Surah Adh-Dhaariyat — The Winnowing Winds
Surah Adh-Dhaariyat (The Winnowing Winds) is chapter 51 of the Quran, with 60 verses. This page presents the Arabic text with a Lingala translation, verse by verse.
وَٱلذَّٰرِيَٰتِ ذَرۡوࣰ ا
(Nalapi) na mipepe miye mipanzaka
Ayah 1فَٱلۡحَٰمِلَٰتِ وِقۡرࣰ ا
Mpe na bamemi mikumba (ya mapata)
Ayah 2فَٱلۡجَٰرِيَٰتِ يُسۡرࣰ ا
Mpe na ba masuwa ezali kotambola likolo ya mayi
Ayah 3فَٱلۡمُقَسِّمَٰتِ أَمۡرًا
Mpe na bakaboli, kolanda na mibeko
Ayah 4إِنَّمَا تُوعَدُونَ لَصَادِقࣱ
Ezali solo oyo balaki bino
Ayah 5وَإِنَّ ٱلدِّينَ لَوَٰقِعࣱ
Mpe ya sôló, mokolo ya suka ekoya
Ayah 6وَٱلسَّمَآءِ ذَاتِ ٱلۡحُبُكِ
Mpe na likolo oyo ezali na banzela bipasolama malamu
Ayah 7إِنَّكُمۡ لَفِي قَوۡلࣲ مُّخۡتَلِفࣲ
Ya sólo, bozali na bokeseni na maye bozali koloba
Ayah 8يُؤۡفَكُ عَنۡهُ مَنۡ أُفِكَ
Oyo aboyi yango, ezali oyo apesaki bondimi mokongo
Ayah 9قُتِلَ ٱلۡخَرَّٰصُونَ
Bato ya lokuta basili kobomama
Ayah 10ٱلَّذِينَ هُمۡ فِي غَمۡرَةࣲ سَاهُونَ
В aye bazindi na molangwa ya mokili
Ayah 11يَسۡـَٔلُونَ أَيَّانَ يَوۡمُ ٱلدِّينِ
Bazali kotuna тропа mokolo ya suka ekozala tango nini
Ayah 12يَوۡمَ هُمۡ عَلَى ٱلنَّارِ يُفۡتَنُونَ
Mokolo oyo bakomekama na moto
Ayah 13ذُوقُواْ فِتۡنَتَكُمۡ هَٰذَا ٱلَّذِي كُنتُم بِهِۦ تَسۡتَعۡجِلُونَ
Вотека bomekami ya bino (etumbu) mpo bozalaki koluka yango na lombango
Ayah 14إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي جَنَّٰتࣲ وَعُيُونٍ
Ya soló, babangi bakozalaka na lola oyo ezali na miluka
Ayah 15ءَاخِذِينَ مَآ ءَاتَىٰهُمۡ رَبُّهُمۡۚ إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَبۡلَ ذَٰلِكَ مُحۡسِنِينَ
Bakozuaka oyo Nkolo wa bango akopesa bango. Ya sólo, bazalaki liboso na yango bato ya malamu
Ayah 16كَانُواْ قَلِيلࣰ ا مِّنَ ٱلَّيۡلِ مَا يَهۡجَعُونَ
Bazalaki kolala токе na butu
Ayah 17وَبِٱلۡأَسۡحَارِ هُمۡ يَسۡتَغۡفِرُونَ
Мре yambo tongo etana bazalaki kosenga bolimbisi
Ayah 18وَفِيٓ أَمۡوَٰلِهِمۡ حَقࣱّ لِّلسَّآئِلِ وَٱلۡمَحۡرُومِ
Mpe na bomengo na bango oyo bazalaki kopesa epai na mosengi mpe mozangi
Ayah 19وَفِي ٱلۡأَرۡضِ ءَايَٰتࣱ لِّلۡمُوقِنِينَ
Mpe bilembo biye bizali okati na mokili bizali тропа baye bazali kondima na bosóló
Ayah 20وَفِيٓ أَنفُسِكُمۡۚ أَفَلَا تُبۡصِرُونَ
Mpe kati na bino moko, boye bozali kornona te
Ayah 21وَفِي ٱلسَّمَآءِ رِزۡقُكُمۡ وَمَا تُوعَدُونَ
Mpe bozui na bino, na maye bolakelama mazali olikolo
Ayah 22فَوَرَبِّ ٱلسَّمَآءِ وَٱلۡأَرۡضِ إِنَّهُۥ لَحَقࣱّ مِّثۡلَ مَآ أَنَّكُمۡ تَنطِقُونَ
Na Nkolo ya likolo na nsé, ezali ya sólo bosembo, ndakisa ya maye bozali kolobela
Ayah 23هَلۡ أَتَىٰكَ حَدِيثُ ضَيۡفِ إِبۡرَٰهِيمَ ٱلۡمُكۡرَمِينَ
Boye sango ya bapaya ya Ibrâhîm ya lokumu ekomelaki yo
Ayah 24إِذۡ دَخَلُواْ عَلَيۡهِ فَقَالُواْ سَلَٰمࣰ اۖ قَالَ سَلَٰمࣱ قَوۡمࣱ مُّنكَرُونَ
