Surah Al-Qalam — The Pen

Surah Al-Qalam (The Pen) is chapter 68 of the Quran, with 52 verses. This page presents the Arabic text with a Lingala translation, verse by verse.

نٓۚ وَٱلۡقَلَمِ وَمَا يَسۡطُرُونَ

Nún, (nalapi) na ekomeli na oyo ezali kokoma

Ayah 1

مَآ أَنتَ بِنِعۡمَةِ رَبِّكَ بِمَجۡنُونࣲ‏

Yo (Muhammad) na ngrásia y a Nkolo nayo ozali libgoma te

Ayah 2

وَإِنَّ لَكَ لَأَجۡرًا غَيۡرَ مَمۡنُونࣲ‏

Mpe ya sôló, ozali na lifuta oyo esilaka te

Ayah 3

وَإِنَّكَ لَعَلَىٰ خُلُقٍ عَظِيمࣲ‏

Mpe ya sôló, ozali na ezaleli ya malamu

Ayah 4

فَسَتُبۡصِرُ وَيُبۡصِرُونَ

Yo okomona mpe bango bakomona

Ayah 5

بِأَييِّكُمُ ٱلۡمَفۡتُونُ

Nani kati na bino amekami

Ayah 6

إِنَّ رَبَّكَ هُوَ أَعۡلَمُ بِمَن ضَلَّ عَن سَبِيلِهِۦ وَهُوَ أَعۡلَمُ بِٱلۡمُهۡتَدِينَ

Ya sôló, Nkolo wa yo ayebi malamu oyo abunga nzela naye, mpe ayebi malamu baye bazali na bokambami

Ayah 7

فَلَا تُطِعِ ٱلۡمُكَذِّبِينَ

Kaši kotosa bato ya lokuta te

Ayah 8

وَدُّواْ لَوۡ تُدۡهِنُ فَيُدۡهِنُونَ

Bakosepela ozala malamu na bango mpo bazala mpe malamu nayo

Ayah 9

وَلَا تُطِعۡ كُلَّ حَلَّافࣲ مَّهِينٍ

Mpe kotosa moko te na bango, bazali kolapa na ntina te

Ayah 10

هَمَّازࣲ مَّشَّآءِۭ بِنَمِيمࣲ‏

Bato ya songi songi, bazali kokosela bato makambo

Ayah 11

مَّنَّاعࣲ لِّلۡخَيۡرِ مُعۡتَدٍ أَثِيمٍ

Baye bapekisaka bolamu ya bato, bazali kolekisa ndelo mpe basali na masumu

Ayah 12

عُتُلِّۭ بَعۡدَ ذَٰلِكَ زَنِيمٍ

Bazali na mitema makasi mpe bazali na lolendo

Ayah 13

أَن كَانَ ذَا مَالࣲ وَبَنِينَ

Ata soki azali na misolo ebele na bana ebele, (alingi kobonguana te)

Ayah 14

إِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِ ءَايَٰتُنَا قَالَ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ

Soki batangeli ye mikapo mia biso, alobi: Wana ezali sé masapo ya bankoko ya kala

Ayah 15

سَنَسِمُهُۥ عَلَى ٱلۡخُرۡطُومِ

Tokomonisa elembo naye likolo na zolo

Ayah 16

إِنَّا بَلَوۡنَٰهُمۡ كَمَا بَلَوۡنَآ أَصۡحَٰبَ ٱلۡجَنَّةِ إِذۡ أَقۡسَمُواْ لَيَصۡرِمُنَّهَا مُصۡبِحِينَ

Ya soló, tomekaki bango lolenge tomekaki bato ya elanga tango bakanaki ete bakobuka yango lobi na tongo

Ayah 17

وَلَا يَسۡتَثۡنُونَ

Bazangaki koloba: Na bolingi ya Allah. (In cha Allah)

