Surah Ash-Shu'araa — The Poets

Surah Ash-Shu'araa (The Poets) is chapter 26 of the Quran, with 227 verses. This page presents the Arabic text with a Lingala translation, verse by verse.

طسٓمٓ

Twâ, sín, mîm

Ayah 1

تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡمُبِينِ

Oyo nde mikapo mia buku ya polele

Ayah 2

لَعَلَّكَ بَٰخِعࣱ نَّفۡسَكَ أَلَّا يَكُونُواْ مُؤۡمِنِينَ

Ozali komitungisa mpo été baboyi kondima

Ayah 3

إِن نَّشَأۡ نُنَزِّلۡ عَلَيۡهِم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ ءَايَةࣰ فَظَلَّتۡ أَعۡنَٰقُهُمۡ لَهَا خَٰضِعِينَ

Soki tolingaki mbele tokitisaki bilembo epai na bango kowuta о likolo, bakingo na bango elingaki kogumbama. (na soni)

Ayah 4

وَمَا يَأۡتِيهِم مِّن ذِكۡرࣲ مِّنَ ٱلرَّحۡمَٰنِ مُحۡدَثٍ إِلَّا كَانُواْ عَنۡهُ مُعۡرِضِينَ

Мре tango nyoso lilendisi ya sika likoyela bango kowuta epai ya Ar-Rahmân, sé bakopesa yango mokongo

Ayah 5

فَقَدۡ كَذَّبُواْ فَسَيَأۡتِيهِمۡ أَنۢبَٰٓؤُاْ مَا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ

Baboyaki kondima, (na makambo nyoso oyo ewutaki epai ya Nkolo wa bango) kala te bakoyelaka bango basango тропа maye bazalaki kotiola na yango

Ayah 6

أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ إِلَى ٱلۡأَرۡضِ كَمۡ أَنۢبَتۡنَا فِيهَا مِن كُلِّ زَوۡجࣲ كَرِيمٍ

Boye bazali kornona mabele te boni tokolisaki kati na yango (milona mibale mibale) na lolenge ya malamu

Ayah 7

إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةࣰۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ

Ya soló, wana ezali elembo. Kasi ebele kati na bango bazali kondima te

Ayah 8

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Mpe ya soló, Nkolo wa yo azali wa bokasi atonda ngolu

Ayah 9

وَإِذۡ نَادَىٰ رَبُّكَ مُوسَىٰٓ أَنِ ٱئۡتِ ٱلۡقَوۡمَ ٱلظَّٰلِمِينَ

Mpe tango Nkolo wayo abengaki Mûssa, kende epai ya bato ya mabe

Ayah 10

قَوۡمَ فِرۡعَوۡنَۚ أَلَا يَتَّقُونَ

Bato ya falo. Bazali kobanga (Allah) te

Ayah 11

قَالَ رَبِّ إِنِّيٓ أَخَافُ أَن يُكَذِّبُونِ

Alobi: Nkolo, ya sólo nazali kobanga ete bandimela ngai te

Ayah 12

وَيَضِيقُ صَدۡرِي وَلَا يَنطَلِقُ لِسَانِي فَأَرۡسِلۡ إِلَىٰ هَٰرُونَ

Ntolo na ngai ezali ya kokangama, mpe lolemu na ngai elobaka malamu te, tinda yango epai ya Hâruna

Ayah 13

وَلَهُمۡ عَلَيَّ ذَنۢبࣱ فَأَخَافُ أَن يَقۡتُلُونِ

Mpe nazali na mabe oyo nasala bango, na yango nazali kobanga été noki bakoboma ngai

Ayah 14

قَالَ كَلَّاۖ فَٱذۡهَبَا بِـَٔايَٰتِنَآۖ إِنَّا مَعَكُم مُّسۡتَمِعُونَ

(Allah ayebisaki ye): Eloko ezali te, bökende bino mibale na bilembo bia biso, tokozala elongo na bino tozali koyoka

Ayah 15

فَأۡتِيَا فِرۡعَوۡنَ فَقُولَآ إِنَّا رَسُولُ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

Bökende epai ya falo bino mibale, boyebisa ye ete, Nkolo ya mokili nde atindi biso ya sólo

