Surah Ghafir — The Forgiver

Surah Ghafir (The Forgiver) is chapter 40 of the Quran, with 85 verses. This page presents the Arabic text with a Lingala translation, verse by verse.

حمٓ

Há, mím

Ayah 1

تَنزِيلُ ٱلۡكِتَٰبِ مِنَ ٱللَّهِ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡعَلِيمِ

Kokita ya buku oyo ewuti epai na Allah wa nguya atonda boyebi

Ayah 2

غَافِرِ ٱلذَّنۢبِ وَقَابِلِ ٱلتَّوۡبِ شَدِيدِ ٱلۡعِقَابِ ذِي ٱلطَّوۡلِۖ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۖ إِلَيۡهِ ٱلۡمَصِيرُ

Molimbisi masumu mpe moyambi tubela, mopesi etumbu ya makasi, Nkolo ya bomengo, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló sé ye. Mpe epai naye nde bozongi bokozalaka

Ayah 3

مَا يُجَٰدِلُ فِيٓ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ إِلَّا ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فَلَا يَغۡرُرۡكَ تَقَلُّبُهُمۡ فِي ٱلۡبِلَٰدِ

Ezali sé bobele bapengwi nde bazali kosuanisa mikapo mia Allah, kaši misala mia bango ya mokili mikosa yo te

Ayah 4

كَذَّبَتۡ قَبۡلَهُمۡ قَوۡمُ نُوحࣲ وَٱلۡأَحۡزَابُ مِنۢ بَعۡدِهِمۡۖ وَهَمَّتۡ كُلُّ أُمَّةِۭ بِرَسُولِهِمۡ لِيَأۡخُذُوهُۖ وَجَٰدَلُواْ بِٱلۡبَٰطِلِ لِيُدۡحِضُواْ بِهِ ٱلۡحَقَّ فَأَخَذۡتُهُمۡۖ فَكَيۡفَ كَانَ عِقَابِ

Liboso na bango, bato ya Nûh basilaki koboya (ntoma) sima na bango, bato ya makita mpe baboyaki lokola, mpe bato na bato bamipesaki тропа kobundisa motindami na bango, mpe baye ya lokuta тропа kobundisa bosembo, mpe nazuaki bango, mpe ndenge nini etumbu na ngai ezalaki

Ayah 5

وَكَذَٰلِكَ حَقَّتۡ كَلِمَتُ رَبِّكَ عَلَى ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَنَّهُمۡ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِ

Мре lolenge moko na liloba lia Nkolo wa yo lízali na bosôló тропа bapengwi ete: Bazali bato ya moto

Ayah 6

ٱلَّذِينَ يَحۡمِلُونَ ٱلۡعَرۡشَ وَمَنۡ حَوۡلَهُۥ يُسَبِّحُونَ بِحَمۡدِ رَبِّهِمۡ وَيُؤۡمِنُونَ بِهِۦ وَيَسۡتَغۡفِرُونَ لِلَّذِينَ ءَامَنُواْۖ رَبَّنَا وَسِعۡتَ كُلَّ شَيۡءࣲ رَّحۡمَةࣰ وَعِلۡمࣰ ا فَٱغۡفِرۡ لِلَّذِينَ تَابُواْ وَٱتَّبَعُواْ سَبِيلَكَ وَقِهِمۡ عَذَابَ ٱلۡجَحِيمِ

В aye bazali komema ng wende naye, (ba anzelu) тре na baye bazingami pembeni na yango bazali kokumisa Nkolo wa bango, тре bazali kondima naye, тре bazali kosengela bandimi bolimbisi, (bazali koloba): Nkolo, eloko nyoso etondisami na ngolu nayo na boyebi, limbisa baye bazali kotubela mpe baye bazali kolanda nzela nayo, mpe batela bango na etumbu ya moto

Ayah 7

رَبَّنَا وَأَدۡخِلۡهُمۡ جَنَّٰتِ عَدۡنٍ ٱلَّتِي وَعَدتَّهُمۡ وَمَن صَلَحَ مِنۡ ءَابَآئِهِمۡ وَأَزۡوَٰجِهِمۡ وَذُرِّيَّٰتِهِمۡۚ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ

Nkolo, kotisa bango na Iola ya edeni oyo olakaki bango, mpe baye ya malamu kati na batata na bango mpe basi na bango mpe bana na bango, ya soló ozali wa bokasi otonda bwanya

Ayah 8

وَقِهِمُ ٱلسَّيِّـَٔاتِۚ وَمَن تَقِ ٱلسَّيِّـَٔاتِ يَوۡمَئِذࣲ فَقَدۡ رَحِمۡتَهُۥۚ وَذَٰلِكَ هُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ

Mpe tia bango mosika na etumbu ya misala ya mabe, mpo moto oyo okotia ye mosika na (etumbu) о mokolo wana, asili kozua ngolu nayo. Mpe wana nde ekozala elonga monene

Ayah 9

إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ يُنَادَوۡنَ لَمَقۡتُ ٱللَّهِ أَكۡبَرُ مِن مَّقۡتِكُمۡ أَنفُسَكُمۡ إِذۡ تُدۡعَوۡنَ إِلَى ٱلۡإِيمَٰنِ فَتَكۡفُرُونَ

Mpe тропа baye bapengwaki bakobengaka bango mpe kanda ya Allah likolo na bino eleki makasi mingi likolo ya kanda na bino moko tango bobengamaki na bondimi, boponaki sé kotikala na bopengwi

