Surah Al-Mutaffifin — Defrauding
Surah Al-Mutaffifin (Defrauding) is chapter 83 of the Quran, with 36 verses. This page presents the Arabic text with a Lingala translation, verse by verse.
وَيۡلࣱ لِّلۡمُطَفِّفِينَ
Mawa na baye bazali koy iba
Ayah 1ٱلَّذِينَ إِذَا ٱكۡتَالُواْ عَلَى ٱلنَّاسِ يَسۡتَوۡفُونَ
Baye ntango bazali (kosomba) bazali kosenga ete bakokisela bango emekeli
Ayah 2وَإِذَا كَالُوهُمۡ أَو وَّزَنُوهُمۡ يُخۡسِرُونَ
Kaši ntango bazali komeka pona bato mosusu bazali kozangisa
Ayah 3أَلَا يَظُنُّ أُوْلَٰٓئِكَ أَنَّهُم مَّبۡعُوثُونَ
Bango bazali kokanisa ete bakozonga na bomoi te sima ya liwa
Ayah 4لِيَوۡمٍ عَظِيمࣲ
Na mokolo ya monene
Ayah 5يَوۡمَ يَقُومُ ٱلنَّاسُ لِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Mokolo moye bato bakotelema liboso ya Nkolo ya molongo
Ayah 6كَلَّآ إِنَّ كِتَٰبَ ٱلۡفُجَّارِ لَفِي سِجِّينࣲ
Kasi ya soló, buku ya bato ya mabe ekozala okati ya sidjíne
Ayah 7وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا سِجِّينࣱ
Nani akoyebisa yo eloko nini sidjíne
Ayah 8كِتَٰبࣱ مَّرۡقُومࣱ
Buku eye ekomama
Ayah 9وَيۡلࣱ يَوۡمَئِذࣲ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Mokolo wana etumbu ekozala тропа baye baboyi kondima
Ayah 10ٱلَّذِينَ يُكَذِّبُونَ بِيَوۡمِ ٱلدِّينِ
Baye bazali kozwa mokolo ya suka na lokuta
Ayah 11وَمَا يُكَذِّبُ بِهِۦٓ إِلَّا كُلُّ مُعۡتَدٍ أَثِيمٍ
Kasi akoboya kondima sé molekisi ndelo mosumuki
Ayah 12إِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِ ءَايَٰتُنَا قَالَ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
Oyo soki batangeli ye maloba na biso alobi: Wana ezali másese ya bakoko ya kala
Ayah 13كَلَّاۖ بَلۡۜ رَانَ عَلَىٰ قُلُوبِهِم مَّا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ
Ezali boye te, kaši mitema miabango mizali na mbindo na maye bazalaki kosala
Ayah 14كَلَّآ إِنَّهُمۡ عَن رَّبِّهِمۡ يَوۡمَئِذࣲ لَّمَحۡجُوبُونَ
Kasi basala angele ya soló mokolo mona mokozipa bango mpo ete bamona Nkolo na bango te
Ayah 15ثُمَّ إِنَّهُمۡ لَصَالُواْ ٱلۡجَحِيمِ
Sima bakozikisama ya sólo okati ya lifelo
Ayah 16ثُمَّ يُقَالُ هَٰذَا ٱلَّذِي كُنتُم بِهِۦ تُكَذِّبُونَ
Sima bakoloba na bango wana maye bozalaki koboya kondima
Ayah 17كَلَّآ إِنَّ كِتَٰبَ ٱلۡأَبۡرَارِ لَفِي عِلِّيِّينَ
Ya sólo, buku ya bato malamu ekozala o’kati ya iliyíne
Ayah 18وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا عِلِّيُّونَ
Nani akoyebisayo eloko nini iliyíne
Ayah 19كِتَٰبࣱ مَّرۡقُومࣱ
Buku eye ekomama
Ayah 20يَشۡهَدُهُ ٱلۡمُقَرَّبُونَ
Ba anzelu ya pembeni ya Nkolo (Allah) bazali banzeneneke тропа yango
Ayah 21إِنَّ ٱلۡأَبۡرَارَ لَفِي نَعِيمٍ
Ya sólo bato ya malamu bakozala okati ya bisengo
Ayah 22عَلَى ٱلۡأَرَآئِكِ يَنظُرُونَ
Likolo ya bakiti ya lokumu bazali kotalana
Ayah 23تَعۡرِفُ فِي وُجُوهِهِمۡ نَضۡرَةَ ٱلنَّعِيمِ
Okoyeba bilembo bia bisengo o’bilongi bia bango
Ayah 24يُسۡقَوۡنَ مِن رَّحِيقࣲ مَّخۡتُومٍ
Bakomela masanga ya sukali oyo esila kobongisama
Ayah 25خِتَٰمُهُۥ مِسۡكࣱۚ وَفِي ذَٰلِكَ فَلۡيَتَنَافَسِ ٱلۡمُتَنَٰفِسُونَ
Etikaka solo ya mpimbo na suka lokola malasi, na yango esengeli nabaye bazali kolikia тропа yango basala molende
Ayah 26وَمِزَاجُهُۥ مِن تَسۡنِيمٍ
Mpe esangisani na masanga ya tasmin (liziba)
Ayah 27عَيۡنࣰ ا يَشۡرَبُ بِهَا ٱلۡمُقَرَّبُونَ
Baye bakozala pembeni na Nkolo (Allah) bako mela mayi ya liziba wana
Ayah 28إِنَّ ٱلَّذِينَ أَجۡرَمُواْ كَانُواْ مِنَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ يَضۡحَكُونَ
Ya soló, bato mabe bazalaki kotiola bandimi
Ayah 29وَإِذَا مَرُّواْ بِهِمۡ يَتَغَامَزُونَ
Mpe soki baleki pene na bango bazali (kodongola bango miso nako fina) miso na bango
Ayah 30وَإِذَا ٱنقَلَبُوٓاْ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِمُ ٱنقَلَبُواْ فَكِهِينَ
Mpe soki bazongi o’mabota na bango bazali kokosa bango
Ayah 31وَإِذَا رَأَوۡهُمۡ قَالُوٓاْ إِنَّ هَٰٓؤُلَآءِ لَضَآلُّونَ
Mpe soki bamoni bandimi balobi ete: Ya sólo, baye wana nde babunga nzela
Ayah 32وَمَآ أُرۡسِلُواْ عَلَيۡهِمۡ حَٰفِظِينَ
Nzoka nde batindamaki te bazala bakengeli likolo ya bandimi
Ayah 33فَٱلۡيَوۡمَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مِنَ ٱلۡكُفَّارِ يَضۡحَكُونَ
Kasi lelo bandimi bako tiola bapagano
Ayah 34عَلَى ٱلۡأَرَآئِكِ يَنظُرُونَ
Likolo ya bakiti ya lokumu bazali kotala
Ayah 35هَلۡ ثُوِّبَ ٱلۡكُفَّارُ مَا كَانُواْ يَفۡعَلُونَ
Bapagano bazwi te lifuta liye ekoki na bango na tina ya maye bazalaki kosala
Ayah 36