Ayah 16

أَنۡ أَرۡسِلۡ مَعَنَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ

Mpo opesa biso bana ya isalayele

Ayah 17

قَالَ أَلَمۡ نُرَبِّكَ فِينَا وَلِيدࣰ ا وَلَبِثۡتَ فِينَا مِنۡ عُمُرِكَ سِنِينَ

Falo alobi: Tobokoloki yo te kowuta bolenge?, mpe tovandaki nayo bamibu ebele te

Ayah 18

وَفَعَلۡتَ فَعۡلَتَكَ ٱلَّتِي فَعَلۡتَ وَأَنتَ مِنَ ٱلۡكَٰفِرِينَ

Мре osalaki maye osalaki, mpe ozalaki kati ya bapengwi

Ayah 19

قَالَ فَعَلۡتُهَآ إِذࣰ ا وَأَنَا۠ مِنَ ٱلضَّآلِّينَ

Mûssa alobi: Nasalaki yango mpo été nazangaki koyeba

Ayah 20

فَفَرَرۡتُ مِنكُمۡ لَمَّا خِفۡتُكُمۡ فَوَهَبَ لِي رَبِّي حُكۡمࣰ ا وَجَعَلَنِي مِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ

Yango nakimaki bino тропа bobangi. Sima Nkolo wa ngai apesi ngai bwanya, mpe aponi ngai okati ya batindami

Ayah 21

وَتِلۡكَ نِعۡمَةࣱ تَمُنُّهَا عَلَيَّ أَنۡ عَبَّدتَّ بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ

Wana nde bolamu nayo ozali kokundolela ngai yango, mpe yo osili kozua bana ya isalayele bawumbu nayo

Ayah 22

قَالَ فِرۡعَوۡنُ وَمَا رَبُّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

(Falo ) alobi; nani Nkolo wa molongo

Ayah 23

قَالَ رَبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَآۖ إِن كُنتُم مُّوقِنِينَ

(Mûssa) alobi: Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazali otei na yango mibale, soki bozali na ntembe te

Ayah 24

قَالَ لِمَنۡ حَوۡلَهُۥٓ أَلَا تَسۡتَمِعُونَ

Falo alobi na baye bazali pembeni naye ete: Boye bozali koyoka te

Ayah 25

قَالَ رَبُّكُمۡ وَرَبُّ ءَابَآئِكُمُ ٱلۡأَوَّلِينَ

(Mûssa) alobi; Nkolo wa bino mpe Nkolo ya bato ya kala

Ayah 26

قَالَ إِنَّ رَسُولَكُمُ ٱلَّذِيٓ أُرۡسِلَ إِلَيۡكُمۡ لَمَجۡنُونࣱ‏

(Falo) alobi: Ya soló motindami oyo batindi ye epai na bino azali ligboma

Ayah 27

قَالَ رَبُّ ٱلۡمَشۡرِقِ وَٱلۡمَغۡرِبِ وَمَا بَيۡنَهُمَآۖ إِن كُنتُمۡ تَعۡقِلُونَ

(Mûssa) alobi: Nkolo wa moniele na eloli, na manso maye mazali otei na yango mibale. Soki bozali koyeba

Ayah 28

قَالَ لَئِنِ ٱتَّخَذۡتَ إِلَٰهًا غَيۡرِي لَأَجۡعَلَنَّكَ مِنَ ٱلۡمَسۡجُونِينَ

(Falo) alobi: Soki olandi nzambe mosusu otiki ngai, nakokotisa yo na boloko

Ayah 29

قَالَ أَوَلَوۡ جِئۡتُكَ بِشَيۡءࣲ مُّبِينࣲ‏

(Mûssa) alobi: Ata soki nayeli yo bikamwa ya polele

Ayah 30

قَالَ فَأۡتِ بِهِۦٓ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ

(Falo) alobi: Yaka na yango soki ozali o kati ya balobi bosôló

Ayah 31

فَأَلۡقَىٰ عَصَاهُ فَإِذَا هِيَ ثُعۡبَانࣱ مُّبِينࣱ‏

(Mûssa) abwaki lingenda lia ye, mpe tala ebongwani nyoka ya polele ebandi kotambola