Ayah 10

قَالُواْ رَبَّنَآ أَمَتَّنَا ٱثۡنَتَيۡنِ وَأَحۡيَيۡتَنَا ٱثۡنَتَيۡنِ فَٱعۡتَرَفۡنَا بِذُنُوبِنَا فَهَلۡ إِلَىٰ خُرُوجࣲ مِّن سَبِيلࣲ‏

Bakolobaka: Nkolo wa biso, obomaki biso mbala mibale mpe opesaki biso bomoyi mbala mibale, mpe toyebi mabe na biso, boye nzela ya kobimela ezali

Ayah 11

ذَٰلِكُم بِأَنَّهُۥٓ إِذَا دُعِيَ ٱللَّهُ وَحۡدَهُۥ كَفَرۡتُمۡ وَإِن يُشۡرَكۡ بِهِۦ تُؤۡمِنُواْۚ فَٱلۡحُكۡمُ لِلَّهِ ٱلۡعَلِيِّ ٱلۡكَبِيرِ

Bozalaki soki (nkombo) ya Allah ebengami na bomoko bwa ye, bozali koboya kondima, mpe soki basangisi ye (Allah) bondimi, mobeko ya kokata likambo ezali ya Allah, wa likolo azali monene

Ayah 12

هُوَ ٱلَّذِي يُرِيكُمۡ ءَايَٰتِهِۦ وَيُنَزِّلُ لَكُم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ رِزۡقࣰ اۚ وَمَا يَتَذَكَّرُ إِلَّا مَن يُنِيبُ

Ye nde alakisaki bino bilembo bia ye, mpe azali kokitisela bino bozui kowuta na likolo. Azali kokanisa sé oyo amizongisi epai naye (ya Allah)

Ayah 13

فَٱدۡعُواْ ٱللَّهَ مُخۡلِصِينَ لَهُ ٱلدِّينَ وَلَوۡ كَرِهَ ٱلۡكَٰفِرُونَ

Bokumisa Allah na bomoko mpe kolanda lingomba lia bosôló, ata soki bapengwi bazali koboya

Ayah 14

رَفِيعُ ٱلدَّرَجَٰتِ ذُو ٱلۡعَرۡشِ يُلۡقِي ٱلرُّوحَ مِنۡ أَمۡرِهِۦ عَلَىٰ مَن يَشَآءُ مِنۡ عِبَادِهِۦ لِيُنذِرَ يَوۡمَ ٱلتَّلَاقِ

Amitombuami likolo koleka, Nkolo ngwende, atindaka molimo mosantu epai ya moto oyo alingi kati ya bawumbu naye, mpo ete akebisa тропа mokolo ya bokutani

Ayah 15

يَوۡمَ هُم بَٰرِزُونَۖ لَا يَخۡفَىٰ عَلَى ٱللَّهِ مِنۡهُمۡ شَيۡءࣱۚ لِّمَنِ ٱلۡمُلۡكُ ٱلۡيَوۡمَۖ لِلَّهِ ٱلۡوَٰحِدِ ٱلۡقَهَّارِ

Mokolo moye bakobimaka polele, eloko moko te ekobombamaka Allah, lelo; kibokonzi bozali ya nani? (eyano ekozalaka): Ya Allah wa bomoko atonda bokasi

Ayah 16

ٱلۡيَوۡمَ تُجۡزَىٰ كُلُّ نَفۡسِۭ بِمَا كَسَبَتۡۚ لَا ظُلۡمَ ٱلۡيَوۡمَۚ إِنَّ ٱللَّهَ سَرِيعُ ٱلۡحِسَابِ

Lelo molimo (moto) nyoso mokozua lifuta kolanda na maye asalaki, lelo kobuba bozali te, ya soló, Allah azali noki тропа kofuta

Ayah 17

وَأَنذِرۡهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡأٓزِفَةِ إِذِ ٱلۡقُلُوبُ لَدَى ٱلۡحَنَاجِرِ كَٰظِمِينَۚ مَا لِلظَّٰلِمِينَ مِنۡ حَمِيمࣲ وَلَا شَفِيعࣲ يُطَاعُ

Mpe kebisa bango тропа mokolo moye mozali pene (mokolo ya suka), tango mitema na mingongo mikomataka mpe mikokangama. В abubi bakozuaka moninga ya kosalisa bango te mpe kosunga bango te

Ayah 18

يَعۡلَمُ خَآئِنَةَ ٱلۡأَعۡيُنِ وَمَا تُخۡفِي ٱلصُّدُورُ

(Allah) ayebaka mabe oyo miso esalaka, mpe manso maye mabombami o mitema. (mia bato)

Ayah 19

وَٱللَّهُ يَقۡضِي بِٱلۡحَقِّۖ وَٱلَّذِينَ يَدۡعُونَ مِن دُونِهِۦ لَا يَقۡضُونَ بِشَيۡءٍۗ إِنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡبَصِيرُ

Mpe Allah akataka makambo na bosembo, mpe baye bazali kobondela na botiki ye bakokata likambo moko te, ya sólo, Allah azali moyoki mpe azali momoni

Ayah 20

۞أَوَلَمۡ يَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَيَنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ كَانُواْ مِن قَبۡلِهِمۡۚ كَانُواْ هُمۡ أَشَدَّ مِنۡهُمۡ قُوَّةࣰ وَءَاثَارࣰ ا فِي ٱلۡأَرۡضِ فَأَخَذَهُمُ ٱللَّهُ بِذُنُوبِهِمۡ وَمَا كَانَ لَهُم مِّنَ ٱللَّهِ مِن وَاقࣲ‏