Tango bakotaki epai naye, balobi: Kimia (ezala nayo); ayanoli: Kimia mpe ezala likolo lia bapaya oyo bayebani te
Ayah 25فَرَاغَ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِۦ فَجَآءَ بِعِجۡلࣲ سَمِينࣲ
Мре akendaki malembe epai ya libota naye mpe amemelaki bango ngombe ya mafrita ya kotumba
Ayah 26فَقَرَّبَهُۥٓ إِلَيۡهِمۡ قَالَ أَلَا تَأۡكُلُونَ
Mpe apusi yango pene na bango alobi: Bokolia te
Ayah 27فَأَوۡجَسَ مِنۡهُمۡ خِيفَةࣰۖ قَالُواْ لَا تَخَفۡۖ وَبَشَّرُوهُ بِغُلَٰمٍ عَلِيمࣲ
Mpe abangi bango, balobi: Kobanga te, mpe bapesi ye sango ya kobotama ya mwana ya mobali oyo atondi na bwanya
Ayah 28فَأَقۡبَلَتِ ٱمۡرَأَتُهُۥ فِي صَرَّةࣲ فَصَكَّتۡ وَجۡهَهَا وَقَالَتۡ عَجُوزٌ عَقِيمࣱ
Mwasi naye akei azali koganga mpe na komikwanza elongi naye, alobi: Mobange mpe ekomba lokola ngai, nabota ndenge nini
Ayah 29قَالُواْ كَذَٰلِكِ قَالَ رَبُّكِۖ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡحَكِيمُ ٱلۡعَلِيمُ
Balobi: Lolenge wana nde Nkolo nayo alobi. Ya soló, ye azali moyebi atonda na bwanya
Ayah 30۞قَالَ فَمَا خَطۡبُكُمۡ أَيُّهَا ٱلۡمُرۡسَلُونَ
(Ibrâhîm) alobi: Oh batindami! Boyeli nini
Ayah 31قَالُوٓاْ إِنَّآ أُرۡسِلۡنَآ إِلَىٰ قَوۡمࣲ مُّجۡرِمِينَ
Balobi: Ya sólo, totindami тропа batomboki
Ayah 32لِنُرۡسِلَ عَلَيۡهِمۡ حِجَارَةࣰ مِّن طِينࣲ
Mpo tobwakela bango mabanga ya mabele ya makasi
Ayah 33مُّسَوَّمَةً عِندَ رَبِّكَ لِلۡمُسۡرِفِينَ
Oyo etiyami kowuta epai ya Nkolo nayo ezali тропа etumbu
Ayah 34فَأَخۡرَجۡنَا مَن كَانَ فِيهَا مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Мре tobimisaki bandimi okati na bango
Ayah 35فَمَا وَجَدۡنَا فِيهَا غَيۡرَ بَيۡتࣲ مِّنَ ٱلۡمُسۡلِمِينَ
Мре tokutaki sé ndako moko ya mpamba ya baye bamisokia
Ayah 36وَتَرَكۡنَا فِيهَآ ءَايَةࣰ لِّلَّذِينَ يَخَافُونَ ٱلۡعَذَابَ ٱلۡأَلِيمَ
Mpe totikaki elembo тропа baye bazali kobanga etumbu makasi
Ayah 37وَفِي مُوسَىٰٓ إِذۡ أَرۡسَلۡنَٰهُ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ بِسُلۡطَٰنࣲ مُّبِينࣲ
(Lolenge moko totikaki elembo) epai ya Mûssa, tango totindaki ye epai ya falo na makamwisi ya polele
Ayah 38فَتَوَلَّىٰ بِرُكۡنِهِۦ وَقَالَ سَٰحِرٌ أَوۡ مَجۡنُونࣱ
Kasi apesaki mokongo mpe alikiaki sé na makasi naye, mpe alobaki ete: Oyo azali nganga to azali ligboma
Ayah 39فَأَخَذۡنَٰهُ وَجُنُودَهُۥ فَنَبَذۡنَٰهُمۡ فِي ٱلۡيَمِّ وَهُوَ مُلِيمࣱ
Kasi tozuaki ye na mapinga naye, mpe tobwakaki bango okati ya mbonge тропа ezaleli naye ya mabe
Ayah 40وَفِي عَادٍ إِذۡ أَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِمُ ٱلرِّيحَ ٱلۡعَقِيمَ
Lolenge moko na (bato) ya Aad, tango totindelaki bango mopepe ya mabe (etumbu)
Ayah 41مَا تَذَرُ مِن شَيۡءٍ أَتَتۡ عَلَيۡهِ إِلَّا جَعَلَتۡهُ كَٱلرَّمِيمِ
Ezalaki kotika eloko moko te oyo ezuaki yango na nzela kino ekomisaki yango putulu
Ayah 42وَفِي ثَمُودَ إِذۡ قِيلَ لَهُمۡ تَمَتَّعُواْ حَتَّىٰ حِينࣲ