Ayah 32

وَنَزَعَ يَدَهُۥ فَإِذَا هِيَ بَيۡضَآءُ لِلنَّٰظِرِينَ

Mpe abimisi loboko naye na libenga, mpe tala ekomi pembe makasi pona baye bazali kotala

Ayah 33

قَالَ لِلۡمَلَإِ حَوۡلَهُۥٓ إِنَّ هَٰذَا لَسَٰحِرٌ عَلِيمࣱ‏

(Falo) alobi na bankumu naye bazalaki pembeni naye: Ya soló, oyo nde nganga monene ya boyebi

Ayah 34

يُرِيدُ أَن يُخۡرِجَكُم مِّنۡ أَرۡضِكُم بِسِحۡرِهِۦ فَمَاذَا تَأۡمُرُونَ

Alingi kobimisa bino o mabele na bino na bonganga naye, boye bokosala nini

Ayah 35

قَالُوٓاْ أَرۡجِهۡ وَأَخَاهُ وَٱبۡعَثۡ فِي ٱلۡمَدَآئِنِ حَٰشِرِينَ

Balobi: Zelisa ye na ndeko wa ye, mpe tinda bato na mboka mpo basangisa (bakende kosangisa banganga, sima baya komekana)

Ayah 36

يَأۡتُوكَ بِكُلِّ سَحَّارٍ عَلِيمࣲ‏

Mpe bamemela yo banganga ya minene oyo bayebi

Ayah 37

فَجُمِعَ ٱلسَّحَرَةُ لِمِيقَٰتِ يَوۡمࣲ مَّعۡلُومࣲ‏

Banganga basangani o mokolo mwa elaka

Ayah 38

وَقِيلَ لِلنَّاسِ هَلۡ أَنتُم مُّجۡتَمِعُونَ

Mpe bayebisi na bato ete: Boye bokosangana te

Ayah 39

لَعَلَّنَا نَتَّبِعُ ٱلسَّحَرَةَ إِن كَانُواْ هُمُ ٱلۡغَٰلِبِينَ

Mpo tolanda banganga soki bango balongi

Ayah 40

فَلَمَّا جَآءَ ٱلسَّحَرَةُ قَالُواْ لِفِرۡعَوۡنَ أَئِنَّ لَنَا لَأَجۡرًا إِن كُنَّا نَحۡنُ ٱلۡغَٰلِبِينَ

Mpe tango banganga bakomi epai ya falo balobi naye été: Boye tozali na lifuta soki tolongi

Ayah 41

قَالَ نَعَمۡ وَإِنَّكُمۡ إِذࣰ ا لَّمِنَ ٱلۡمُقَرَّبِينَ

(Falo) alobi: Iyo, ya soló, nakotiya bino pembeni na ngai

Ayah 42

قَالَ لَهُم مُّوسَىٰٓ أَلۡقُواْ مَآ أَنتُم مُّلۡقُونَ

Mûssa ayebisi bango: Bobwaka oyo bolingi kobwaka

Ayah 43

فَأَلۡقَوۡاْ حِبَالَهُمۡ وَعِصِيَّهُمۡ وَقَالُواْ بِعِزَّةِ فِرۡعَوۡنَ إِنَّا لَنَحۡنُ ٱلۡغَٰلِبُونَ

Mpe babwaki basinga na bamangenda na bango, (mpe balobi): Na nguya ya falo ya sólo, tokolonga

Ayah 44

فَأَلۡقَىٰ مُوسَىٰ عَصَاهُ فَإِذَا هِيَ تَلۡقَفُ مَا يَأۡفِكُونَ

Mpe Mûssa abwaki lingenda lia ye, mpe tala emeli nyoso oyo basalaki

Ayah 45

فَأُلۡقِيَ ٱلسَّحَرَةُ سَٰجِدِينَ

Mpe banganga nyoso bakweyaki na kofukama

Ayah 46

قَالُوٓاْ ءَامَنَّا بِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

Balobi: Tondimi na Nkolo wa molongo

Ayah 47

رَبِّ مُوسَىٰ وَهَٰرُونَ

Nkolo ya Mûssa na Hânına

Ayah 48

قَالَ ءَامَنتُمۡ لَهُۥ قَبۡلَ أَنۡ ءَاذَنَ لَكُمۡۖ إِنَّهُۥ لَكَبِيرُكُمُ ٱلَّذِي عَلَّمَكُمُ ٱلسِّحۡرَ فَلَسَوۡفَ تَعۡلَمُونَۚ لَأُقَطِّعَنَّ أَيۡدِيَكُمۡ وَأَرۡجُلَكُم مِّنۡ خِلَٰفࣲ وَلَأُصَلِّبَنَّكُمۡ أَجۡمَعِينَ