Boye bazali kotambola na mokili te mpo batala lolenge esukela baye baleka liboso na bango, balekaki bango na bokasi mpe na bilembo okati ya mabele, mpe Allah azuaki bango тропа masumu та bango. Mpe bakokaki kobatelama te na maye Allah asalaki

Ayah 21

ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ كَانَت تَّأۡتِيهِمۡ رُسُلُهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ فَكَفَرُواْ فَأَخَذَهُمُ ٱللَّهُۚ إِنَّهُۥ قَوِيࣱّ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ

Boye ya sólo, batindami bazalaki koyela bango bilembo, mpe baboyaki kondima, mpe Allah azuaki bango. Ya soló, ye azali makasi тропа etumbu

Ayah 22

وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا مُوسَىٰ بِـَٔايَٰتِنَا وَسُلۡطَٰنࣲ مُّبِينٍ

Мре tosilaki kotinda Mûssa na bilembo bia biso mpe bilembetele ya polele

Ayah 23

إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ وَهَٰمَٰنَ وَقَٰرُونَ فَقَالُواْ سَٰحِرࣱ كَذَّابࣱ‏

Epai ya falo na Hâmân na Qârûn, kasi balobaki ete: Oyo nganga moto ya lokuta monene

Ayah 24

فَلَمَّا جَآءَهُم بِٱلۡحَقِّ مِنۡ عِندِنَا قَالُواْ ٱقۡتُلُوٓاْ أَبۡنَآءَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَعَهُۥ وَٱسۡتَحۡيُواْ نِسَآءَهُمۡۚ وَمَا كَيۡدُ ٱلۡكَٰفِرِينَ إِلَّا فِي ضَلَٰلࣲ‏

Mpe tango ayelaki bango bosôló kowuta epai na biso, balobaki: B oboma bana ya mibali baye bazali na bondimi elongo naye mpe botika basi na bango na bomoyi, kasi likita ya bapagano ezalaka sé na libunga

Ayah 25

وَقَالَ فِرۡعَوۡنُ ذَرُونِيٓ أَقۡتُلۡ مُوسَىٰ وَلۡيَدۡعُ رَبَّهُۥٓۖ إِنِّيٓ أَخَافُ أَن يُبَدِّلَ دِينَكُمۡ أَوۡ أَن يُظۡهِرَ فِي ٱلۡأَرۡضِ ٱلۡفَسَادَ

Mpe falo alobaki: Botika ngai na boma Mûssa, mpe abenga Nkolo waye. Ya soló, nazali kobanga noki akobongola lingomba lia bino to noki akosala mbeba kati na mokili

Ayah 26

وَقَالَ مُوسَىٰٓ إِنِّي عُذۡتُ بِرَبِّي وَرَبِّكُم مِّن كُلِّ مُتَكَبِّرࣲ لَّا يُؤۡمِنُ بِيَوۡمِ ٱلۡحِسَابِ

Mpe Mûssa alobi: Nazali koluka libateli epai ya Nkolo wa ngai na ya bino тропа baye bazali kosala lolendo baye balingi kondima na mokolo mwa suka te

Ayah 27

وَقَالَ رَجُلࣱ مُّؤۡمِنࣱ مِّنۡ ءَالِ فِرۡعَوۡنَ يَكۡتُمُ إِيمَٰنَهُۥٓ أَتَقۡتُلُونَ رَجُلًا أَن يَقُولَ رَبِّيَ ٱللَّهُ وَقَدۡ جَآءَكُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ مِن رَّبِّكُمۡۖ وَإِن يَكُ كَٰذِبࣰ ا فَعَلَيۡهِ كَذِبُهُۥۖ وَإِن يَكُ صَادِقࣰ ا يُصِبۡكُم بَعۡضُ ٱلَّذِي يَعِدُكُمۡۖ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَهۡدِي مَنۡ هُوَ مُسۡرِفࣱ كَذَّابࣱ‏

Mpe mobali moko ya mondimi kati ya bato ya falo abombaka bondimi bwa ye alobi: Boye bozali koboma moto mpo alobi: Nkolo na ngai Allah? Mpe asili koyela bino bilembo binene kowuta epai ya Nkolo wa bino? Soki solo azali na lokuta, lokuta wana ekozongela sé ye moko, mpe soki azali koloba bosembo, ndambu ya masumu ya maye azali kokebisa bino ekozua bino. Ya soló, Allah akambaka moto ya mabe mpe ya lokuta te

Ayah 28

يَٰقَوۡمِ لَكُمُ ٱلۡمُلۡكُ ٱلۡيَوۡمَ ظَٰهِرِينَ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَمَن يَنصُرُنَا مِنۢ بَأۡسِ ٱللَّهِ إِن جَآءَنَاۚ قَالَ فِرۡعَوۡنُ مَآ أُرِيكُمۡ إِلَّا مَآ أَرَىٰ وَمَآ أَهۡدِيكُمۡ إِلَّا سَبِيلَ ٱلرَّشَادِ

Eh bato ba ngai! Bozali na bokonzi lelo kati na mabele, nani akosungaka biso na etumbu ya Allah tango ekoyelaka biso? Falo alobi: Nakolakisa bino sé oyo nazali kornona, mpe nakokamba bino te sé na nzela ya semba

Ayah 29

وَقَالَ ٱلَّذِيٓ ءَامَنَ يَٰقَوۡمِ إِنِّيٓ أَخَافُ عَلَيۡكُم مِّثۡلَ يَوۡمِ ٱلۡأَحۡزَابِ

