Surah Ash-Shams — The Sun
Surah Ash-Shams (The Sun) is chapter 91 of the Quran, with 15 verses. This page presents the Arabic text with a Lingala translation, verse by verse.
وَٱلشَّمۡسِ وَضُحَىٰهَا
(Na lapi) na mwese mpe na bongengi na yango
Ayah 1وَٱلۡقَمَرِ إِذَا تَلَىٰهَا
(Mpe na lapi) na sanza ntango elandaka mwese
Ayah 2وَٱلنَّهَارِ إِذَا جَلَّىٰهَا
(Mpe na lapi) na moyi ntango ezali kongala
Ayah 3وَٱلَّيۡلِ إِذَا يَغۡشَىٰهَا
(Mpe na lapi) na butu ntango ezipi (mokili)
Ayah 4وَٱلسَّمَآءِ وَمَا بَنَىٰهَا
Mpe mapata na oyo atongi yango
Ayah 5وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا طَحَىٰهَا
Mpe mabele na oyo atanda yango
Ayah 6وَنَفۡسࣲ وَمَا سَوَّىٰهَا
Mpe na molimo na oyo abongisa yango
Ayah 7فَأَلۡهَمَهَا فُجُورَهَا وَتَقۡوَىٰهَا
Mpe alakisi ye mabe naye mpe malamu naye (kobunga naye na bokambami)
Ayah 8قَدۡ أَفۡلَحَ مَن زَكَّىٰهَا
Asili kolonga moto oyo apetoli (molimo naye)
Ayah 9وَقَدۡ خَابَ مَن دَسَّىٰهَا
Asili kobebisama oyo aboyi kopetola yango
Ayah 10كَذَّبَتۡ ثَمُودُ بِطَغۡوَىٰهَآ
Bato ya Thamúd balekisaki ndelo mpe baboyi kondima
Ayah 11إِذِ ٱنۢبَعَثَ أَشۡقَىٰهَا
Ntango moto mabe kati na bango atelemaki
Ayah 12فَقَالَ لَهُمۡ رَسُولُ ٱللَّهِ نَاقَةَ ٱللَّهِ وَسُقۡيَٰهَا
Motindami ya Allah alobaki na bango ete: Oyó ezali náqah ya Allah botika yango emela mayi
Ayah 13فَكَذَّبُوهُ فَعَقَرُوهَا فَدَمۡدَمَ عَلَيۡهِمۡ رَبُّهُم بِذَنۢبِهِمۡ فَسَوَّىٰهَا
Kasi baboyaki koyoka maloba naye mpe babomi yango, Nkolo na bango abomaki bango pona lisumu wana mpe akitisaki etumbu likolo na bango
Ayah 14وَلَا يَخَافُ عُقۡبَٰهَا
Mpe (Allah) azali na bobangi te na maye makoya sima
Ayah 15