(Falo) alobi: Bondimi naye yambo ete napesa bino ndingisa! Ya sólo, ye nde mokonzi ya bino oyo alakisaki bino bonganga, bokoyeba kala te. Nakokata bino maboko na makolo na lolenge ya bokeseni, mpe nakobaka bino banso na nzete

Ayah 49

قَالُواْ لَا ضَيۡرَۖ إِنَّآ إِلَىٰ رَبِّنَا مُنقَلِبُونَ

Banganga balobi: Mabe ezali te, pamba te, mpo tokozongaka ya soló epai ya Nkolo wa biso

Ayah 50

إِنَّا نَطۡمَعُ أَن يَغۡفِرَ لَنَا رَبُّنَا خَطَٰيَٰنَآ أَن كُنَّآ أَوَّلَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ

Ya soló, posa na biso ezali ete Nkolo wa biso alimbisa biso, mpo tozali bato ya yambo тропа kondima (ye Allah)

Ayah 51

۞وَأَوۡحَيۡنَآ إِلَىٰ مُوسَىٰٓ أَنۡ أَسۡرِ بِعِبَادِيٓ إِنَّكُم مُّتَّبَعُونَ

Mpe toyebisaki na Mûssa ete: Akende na butu elongo na bawumbu na ngai, mpo ya soló bakolanda bino

Ayah 52

فَأَرۡسَلَ فِرۡعَوۡنُ فِي ٱلۡمَدَآئِنِ حَٰشِرِينَ

Мре falo atindi été basangisa bato ya mboka

Ayah 53

إِنَّ هَٰٓؤُلَآءِ لَشِرۡذِمَةࣱ قَلِيلُونَ

Ete: Ya sólo, bato oyo bazali токе

Ayah 54

وَإِنَّهُمۡ لَنَا لَغَآئِظُونَ

Мре ya sólo, balongi biso

Ayah 55

وَإِنَّا لَجَمِيعٌ حَٰذِرُونَ

Kasi biso banso tozali na bokebi

Ayah 56

فَأَخۡرَجۡنَٰهُم مِّن جَنَّٰتࣲ وَعُيُونࣲ‏

Mpe tobimisaki bango na bilanga mpe mingala

Ayah 57

وَكُنُوزࣲ وَمَقَامࣲ كَرِيمࣲ‏

Bamaziba ya bomengo mpe bisika ya lokumu

Ayah 58

كَذَٰلِكَۖ وَأَوۡرَثۡنَٰهَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ

Lolenge moko topesaki bokitani na bana ya isalayele

Ayah 59

فَأَتۡبَعُوهُم مُّشۡرِقِينَ

Mpe balandaki bango na ntongo makasi

Ayah 60

فَلَمَّا تَرَٰٓءَا ٱلۡجَمۡعَانِ قَالَ أَصۡحَٰبُ مُوسَىٰٓ إِنَّا لَمُدۡرَكُونَ

Mpe tango mapinga mibale bamonani; bato ya Mûssa balobaki été: Ya sólo, biso tosili kozuama (bato ya Mûssa bakanisaki été bakokanga bango ya soló)

Ayah 61

قَالَ كَلَّآۖ إِنَّ مَعِيَ رَبِّي سَيَهۡدِينِ

(Mûssa) alobi te. Ya soló Nkolo wa ngai azali elongo na ngai, akokamba ngai

Ayah 62

فَأَوۡحَيۡنَآ إِلَىٰ مُوسَىٰٓ أَنِ ٱضۡرِب بِّعَصَاكَ ٱلۡبَحۡرَۖ فَٱنفَلَقَ فَكَانَ كُلُّ فِرۡقࣲ كَٱلطَّوۡدِ ٱلۡعَظِيمِ