Mpe oyo azalaki na bondimi alobi: Eh bato na ngai! Nazali kobangela bino noki ekozalela bino lokola o mokolo ya lisanga ya mapinga

Ayah 30

مِثۡلَ دَأۡبِ قَوۡمِ نُوحࣲ وَعَادࣲ وَثَمُودَ وَٱلَّذِينَ مِنۢ بَعۡدِهِمۡۚ وَمَا ٱللَّهُ يُرِيدُ ظُلۡمࣰ ا لِّلۡعِبَادِ

Ndenge moko lokola bato ya Núh mpe bato ya Aad na Thamúd, mpe bato basusu bayaki sima na bango. Kasi Allah alingeli bawumbu naye libubi te

Ayah 31

وَيَٰقَوۡمِ إِنِّيٓ أَخَافُ عَلَيۡكُمۡ يَوۡمَ ٱلتَّنَادِ

Eh bato na ngai! Nazali kobangela bino тропа mokolo ya bobengami

Ayah 32

يَوۡمَ تُوَلُّونَ مُدۡبِرِينَ مَا لَكُم مِّنَ ٱللَّهِ مِنۡ عَاصِمࣲۗ وَمَن يُضۡلِلِ ٱللَّهُ فَمَا لَهُۥ مِنۡ هَادࣲ‏

Mokolo moye bokopesaka mikongo na bokimi, moko te akobatela bino liboso ya Allah mpe oyo Allah akobungisa, akozuaka mokambi te

Ayah 33

وَلَقَدۡ جَآءَكُمۡ يُوسُفُ مِن قَبۡلُ بِٱلۡبَيِّنَٰتِ فَمَا زِلۡتُمۡ فِي شَكࣲّ مِّمَّا جَآءَكُم بِهِۦۖ حَتَّىٰٓ إِذَا هَلَكَ قُلۡتُمۡ لَن يَبۡعَثَ ٱللَّهُ مِنۢ بَعۡدِهِۦ رَسُولࣰ اۚ كَذَٰلِكَ يُضِلُّ ٱللَّهُ مَنۡ هُوَ مُسۡرِفࣱ مُّرۡتَابٌ

Yûsuf asilaki koyela bino bilembo binene liboso, kasi botikaki tembe te тропа oyo ayelaki bino, kino tango akufaki bolobaki: Allah akotinda lisusu motindami sima naye te, lolenge wana nde Allah abungisaka moto ya mabe mpe ya tembe

Ayah 34

ٱلَّذِينَ يُجَٰدِلُونَ فِيٓ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ بِغَيۡرِ سُلۡطَٰنٍ أَتَىٰهُمۡۖ كَبُرَ مَقۡتًا عِندَ ٱللَّهِ وَعِندَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْۚ كَذَٰلِكَ يَطۡبَعُ ٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ قَلۡبِ مُتَكَبِّرࣲ جَبَّارࣲ‏

Baye bazalaki kobundisa bilembo bia Allah тре bazali na bilembetele te, ezali lisumu monene epai na Allah тре epai ya bandimi. Na boye nde Allah azali kokanga motema ya moto nyoso ya mabe mpe ya lolendo

Ayah 35

وَقَالَ فِرۡعَوۡنُ يَٰهَٰمَٰنُ ٱبۡنِ لِي صَرۡحࣰ ا لَّعَلِّيٓ أَبۡلُغُ ٱلۡأَسۡبَٰبَ

Mpe falo alobi: Eh Hâmân! Tongela ngai ndako ya likolo koleka, tango mosusu nakoki kozua banzela

Ayah 36

أَسۡبَٰبَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ فَأَطَّلِعَ إِلَىٰٓ إِلَٰهِ مُوسَىٰ وَإِنِّي لَأَظُنُّهُۥ كَٰذِبࣰ اۚ وَكَذَٰلِكَ زُيِّنَ لِفِرۡعَوۡنَ سُوٓءُ عَمَلِهِۦ وَصُدَّ عَنِ ٱلسَّبِيلِۚ وَمَا كَيۡدُ فِرۡعَوۡنَ إِلَّا فِي تَبَابࣲ‏

Banzela ya likolo, mpo namata epai ya Nzambe ya Mûssa, kasi nayebi ete ye azali moto ya lokuta. Lolenge wana nde falo azalaki kokanisa ete azali kosala malamu nzoka nde azalaki kosala mabe koleka, mpe abungaki nzela ya semba. Kasi likita lia falo lizalaki sé bozangi na bokufi

Ayah 37

وَقَالَ ٱلَّذِيٓ ءَامَنَ يَٰقَوۡمِ ٱتَّبِعُونِ أَهۡدِكُمۡ سَبِيلَ ٱلرَّشَادِ

Oyo andimaki alobi: Oh bato na ngai! Bolanda ngai, nakokamba bino o nzela ya semba

Ayah 38

يَٰقَوۡمِ إِنَّمَا هَٰذِهِ ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَا مَتَٰعࣱ وَإِنَّ ٱلۡأٓخِرَةَ هِيَ دَارُ ٱلۡقَرَارِ

Eh bato na ngai! Bomoyi boye bozali sé kosepelisa na mwa tango токе, kasi mokolo mwa lobi mozali esika (ndako) kitoko тропа kofanda

