamu bwa ye. Wana nde elonga ya polele

Ayah 30

وَأَمَّا ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَفَلَمۡ تَكُنۡ ءَايَٰتِي تُتۡلَىٰ عَلَيۡكُمۡ فَٱسۡتَكۡبَرۡتُمۡ وَكُنتُمۡ قَوۡمࣰ ا مُّجۡرِمِينَ

Mpe тропа baye bapengwaki (bakolobaka na bango): Boye batangelaki bino mikapo mia ngai te? Kasi bosalaki lolendo. Ya soló bozalaki batomboki

Ayah 31

وَإِذَا قِيلَ إِنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقࣱّ وَٱلسَّاعَةُ لَا رَيۡبَ فِيهَا قُلۡتُم مَّا نَدۡرِي مَا ٱلسَّاعَةُ إِن نَّظُنُّ إِلَّا ظَنࣰّ ا وَمَا نَحۡنُ بِمُسۡتَيۡقِنِينَ

Mpe tango bazali koyebisa bango ete elaka ya Allah ezali ya sólo, mpe ya sólo, ngonga ena ezali na tembe te, bolobaki toyebaki yango te, tozalaki kornona yango pamba, mpe tondimaki na yango te

Ayah 32

وَبَدَا لَهُمۡ سَيِّـَٔاتُ مَا عَمِلُواْ وَحَاقَ بِهِم مَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ

Mpe akomonisa bango mabe na bango oyo basalaki, mpe maye bazalaki kotiola ekokueyela bango

Ayah 33

وَقِيلَ ٱلۡيَوۡمَ نَنسَىٰكُمۡ كَمَا نَسِيتُمۡ لِقَآءَ يَوۡمِكُمۡ هَٰذَا وَمَأۡوَىٰكُمُ ٱلنَّارُ وَمَا لَكُم مِّن نَّٰصِرِينَ

Mpe bakoyebisa bango: Lelo tobosani bino ndenge bobosanaki mokolo mwa elaka mwa bino moye, mpe esika na bino ezali nde lifelo. Kasi bakozwaka mosungi te

Ayah 34

ذَٰلِكُم بِأَنَّكُمُ ٱتَّخَذۡتُمۡ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ هُزُوࣰ ا وَغَرَّتۡكُمُ ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَاۚ فَٱلۡيَوۡمَ لَا يُخۡرَجُونَ مِنۡهَا وَلَا هُمۡ يُسۡتَعۡتَبُونَ

Nyoso wana mpo bozuaki mikapo mia Allah na liseki, mpe bomoyi ya mokili ekosaki bino. Mokolo wana bakobimisama okati na yango te mpe bakoyambama te, okati ya ngolu

Ayah 35

فَلِلَّهِ ٱلۡحَمۡدُ رَبِّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَرَبِّ ٱلۡأَرۡضِ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

Lokumu na Allah Nkolo ya likolo na mabele, Nkolo ya molongo mobimba

Ayah 36

وَلَهُ ٱلۡكِبۡرِيَآءُ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ

Mpe atonda na bonene okati ya likolo na mabele, mpe azali na bokasi mpe bwanya

Ayah 37