Ayah 18

فَطَافَ عَلَيۡهَا طَآئِفࣱ مِّن رَّبِّكَ وَهُمۡ نَآئِمُونَ

Mabe kowuta epai ya Nkolo nayo ekwelaki yango bazali kolala

Ayah 19

فَأَصۡبَحَتۡ كَٱلصَّرِيمِ

Na tongo ekomi lokola eloko ezalaki te

Ayah 20

فَتَنَادَوۡاْ مُصۡبِحِينَ

O mokolo molandi: Babiangani bango na bango

Ayah 21

أَنِ ٱغۡدُواْ عَلَىٰ حَرۡثِكُمۡ إِن كُنتُمۡ صَٰرِمِينَ

Bökende noki na bilanga na bino soki bolingi kobuka mbuma

Ayah 22

فَٱنطَلَقُواْ وَهُمۡ يَتَخَٰفَتُونَ

Basololi kati na bango na bango na nsé tango babimaki тропа kokende

Ayah 23

أَن لَّا يَدۡخُلَنَّهَا ٱلۡيَوۡمَ عَلَيۡكُم مِّسۡكِينࣱ‏

Mobola moko te akotela bino lelo na elanga

Ayah 24

وَغَدَوۡاْ عَلَىٰ حَرۡدࣲ قَٰدِرِينَ

Mpe bakendeki na tango ya malamu na mokano nyoso ete bakoka kopimela babola

Ayah 25

فَلَمَّا رَأَوۡهَا قَالُوٓاْ إِنَّا لَضَآلُّونَ

Mpe tango bamoni (elanga) yango, balobi: Ya soló tobungi nzela na biso

Ayah 26

بَلۡ نَحۡنُ مَحۡرُومُونَ

То yango; Kasi tozali na eloko te

Ayah 27

قَالَ أَوۡسَطُهُمۡ أَلَمۡ أَقُل لَّكُمۡ لَوۡلَا تُسَبِّحُونَ

Moto ya bosembo kati na bango alobi: Nayebisaki bino te ete: Soki bosanzolaki lukumu ya Allah

Ayah 28

قَالُواْ سُبۡحَٰنَ رَبِّنَآ إِنَّا كُنَّا ظَٰلِمِينَ

Balobi: Lokumu na Nkolo wa biso, ya sólo tozalaki bato mabe

Ayah 29

فَأَقۡبَلَ بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضࣲ يَتَلَٰوَمُونَ

Batalani bango na bango, bakomi koloba: Yo nde osali mabe

Ayah 30

قَالُواْ يَٰوَيۡلَنَآ إِنَّا كُنَّا طَٰغِينَ

Mpe balobaki ete: Eh biso mpasi! Ya sólo, tozalaki batomboki

Ayah 31

عَسَىٰ رَبُّنَآ أَن يُبۡدِلَنَا خَيۡرࣰ ا مِّنۡهَآ إِنَّآ إِلَىٰ رَبِّنَا رَٰغِبُونَ

Tozali kolikia na Nkolo wa biso été abongola eloko ya malamu тропа biso, tozali kolikia pene na Nkolo wa biso

Ayah 32

كَذَٰلِكَ ٱلۡعَذَابُۖ وَلَعَذَابُ ٱلۡأٓخِرَةِ أَكۡبَرُۚ لَوۡ كَانُواْ يَعۡلَمُونَ

Lolenge wana nde etumbu ezalaki, kasi etumbu ya mokolo ya suka eleki monene. Soki bazali koyeba

Ayah 33

إِنَّ لِلۡمُتَّقِينَ عِندَ رَبِّهِمۡ جَنَّٰتِ ٱلنَّعِيمِ

Ya soló, babangi (Allah) bakozalaka epai ya Nkolo na bango na lola ya kitoko

Ayah 34

أَفَنَجۡعَلُ ٱلۡمُسۡلِمِينَ كَٱلۡمُجۡرِمِينَ

Boye tokozua bandimi ndenge moko na batomboki

Ayah 35

مَا لَكُمۡ كَيۡفَ تَحۡكُمُونَ

Boni bozali kokata likambo na lolenge wana

Ayah 36

أَمۡ لَكُمۡ كِتَٰبࣱ فِيهِ تَدۡرُسُونَ

To boye bozali na buku eye bozali koyekola

Ayah 37

إِنَّ لَكُمۡ فِيهِ لَمَا تَخَيَّرُونَ

Ete ya sólo, bokozua nyoso oyo bokolinga

Ayah 38

أَمۡ لَكُمۡ أَيۡمَٰنٌ عَلَيۡنَا بَٰلِغَةٌ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِ إِنَّ لَكُمۡ لَمَا تَحۡكُمُونَ