Ayah 39

مَنۡ عَمِلَ سَيِّئَةࣰ فَلَا يُجۡزَىٰٓ إِلَّا مِثۡلَهَاۖ وَمَنۡ عَمِلَ صَٰلِحࣰ ا مِّن ذَكَرٍ أَوۡ أُنثَىٰ وَهُوَ مُؤۡمِنࣱ فَأُوْلَٰٓئِكَ يَدۡخُلُونَ ٱلۡجَنَّةَ يُرۡزَقُونَ فِيهَا بِغَيۡرِ حِسَابࣲ‏

Oyo asali mabe akofutama sé ndenge asalaki, mpe oyo akosala malamu mwasi to mobali mpe azali mondimi, bango wana nde bakokota na paladiso, bakoleisama maye mazali na suka te

Ayah 40

۞وَيَٰقَوۡمِ مَا لِيٓ أَدۡعُوكُمۡ إِلَى ٱلنَّجَوٰةِ وَتَدۡعُونَنِيٓ إِلَى ٱلنَّارِ

Mpe Oh bato na ngai! Nini na ngai, nazali kobenga bino na lobiko, kaši bino bozali kobenga ngai na móto

Ayah 41

تَدۡعُونَنِي لِأَكۡفُرَ بِٱللَّهِ وَأُشۡرِكَ بِهِۦ مَا لَيۡسَ لِي بِهِۦ عِلۡمࣱ وَأَنَا۠ أَدۡعُوكُمۡ إِلَى ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡغَفَّٰرِ

Bozali koyebisa ngai napengwa na Allah mpe nasangisa ye na maye nayebi te? Kaši nazali kobenga bino epai ya oyo atonda bokasi azali molimbisi

Ayah 42

لَا جَرَمَ أَنَّمَا تَدۡعُونَنِيٓ إِلَيۡهِ لَيۡسَ لَهُۥ دَعۡوَةࣱ فِي ٱلدُّنۡيَا وَلَا فِي ٱلۡأٓخِرَةِ وَأَنَّ مَرَدَّنَآ إِلَى ٱللَّهِ وَأَنَّ ٱلۡمُسۡرِفِينَ هُمۡ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِ

Tembe ezali te na oyo bozali kobenga ngai naya epai naye, azali na bosôló te, ye akoki kondimela (mabondeli) te, ezala awa na mokili to na mokolo ya suka, mpe bozongi bwa biso bokozalaka nde epai ya Allah, mpe ya soló bato ya mabe esika na bango ekozalaka nde móto

Ayah 43

فَسَتَذۡكُرُونَ مَآ أَقُولُ لَكُمۡۚ وَأُفَوِّضُ أَمۡرِيٓ إِلَى ٱللَّهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ بَصِيرُۢ بِٱلۡعِبَادِ

Kala te, bokokanisaka maye nazali koyebisa bino. Mpe napesi makambo na ngai manso epai ya Allah. Ya soló, Allah amonaka bawumbu (naye)

Ayah 44

فَوَقَىٰهُ ٱللَّهُ سَيِّـَٔاتِ مَا مَكَرُواْۖ وَحَاقَ بِـَٔالِ فِرۡعَوۡنَ سُوٓءُ ٱلۡعَذَابِ

Allah abatelaki ye na likita ya mabe liye basalaki, mpe etumbu ya mabe ezingaki bato ya falo

Ayah 45

ٱلنَّارُ يُعۡرَضُونَ عَلَيۡهَا غُدُوࣰّ ا وَعَشِيࣰّ اۚ وَيَوۡمَ تَقُومُ ٱلسَّاعَةُ أَدۡخِلُوٓاْ ءَالَ فِرۡعَوۡنَ أَشَدَّ ٱلۡعَذَابِ

Bakofanda na moto tongo mpe mpokwa, mpe tango mokolo ya suka ekotelema, bokotisa bato ya falo na etumbu ya makasi koleka

Ayah 46

وَإِذۡ يَتَحَآجُّونَ فِي ٱلنَّارِ فَيَقُولُ ٱلضُّعَفَٰٓؤُاْ لِلَّذِينَ ٱسۡتَكۡبَرُوٓاْ إِنَّا كُنَّا لَكُمۡ تَبَعࣰ ا فَهَلۡ أَنتُم مُّغۡنُونَ عَنَّا نَصِيبࣰ ا مِّنَ ٱلنَّارِ

Mpe tango bato ya motawu na bato ya lolendo bakozongisanaka maloba kati na lifelo, ya soló, biso tozalaki nde kolanda bino, boye bokoki kolongolela biso ndambu ya etumbu ya moto te

Ayah 47

قَالَ ٱلَّذِينَ ٱسۡتَكۡبَرُوٓاْ إِنَّا كُلࣱّ فِيهَآ إِنَّ ٱللَّهَ قَدۡ حَكَمَ بَيۡنَ ٱلۡعِبَادِ

Bato ya lolendo bakolobaka: Ya sólo, biso banso tozuami na kati na yango, kasi Allah asili kokata makambo kati kati ya bawumbu (baye)

Ayah 48

وَقَالَ ٱلَّذِينَ فِي ٱلنَّارِ لِخَزَنَةِ جَهَنَّمَ ٱدۡعُواْ رَبَّكُمۡ يُخَفِّفۡ عَنَّا يَوۡمࣰ ا مِّنَ ٱلۡعَذَابِ

Mpe baye bakozalaka o kati ya moto bakoloba na bakengeli ya lifelo: Bosengela biso Nkolo wa bino alembisela biso etumbu ata mokolo moko