Mpe topesaki emoniseli epai ya Mûssa ete; beta lingenda lia yo na ebale mpe ekabwani na mibale lokola ngomba ya monene

Ayah 63

وَأَزۡلَفۡنَا ثَمَّ ٱلۡأٓخَرِينَ

Mpe totikaki ete baye wana bapusana. (Falo na bato naye)

Ayah 64

وَأَنجَيۡنَا مُوسَىٰ وَمَن مَّعَهُۥٓ أَجۡمَعِينَ

Mpe tolongisaki Mûssa na bato naye banso oyo bazalaki elongo naye

Ayah 65

ثُمَّ أَغۡرَقۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ

Sima, tozindisaki basusu (banguna)

Ayah 66

إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةࣰۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ

Ya sólo, wana ezali elembo. Ebele kati na bango bazali kondima te

Ayah 67

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Mpe ya sólo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu

Ayah 68

وَٱتۡلُ عَلَيۡهِمۡ نَبَأَ إِبۡرَٰهِيمَ

Mpe tángela bango sango ya Ibrâhîm

Ayah 69

إِذۡ قَالَ لِأَبِيهِ وَقَوۡمِهِۦ مَا تَعۡبُدُونَ

Tango alobaki na tata naye mpe bato naye: Nini bozali kobondela

Ayah 70

قَالُواْ نَعۡبُدُ أَصۡنَامࣰ ا فَنَظَلُّ لَهَا عَٰكِفِينَ

Balobaki: Tozali kobondela bikeko, mpe tokokangama sé na yango

Ayah 71

قَالَ هَلۡ يَسۡمَعُونَكُمۡ إِذۡ تَدۡعُونَ

Alobi: Boye bayokaka bino tango bosengaka bango

Ayah 72

أَوۡ يَنفَعُونَكُمۡ أَوۡ يَضُرُّونَ

То boye basalisaka bino to mpe banyokoloko bino

Ayah 73

قَالُواْ بَلۡ وَجَدۡنَآ ءَابَآءَنَا كَذَٰلِكَ يَفۡعَلُونَ

Balobi: Tokutaki bankoko na biso ya kala bazali sé ndenge wana

Ayah 74

قَالَ أَفَرَءَيۡتُم مَّا كُنتُمۡ تَعۡبُدُونَ

Alobi: Bososoli mpenza тропа oyo bozali kobondela

Ayah 75

أَنتُمۡ وَءَابَآؤُكُمُ ٱلۡأَقۡدَمُونَ

Bino na bankoko na bino ya kala

Ayah 76

فَإِنَّهُمۡ عَدُوࣱّ لِّيٓ إِلَّا رَبَّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

Bango banso bazali banguna na ngai, longola sé Nkolo wa molongo

Ayah 77

ٱلَّذِي خَلَقَنِي فَهُوَ يَهۡدِينِ

Oyo akelaki ngai mpe azali kokamba ngai

Ayah 78

وَٱلَّذِي هُوَ يُطۡعِمُنِي وَيَسۡقِينِ

Mpe ye nde aleisaka ngai, mpe amelisaka ngai

Ayah 79

وَإِذَا مَرِضۡتُ فَهُوَ يَشۡفِينِ

Mpe tango nabeleke, ye nde abikisaka ngai

Ayah 80

وَٱلَّذِي يُمِيتُنِي ثُمَّ يُحۡيِينِ

Mpe ye nde akoboma ngai, sima akosekwisa ngai

Ayah 81

وَٱلَّذِيٓ أَطۡمَعُ أَن يَغۡفِرَ لِي خَطِيٓـَٔتِي يَوۡمَ ٱلدِّينِ

Mpe nazali kolikia ete alimbisa ngai masumu omokolo mwa suka

Ayah 82

رَبِّ هَبۡ لِي حُكۡمࣰ ا وَأَلۡحِقۡنِي بِٱلصَّٰلِحِينَ

Nkolo! Pesa ngai bwanya (mpe boyebi), mpe tia ngai elongo na bato ya malamu

Ayah 83

وَٱجۡعَل لِّي لِسَانَ صِدۡقࣲ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ

Tika ete lolemu na ngai eloba bosoló epai ya basusu

Ayah 84

وَٱجۡعَلۡنِي مِن وَرَثَةِ جَنَّةِ ٱلنَّعِيمِ

Mpe tiya ngai nazala okati ya bakitani ya lola ya kitoko

Ayah 85

وَٱغۡفِرۡ لِأَبِيٓ إِنَّهُۥ كَانَ مِنَ ٱلضَّآلِّينَ

Mpe limbisa tata wa ngai mpo azalaki 0 kati ya babungi

Ayah 86

وَلَا تُخۡزِنِي يَوۡمَ يُبۡعَثُونَ

Suratu Ach-Chu’arâ Eteni 19 Л

Ayah 87

يَوۡمَ لَا يَنفَعُ مَالࣱ وَلَا بَنُونَ

Mpe koyokisa ngai nsoni te o mokolo ya lisekwa

Ayah 88

إِلَّا مَنۡ أَتَى ٱللَّهَ بِقَلۡبࣲ سَلِيمࣲ‏

Mokolo moye misolo na bana bakosalisaka te

Ayah 89

وَأُزۡلِفَتِ ٱلۡجَنَّةُ لِلۡمُتَّقِينَ

Longola sé oyo akoya epai ya Allah na motema ya malamu. (Motema molamu ya kopetoama)

Ayah 90

وَبُرِّزَتِ ٱلۡجَحِيمُ لِلۡغَاوِينَ

Bakopusanisaka lola pembeni ya babangi (Allah)

Ayah 91

وَقِيلَ لَهُمۡ أَيۡنَ مَا كُنتُمۡ تَعۡبُدُونَ

Mpe bakomonisaka bato mabe moto

Ayah 92

مِن دُونِ ٱللَّهِ هَلۡ يَنصُرُونَكُمۡ أَوۡ يَنتَصِرُونَ

Mpe bakolobelaka bango: Wapi maye bozalaki kobondela

Ayah 93

فَكُبۡكِبُواْ فِيهَا هُمۡ وَٱلۡغَاوُۥنَ

Na botiki Allah, boye bazali kosunga bino? To mpe bango moko bazali komisunga

Ayah 94

وَجُنُودُ إِبۡلِيسَ أَجۡمَعُونَ

Mpe bakobwakama na moto bipai na bipai na bilongi na bango, na baye bapengwisaki bango

Ayah 95

قَالُواْ وَهُمۡ فِيهَا يَخۡتَصِمُونَ

Na basoda banso ya Satana (ibilisa)

Ayah 96

تَٱللَّهِ إِن كُنَّا لَفِي ضَلَٰلࣲ مُّبِينٍ

Bakolobaka: Mpe bazali kosuana okati na yango

Ayah 97

إِذۡ نُسَوِّيكُم بِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

Na Allah! Ya soló, tozalaki na libunga ya polele

Ayah 98

وَمَآ أَضَلَّنَآ إِلَّا ٱلۡمُجۡرِمُونَ

Tozalaki kokokisa bino lokola Nkolo ya mokili

Ayah 99

فَمَا لَنَا مِن شَٰفِعِينَ

Kasi ezali sé batomboki nde babungisaki biso

Ayah 100

وَلَا صَدِيقٍ حَمِيمࣲ‏

Ata moninga ya soló soló azali te

Ayah 101

فَلَوۡ أَنَّ لَنَا كَرَّةࣰ فَنَكُونَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ

Soki tozuaka nzela ya bozongi (ata na mokili), tolingaki kozala okati ya bandimi. (baye bazali kosala bolamu)

Ayah 102

إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةࣰۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ

Ya sólo, wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazali kondima te

Ayah 103

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Mpe ya sólo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu

Ayah 104

كَذَّبَتۡ قَوۡمُ نُوحٍ ٱلۡمُرۡسَلِينَ

Bato ya Nûh bazangaki kondimela batindami, bazuaki bango bato ya lokuta

Ayah 105

إِذۡ قَالَ لَهُمۡ أَخُوهُمۡ نُوحٌ أَلَا تَتَّقُونَ

Tango ndeko wa bango Nûh ayebisaki bango: Boye bokobanga (Allah) te

Ayah 106

إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينࣱ‏

Ya sólo, nazali motindami malamu тропа bino

Ayah 107

فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

Bobanga Allah mpe botosa ngai

Ayah 108

وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai lizali sé epai na Nkolo wa molongo