To boye bolapelaki biso bandai ya bosôló kino mokolo ya suka, mpo topesa bino maye bolingi

Ayah 39

سَلۡهُمۡ أَيُّهُم بِذَٰلِكَ زَعِيمٌ

Tuna bango, nani kati na bango azali nkumu na yango

Ayah 40

أَمۡ لَهُمۡ شُرَكَآءُ فَلۡيَأۡتُواْ بِشُرَكَآئِهِمۡ إِن كَانُواْ صَٰدِقِينَ

To boye bazali na basangani? Baya na bango soki bazali koloba bosôló

Ayah 41

يَوۡمَ يُكۡشَفُ عَن سَاقࣲ وَيُدۡعَوۡنَ إِلَى ٱلسُّجُودِ فَلَا يَسۡتَطِيعُونَ

Mokolo oyo lokolo ekomonamaka, mpe bakobengaka bango ete bafukama elongi na mabele kasi bakokokaka kofukama te

Ayah 42

خَٰشِعَةً أَبۡصَٰرُهُمۡ تَرۡهَقُهُمۡ ذِلَّةࣱۖ وَقَدۡ كَانُواْ يُدۡعَوۡنَ إِلَى ٱلسُّجُودِ وَهُمۡ سَٰلِمُونَ

Bilongi na bango bikokitisama mpe bakozanga lokumu, nzoka nde babiangamaki mpo bafukama tango bazalaki malamu (na mokili)

Ayah 43

فَذَرۡنِي وَمَن يُكَذِّبُ بِهَٰذَا ٱلۡحَدِيثِۖ سَنَسۡتَدۡرِجُهُم مِّنۡ حَيۡثُ لَا يَعۡلَمُونَ

Tika ngai na oyo nyoso azali kozua masolo oyo na lokuta, tokozua bango malembe na esika oyo bakoyeba te

Ayah 44

وَأُمۡلِي لَهُمۡۚ إِنَّ كَيۡدِي مَتِينٌ

Мре natikelaki bango tango kaši, motambo na ngai ezali ya soló

Ayah 45

أَمۡ تَسۡـَٔلُهُمۡ أَجۡرࣰ ا فَهُم مِّن مَّغۡرَمࣲ مُّثۡقَلُونَ

То boye osengaki bango lifuta to osengaki bango bazua nyongo ya monene

Ayah 46

أَمۡ عِندَهُمُ ٱلۡغَيۡبُ فَهُمۡ يَكۡتُبُونَ

To boye bayebi maye mabombami, yango bazali кокота

Ayah 47

فَٱصۡبِرۡ لِحُكۡمِ رَبِّكَ وَلَا تَكُن كَصَاحِبِ ٱلۡحُوتِ إِذۡ نَادَىٰ وَهُوَ مَكۡظُومࣱ‏

Мре kanga motema (Muhammad) na kozela mokano ya Nkolo nayo, kasi kozala lokola moto oyo azalaki na libumu ya mbisi te (Yûnus), tango abelelaki (Allah) na kati ya mawa ya monene

Ayah 48

لَّوۡلَآ أَن تَدَٰرَكَهُۥ نِعۡمَةࣱ مِّن رَّبِّهِۦ لَنُبِذَ بِٱلۡعَرَآءِ وَهُوَ مَذۡمُومࣱ‏

Soki тропа bolamu ya Nkolo naye te likolo naye, nde abwakamaki libanda bolumbu likolo ya mabele ekauka

Ayah 49

فَٱجۡتَبَٰهُ رَبُّهُۥ فَجَعَلَهُۥ مِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ

Mpe Nkolo naye aponaki ye mpe atiaki ye o molongo ya bato malamu

Ayah 50

وَإِن يَكَادُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَيُزۡلِقُونَكَ بِأَبۡصَٰرِهِمۡ لَمَّا سَمِعُواْ ٱلذِّكۡرَ وَيَقُولُونَ إِنَّهُۥ لَمَجۡنُونࣱ‏

Tango bapengwi bayokelaki yo likunya mpe kotala yo na miso ya mabe na tango bayokaki kurani, balobi: Ya sólo azali ligboma

Ayah 51

وَمَا هُوَ إِلَّا ذِكۡرࣱ لِّلۡعَٰلَمِينَ

Wana ezali sé bokundoli тропа mokili mobimba

Ayah 52