Ayah 49

قَالُوٓاْ أَوَلَمۡ تَكُ تَأۡتِيكُمۡ رُسُلُكُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِۖ قَالُواْ بَلَىٰۚ قَالُواْ فَٱدۡعُواْۗ وَمَا دُعَٰٓؤُاْ ٱلۡكَٰفِرِينَ إِلَّا فِي ضَلَٰلٍ

Bakoyanola bango ete: Boye batindami bayelaki bino bilembo te? Bakozongisa ete: Iyo; bakoloba na bango lisusu: Bosenga, kasi kosenga ya bapengwi ezali sé na libungi

Ayah 50

إِنَّا لَنَنصُرُ رُسُلَنَا وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَيَوۡمَ يَقُومُ ٱلۡأَشۡهَٰدُ

Ya solo, tokolongisa batindami na biso elongo na baye bandima na nsé mpe o mokolo oyo banzeneneke bakotelema

Ayah 51

يَوۡمَ لَا يَنفَعُ ٱلظَّٰلِمِينَ مَعۡذِرَتُهُمۡۖ وَلَهُمُ ٱللَّعۡنَةُ وَلَهُمۡ سُوٓءُ ٱلدَّارِ

Mokolo mona bosengi ya bolimbisi bwa bapengwi bokozalaka na ntina te, bakozuaka botutu mpe bakovandaka na mabe

Ayah 52

وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا مُوسَى ٱلۡهُدَىٰ وَأَوۡرَثۡنَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ ٱلۡكِتَٰبَ

Mpe tosilaki kopesa Mûssa bokambi, mpe tokitanisaki bana ya isalayele buku

Ayah 53

هُدࣰ ى وَذِكۡرَىٰ لِأُوْلِي ٱلۡأَلۡبَٰبِ

(Ezala) bokambami na bokundoli тропа baye bazali kokanisa

Ayah 54

فَٱصۡبِرۡ إِنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقࣱّ وَٱسۡتَغۡفِرۡ لِذَنۢبِكَ وَسَبِّحۡ بِحَمۡدِ رَبِّكَ بِٱلۡعَشِيِّ وَٱلۡإِبۡكَٰرِ

Kanga motema; elaka ya Allah ezali ya soló, senga bolimbisi na masumu nayo mpe pesa lokumu epai ya Nkolo wayo, na tongo mpe na pokwa

Ayah 55

إِنَّ ٱلَّذِينَ يُجَٰدِلُونَ فِيٓ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ بِغَيۡرِ سُلۡطَٰنٍ أَتَىٰهُمۡ إِن فِي صُدُورِهِمۡ إِلَّا كِبۡرࣱ مَّا هُم بِبَٰلِغِيهِۚ فَٱسۡتَعِذۡ بِٱللَّهِۖ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡبَصِيرُ

Ya sólo, baye bazali kobundisa mikapo mia Allah, mpe bazali na bilembetele te, ya sólo, bazali na lolendo okati na ba ntolo na bango. Bakozuaka maye balingi te, senga ebateli epai ya Allah. Ya sólo, ye azali moyoki, momoni ya nionso

Ayah 56

لَخَلۡقُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ أَكۡبَرُ مِنۡ خَلۡقِ ٱلنَّاسِ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ

Bokelami ya likolo na ya mabele eleki bokelami ya bato, kasi ebele ya bato bazali koyeba te

Ayah 57

وَمَا يَسۡتَوِي ٱلۡأَعۡمَىٰ وَٱلۡبَصِيرُ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَلَا ٱلۡمُسِيٓءُۚ قَلِيلࣰ ا مَّا تَتَذَكَّرُونَ

Mpe oyo miso ekufa na oyo azali kornona bakokani te, mpe baye bandima mpe basali misala ya malamu bakokani mpe te na oyo asalaka mabe, токе nde bozali kokanisa

Ayah 58

إِنَّ ٱلسَّاعَةَ لَأٓتِيَةࣱ لَّا رَيۡبَ فِيهَا وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يُؤۡمِنُونَ

Ya soló, tango ekoyaka, tembe ezali te тропа yango. Kasi ebele ya bato bazali kondima te

Ayah 59

وَقَالَ رَبُّكُمُ ٱدۡعُونِيٓ أَسۡتَجِبۡ لَكُمۡۚ إِنَّ ٱلَّذِينَ يَسۡتَكۡبِرُونَ عَنۡ عِبَادَتِي سَيَدۡخُلُونَ جَهَنَّمَ دَاخِرِينَ

Mpe Nkolo na bino alobaki ete: Bobelela ngai, nakoyanola bino. Ya sólo, baye batiki kobondela ngai na lolendo bakokota na lifelo, mpe bakozanga lokumu

Ayah 60

ٱللَّهُ ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلَّيۡلَ لِتَسۡكُنُواْ فِيهِ وَٱلنَّهَارَ مُبۡصِرًاۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَذُو فَضۡلٍ عَلَى ٱلنَّاسِ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَشۡكُرُونَ

Allah nde atiyela bino butu mpo bopemaka, mpe atiyeli bino mokolo mpo bomonaka bongengi. Ya sólo, Allah azali Nkolo wa bolamu epai ya bato, kasi ebele ya bato bazali kotondo (ye) te

Ayah 61

ذَٰلِكُمُ ٱللَّهُ رَبُّكُمۡ خَٰلِقُ كُلِّ شَيۡءࣲ لَّآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۖ فَأَنَّىٰ تُؤۡفَكُونَ

Wana nde Allah Nkolo wa bino, mokeli wa biloko binso, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosoló sé ye mei, boye тропа nini bozali kotika (nzela ya semba)