Lolenge moko na (bato) ya thamûd tango bayebisaki bango: Bosepela sé тропа tango ya moke
Ayah 43فَعَتَوۡاْ عَنۡ أَمۡرِ رَبِّهِمۡ فَأَخَذَتۡهُمُ ٱلصَّٰعِقَةُ وَهُمۡ يَنظُرُونَ
Bazangaki kotosa mibeko mia Nkolo wa bango kino etumbu ezuaki bango bazali kornona
Ayah 44فَمَا ٱسۡتَطَٰعُواْ مِن قِيَامࣲ وَمَا كَانُواْ مُنتَصِرِينَ
Kaši bakokaki komitelemisa te, mpe bamilongisaki te
Ayah 45وَقَوۡمَ نُوحࣲ مِّن قَبۡلُۖ إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَوۡمࣰ ا فَٰسِقِينَ
Mpe lolenge moko ezalelaki bato ya Nûh liboso. Ya soló, bazalaki bato mabe
Ayah 46وَٱلسَّمَآءَ بَنَيۡنَٰهَا بِأَيۡيْدࣲ وَإِنَّا لَمُوسِعُونَ
Mpe totongaki likolo na bokasi na biso, mpe (totiyaki yango ezala) monene
Ayah 47وَٱلۡأَرۡضَ فَرَشۡنَٰهَا فَنِعۡمَ ٱلۡمَٰهِدُونَ
Mpe totandaki mabele, mpe oyo lolenge kitoko ya etando
Ayah 48وَمِن كُلِّ شَيۡءٍ خَلَقۡنَا زَوۡجَيۡنِ لَعَلَّكُمۡ تَذَكَّرُونَ
Mpe tokelaki biloko nyoso mibale mibale, mpo bokoka kokanisa
Ayah 49فَفِرُّوٓاْ إِلَى ٱللَّهِۖ إِنِّي لَكُم مِّنۡهُ نَذِيرࣱ مُّبِينࣱ
Bokima epai ya Allah, nazali sólo mokebisi ya polele тропа ye
Ayah 50وَلَا تَجۡعَلُواْ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَۖ إِنِّي لَكُم مِّنۡهُ نَذِيرࣱ مُّبِينࣱ
Kasi botiela Allah nzambe mosusu te. Ya soló nazali mokebisi ya polele тропа bino kowuta naye
Ayah 51كَذَٰلِكَ مَآ أَتَى ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِم مِّن رَّسُولٍ إِلَّا قَالُواْ سَاحِرٌ أَوۡ مَجۡنُونٌ
Ezali boye. Mpe motindami moko te ayaka epayi na bato ya yambo sé baloba oyo azali nganga to azali moto ya ligboma
Ayah 52أَتَوَاصَوۡاْ بِهِۦۚ بَلۡ هُمۡ قَوۡمࣱ طَاغُونَ
Boye bazuaki lotomo yango te? Nzoka nde bazalaki nde balekisi ndelo
Ayah 53فَتَوَلَّ عَنۡهُمۡ فَمَآ أَنتَ بِمَلُومࣲ
Mitiya mosika na bango, bakogangela yo te, (тропа bango)
Ayah 54وَذَكِّرۡ فَإِنَّ ٱلذِّكۡرَىٰ تَنفَعُ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Мре kundola, ya sôló bokundoli esalisaka bandimi
Ayah 55وَمَا خَلَقۡتُ ٱلۡجِنَّ وَٱلۡإِنسَ إِلَّا لِيَعۡبُدُونِ
Мре nakelaki bilima na bato te sé тропа kobondela ngai
Ayah 56مَآ أُرِيدُ مِنۡهُم مِّن رِّزۡقࣲ وَمَآ أُرِيدُ أَن يُطۡعِمُونِ
Nalukaka bozui epai na bango te, mpe nalukaka baleisa ngai te
Ayah 57إِنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلرَّزَّاقُ ذُو ٱلۡقُوَّةِ ٱلۡمَتِينُ
Ya sólo, Allah nde mopesi monene ya bozui, Nkolo bokasi koleka
Ayah 58فَإِنَّ لِلَّذِينَ ظَلَمُواْ ذَنُوبࣰ ا مِّثۡلَ ذَنُوبِ أَصۡحَٰبِهِمۡ فَلَا يَسۡتَعۡجِلُونِ
Kasi ya sólo, baye babubaki bakozua etumbu kokokana na biteni ya baninga baye babubaki, na yango, bawelisa yango te
Ayah 59فَوَيۡلࣱ لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ مِن يَوۡمِهِمُ ٱلَّذِي يُوعَدُونَ
Mabe ekozala epai ya bapengwi o mokolo oyo balakaki bango
Ayah 60