Ayah 62

كَذَٰلِكَ يُؤۡفَكُ ٱلَّذِينَ كَانُواْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ يَجۡحَدُونَ

(Ndakisa); lokola baye bazali koboya mikapo mia Allah, bango batiki (nzela ya semba)

Ayah 63

ٱللَّهُ ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلۡأَرۡضَ قَرَارࣰ ا وَٱلسَّمَآءَ بِنَآءࣰ وَصَوَّرَكُمۡ فَأَحۡسَنَ صُوَرَكُمۡ وَرَزَقَكُم مِّنَ ٱلطَّيِّبَٰتِۚ ذَٰلِكُمُ ٱللَّهُ رَبُّكُمۡۖ فَتَبَارَكَ ٱللَّهُ رَبُّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

Allah nde akeli тропа bino mabele ya kofandisama mpe likolo lokola motondo, mpe abongisi bino kitoko koleka mpe apesi bino bilei ya malamu. Wana nde Allah Nkolo na bino, mapamboli na Allah Nkolo ya mokili

Ayah 64

هُوَ ٱلۡحَيُّ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ فَٱدۡعُوهُ مُخۡلِصِينَ لَهُ ٱلدِّينَۗ ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

Azali na bomoyi, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye mei, bobelela ye na bomoko bwa ye, mpe holanda lingomba lilamu (islamu), lokumu na Allah Nkolo wa molongo

Ayah 65

۞قُلۡ إِنِّي نُهِيتُ أَنۡ أَعۡبُدَ ٱلَّذِينَ تَدۡعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ لَمَّا جَآءَنِيَ ٱلۡبَيِّنَٰتُ مِن رَّبِّي وَأُمِرۡتُ أَنۡ أُسۡلِمَ لِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

Loba: Ya soló, bapekisi ngai ete nabondela baye bozali kobondela botiki Allah, na tango polele esili koyela ngai kowuta epai ya Nkolo na ngai, mpe natindami ete namisokia epai ya Nkolo ya mokili

Ayah 66

هُوَ ٱلَّذِي خَلَقَكُم مِّن تُرَابࣲ ثُمَّ مِن نُّطۡفَةࣲ ثُمَّ مِنۡ عَلَقَةࣲ ثُمَّ يُخۡرِجُكُمۡ طِفۡلࣰ ا ثُمَّ لِتَبۡلُغُوٓاْ أَشُدَّكُمۡ ثُمَّ لِتَكُونُواْ شُيُوخࣰ اۚ وَمِنكُم مَّن يُتَوَفَّىٰ مِن قَبۡلُۖ وَلِتَبۡلُغُوٓاْ أَجَلࣰ ا مُّسَمࣰّ ى وَلَعَلَّكُمۡ تَعۡقِلُونَ

Ye nde akelaki bino na mabele, sima na litanga ya mayi ya mokongo sima ekomi liboke ya makila (bokomi mosuni ya makila) sima abimisi bino mwana moke, sima bokoli bokomi makasi, sima bokomi mibange,mpe na kati na bino, ba oyo bakufa noki, mpo ete bokokisa mibu miyebani, na ntina ete bososolo

Ayah 67

هُوَ ٱلَّذِي يُحۡيِۦ وَيُمِيتُۖ فَإِذَا قَضَىٰٓ أَمۡرࣰ ا فَإِنَّمَا يَقُولُ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ

Ye nde apesaka bomoyi mpe liwa, mpe soki alingi kosala likambo akolobaka: Zala; mpe ezalisami

Ayah 68

أَلَمۡ تَرَ إِلَى ٱلَّذِينَ يُجَٰدِلُونَ فِيٓ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ أَنَّىٰ يُصۡرَفُونَ

Boye ozali kornona te ete: Baye bazali kobundisa mikapo mia Allah ba pengwisami (na bosembo)

Ayah 69

ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِٱلۡكِتَٰبِ وَبِمَآ أَرۡسَلۡنَا بِهِۦ رُسُلَنَاۖ فَسَوۡفَ يَعۡلَمُونَ

Baye bazali koboya kondima na buku (kurani) na maye totindaki batindami na biso na yango, bakoyeba kala mingi te

Ayah 70

إِذِ ٱلۡأَغۡلَٰلُ فِيٓ أَعۡنَٰقِهِمۡ وَٱلسَّلَٰسِلُ يُسۡحَبُونَ

Bakokanga bakingo mpe makolo na bango na minyololo mpe bakobendama (o lifelo)

Ayah 71

فِي ٱلۡحَمِيمِ ثُمَّ فِي ٱلنَّارِ يُسۡجَرُونَ

O kati ya mayi ya lifelo, sima bakozikisama na moto

Ayah 72

ثُمَّ قِيلَ لَهُمۡ أَيۡنَ مَا كُنتُمۡ تُشۡرِكُونَ

Sima bakoyebisaka bango: Wapi baye bozalaki kosangisa

Ayah 73

مِن دُونِ ٱللَّهِۖ قَالُواْ ضَلُّواْ عَنَّا بَل لَّمۡ نَكُن نَّدۡعُواْ مِن قَبۡلُ شَيۡـࣰٔ اۚ كَذَٰلِكَ يُضِلُّ ٱللَّهُ ٱلۡكَٰفِرِينَ

Elongo na Allah! Bakozongisa ete: Basundoli biso, mpe biso tozalaki kokumisa eloko te liboso. Na lolenge wana nde Allah azali kobungisa bapengwi

Ayah 74

ذَٰلِكُم بِمَا كُنتُمۡ تَفۡرَحُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ بِغَيۡرِ ٱلۡحَقِّ وَبِمَا كُنتُمۡ تَمۡرَحُونَ

Wana nde lifuta ya maye bozalaki kosepela na yango na mokili na lokuta, mpe bovimbaki na lolendo

Ayah 75

ٱدۡخُلُوٓاْ أَبۡوَٰبَ جَهَنَّمَ خَٰلِدِينَ فِيهَاۖ فَبِئۡسَ مَثۡوَى ٱلۡمُتَكَبِّرِينَ

Bokota na bikuke ya lifelo libela, oyo esika mabe ya bato ya lolendo

Ayah 76

فَٱصۡبِرۡ إِنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقࣱّۚ فَإِمَّا نُرِيَنَّكَ بَعۡضَ ٱلَّذِي نَعِدُهُمۡ أَوۡ نَتَوَفَّيَنَّكَ فَإِلَيۡنَا يُرۡجَعُونَ

Kanga motema; ya soló, elaka ya Allah ezali ya solo. Tango mosusu tokolakisa yo ndambu ya etumbu tolengeli тропа bango, to mpe tokoboma yo yambo ete eyela bango, mpe epai na biso nde bakozongisama

Ayah 77

وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا رُسُلࣰ ا مِّن قَبۡلِكَ مِنۡهُم مَّن قَصَصۡنَا عَلَيۡكَ وَمِنۡهُم مَّن لَّمۡ نَقۡصُصۡ عَلَيۡكَۗ وَمَا كَانَ لِرَسُولٍ أَن يَأۡتِيَ بِـَٔايَةٍ إِلَّا بِإِذۡنِ ٱللَّهِۚ فَإِذَا جَآءَ أَمۡرُ ٱللَّهِ قُضِيَ بِٱلۡحَقِّ وَخَسِرَ هُنَالِكَ ٱلۡمُبۡطِلُونَ

Ya sólo, tosilaki kotinda yambo nayo batindami, kati na bango tobetelaki yo masolo, mpe тропа basusu tobetelaki yo te. Mpe motindami akokaki koya na elembo (mokapo) te sé ezala na ndingisa ya Allah. Mpe tango motindo mwa Allah mokoyaka, makambo manso makokatamaka na bosôló, mpe baye balingaki sé kobuka lokuta, bakozangaka

Ayah 78

ٱللَّهُ ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلۡأَنۡعَٰمَ لِتَرۡكَبُواْ مِنۡهَا وَمِنۡهَا تَأۡكُلُونَ

Allah nde akeli тропа bino banyama mpo bomataka likolo na yango, mpe misusu boliaka yango

Ayah 79

وَلَكُمۡ فِيهَا مَنَٰفِعُ وَلِتَبۡلُغُواْ عَلَيۡهَا حَاجَةࣰ فِي صُدُورِكُمۡ وَعَلَيۡهَا وَعَلَى ٱلۡفُلۡكِ تُحۡمَلُونَ

Misusu ezali kosalisa bino, mpe kati na yango bozali kobimisa biloko biye bolingaka, bozali komemama likolo na yango mpe likolo ya masuwa

Ayah 80

وَيُرِيكُمۡ ءَايَٰتِهِۦ فَأَيَّ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ تُنكِرُونَ

Mpe azali kolakisa bino bilembo bia ye, boye bilembo kani bia Allah bokoki koboya

Ayah 81

أَفَلَمۡ يَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَيَنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۚ كَانُوٓاْ أَكۡثَرَ مِنۡهُمۡ وَأَشَدَّ قُوَّةࣰ وَءَاثَارࣰ ا فِي ٱلۡأَرۡضِ فَمَآ أَغۡنَىٰ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ

Batambola na mokili bamona lolenge kani esukaki na baye bazalaki liboso na bango? Bazalaki ebele koleka bango mpe makasi koleka bango, mpe batikaki bikamwa ebele sima na bango? Kasi manso bazuaki masalisaki bango na eloko te

Ayah 82

فَلَمَّا جَآءَتۡهُمۡ رُسُلُهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ فَرِحُواْ بِمَا عِندَهُم مِّنَ ٱلۡعِلۡمِ وَحَاقَ بِهِم مَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ

Mpe tango batindami na bango bayelaki bango bilembo bia polele, bayaki mpe basepelaki nde na boyebi bwa bango, sima bazingamaki na maye bazalaki kotiola. (koseka)

Ayah 83

فَلَمَّا رَأَوۡاْ بَأۡسَنَا قَالُوٓاْ ءَامَنَّا بِٱللَّهِ وَحۡدَهُۥ وَكَفَرۡنَا بِمَا كُنَّا بِهِۦ مُشۡرِكِينَ

Мре tango bamonaka etumbu makasi kowuta epai na biso, bakolobaka: Tondimi na Allah na bomoko bwa ye, mpe toboyi maye tozalaki kosangisa

Ayah 84

فَلَمۡ يَكُ يَنفَعُهُمۡ إِيمَٰنُهُمۡ لَمَّا رَأَوۡاْ بَأۡسَنَاۖ سُنَّتَ ٱللَّهِ ٱلَّتِي قَدۡ خَلَتۡ فِي عِبَادِهِۦۖ وَخَسِرَ هُنَالِكَ ٱلۡكَٰفِرُونَ

Kasi kondima na bango esalisaki bango te tango etumbu na biso esilaki kokomela bango, mobeko ya Allah uta kala likolo ya bawumbu naye, mpe na tango wana bapengwi bazangaki

Ayah 85