Ayah 109

فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

Bobanga Allah mpe botosa ngai. İli. Balobaki: Tondimelayo! Kasi

Ayah 110

۞قَالُوٓاْ أَنُؤۡمِنُ لَكَ وَٱتَّبَعَكَ ٱلۡأَرۡذَلُونَ

ezali sé bato bazanga ntina, nde balandaka yo

Ayah 111

قَالَ وَمَا عِلۡمِي بِمَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ

Alobi: Nayebi te maye bazali kosala

Ayah 112

إِنۡ حِسَابُهُمۡ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّيۖ لَوۡ تَشۡعُرُونَ

Lifuta na bango etali sé Nkolo wa ngai, soki bozali koyeba

Ayah 113

وَمَآ أَنَا۠ بِطَارِدِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ

Nazali oyo abenganaka bandimi te

Ayah 114

إِنۡ أَنَا۠ إِلَّا نَذِيرࣱ مُّبِينࣱ‏

Kasi nazali sé mokebisi ya polele

Ayah 115

قَالُواْ لَئِن لَّمۡ تَنتَهِ يَٰنُوحُ لَتَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡمَرۡجُومِينَ

Balobi: Nûh! Soki otiki te, okozala o kati ya baye tokoboma na mabanga

Ayah 116

قَالَ رَبِّ إِنَّ قَوۡمِي كَذَّبُونِ

Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Bato na ngai bazali kondimela ngai te

Ayah 117

فَٱفۡتَحۡ بَيۡنِي وَبَيۡنَهُمۡ فَتۡحࣰ ا وَنَجِّنِي وَمَن مَّعِيَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ

Lakisa bosôló kati kati na ngai na bango, mpe bikisa ngai na baye bazali elongo na ngai kati ya bandimi

Ayah 118

فَأَنجَيۡنَٰهُ وَمَن مَّعَهُۥ فِي ٱلۡفُلۡكِ ٱلۡمَشۡحُونِ

Mpe tolongisaki ye na baye bazalaki elongo naye o kati ya masuwa oyo ezalaki ya kotonda

Ayah 119

ثُمَّ أَغۡرَقۡنَا بَعۡدُ ٱلۡبَاقِينَ

Mpe sima tozindisaki baye batikalaki (bapengwi oyo bazangaki bondimi)

Ayah 120

إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةࣰۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ

Ya soló, wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te

Ayah 121

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Mpe ya solo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu

Ayah 122

كَذَّبَتۡ عَادٌ ٱلۡمُرۡسَلِينَ

Ba aad mpe baboyaki kondimela batindami

Ayah 123

إِذۡ قَالَ لَهُمۡ أَخُوهُمۡ هُودٌ أَلَا تَتَّقُونَ

Tango ndeko wa bango Hûd ayebisaki bango: Boye bozali kobanga te

Ayah 124

إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينࣱ‏

Ya soló, nazali motindami malamu epai na bino

Ayah 125

فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

Bobanga Allah mpe botosa ngai

Ayah 126

وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo

Ayah 127

أَتَبۡنُونَ بِكُلِّ رِيعٍ ءَايَةࣰ تَعۡبَثُونَ

Boye bozali kotonga bikeko na ngomba nyoso тропа kokumisa

Ayah 128

وَتَتَّخِذُونَ مَصَانِعَ لَعَلَّكُمۡ تَخۡلُدُونَ

Mpe bozali kotonga bandako ya minene lokola bokotikala libela awa na mokili

Ayah 129

وَإِذَا بَطَشۡتُم بَطَشۡتُمۡ جَبَّارِينَ

Mpe soki bopesi etumbu, bozalaka na mawa te, mpe bobimi bato ya makasi

Ayah 130

فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

Bobanga Allah mpe botosa ngai

Ayah 131

وَٱتَّقُواْ ٱلَّذِيٓ أَمَدَّكُم بِمَا تَعۡلَمُونَ

Bobanga oyo azali kopesa bino bolamu, na nyoso oyo boyebi

Ayah 132

أَمَدَّكُم بِأَنۡعَٰمࣲ وَبَنِينَ

Oyo apesi bino banyama na bana

Ayah 133

وَجَنَّٰتࣲ وَعُيُونٍ

Mpe bilanga na miluka

Ayah 134

إِنِّيٓ أَخَافُ عَلَيۡكُمۡ عَذَابَ يَوۡمٍ عَظِيمࣲ‏

Ya sôló, nazali kobangela bino etumbu 0 mokolo mwa suka

Ayah 135

قَالُواْ سَوَآءٌ عَلَيۡنَآ أَوَعَظۡتَ أَمۡ لَمۡ تَكُن مِّنَ ٱلۡوَٰعِظِينَ

Balobi: Olendisa biso to olendisa te, ezali sé lolenge moko

Ayah 136

إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا خُلُقُ ٱلۡأَوَّلِينَ

Ezali sé ezaleli ya bato ya kala

Ayah 137

وَمَا نَحۡنُ بِمُعَذَّبِينَ

Mpe tokozuaka etumbu te

Ayah 138

فَكَذَّبُوهُ فَأَهۡلَكۡنَٰهُمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةࣰۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ

Baboyaki kondimela ye, mpe tobomaki bango, ya soló wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te

Ayah 139

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Mpe ya soló, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu

Ayah 140

كَذَّبَتۡ ثَمُودُ ٱلۡمُرۡسَلِينَ

Ba Thamûd, baboyaki mpe kondimela batindami

Ayah 141

إِذۡ قَالَ لَهُمۡ أَخُوهُمۡ صَٰلِحٌ أَلَا تَتَّقُونَ

Tango ndeko wa bango Swâlih ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te

Ayah 142

إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينࣱ‏

Nazali motindami malamu epai na bino

Ayah 143

فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

Bobanga Allah mpe botosa ngai

Ayah 144

وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo

Ayah 145

أَتُتۡرَكُونَ فِي مَا هَٰهُنَآ ءَامِنِينَ

Boye bokotikalaka na kimiya тропа maye bozali kosala

Ayah 146

فِي جَنَّٰتࣲ وَعُيُونࣲ‏

O kati ya bilanga mpe mingala

Ayah 147

وَزُرُوعࣲ وَنَخۡلࣲ طَلۡعُهَا هَضِيمࣱ‏

Milona mpe banzete ya nagh’l mpe ya mbuma kitoko

Ayah 148

وَتَنۡحِتُونَ مِنَ ٱلۡجِبَالِ بُيُوتࣰ ا فَٰرِهِينَ

Boye bozali kotonga bandako o likolo lia ba ngomba

Ayah 149

فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

Bobanga Allah mpe botosa ngai

Ayah 150

وَلَا تُطِيعُوٓاْ أَمۡرَ ٱلۡمُسۡرِفِينَ

Kasi botosa makambo ya balekisi ndelo te

Ayah 151

ٱلَّذِينَ يُفۡسِدُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا يُصۡلِحُونَ

Baye bazali sé kobebisa o kati ya mabele mpe balingi kobongisa te

Ayah 152

قَالُوٓاْ إِنَّمَآ أَنتَ مِنَ ٱلۡمُسَحَّرِينَ

Balobi: Ya soló, ozali sé o kati ya balokami

Ayah 153

مَآ أَنتَ إِلَّا بَشَرࣱ مِّثۡلُنَا فَأۡتِ بِـَٔايَةٍ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ

Ozali sé moto lokola biso, yaka na elembo soki ozali kati ya balobi bosôló

Ayah 154

قَالَ هَٰذِهِۦ نَاقَةࣱ لَّهَا شِرۡبࣱ وَلَكُمۡ شِرۡبُ يَوۡمࣲ مَّعۡلُومࣲ‏

Alobi: Nâqah oyo azali na mokolo naye ya komela mayi, bino mpe bozali na mokolo ya komela (kozua) mayi

Ayah 155

وَلَا تَمَسُّوهَا بِسُوٓءࣲ فَيَأۡخُذَكُمۡ عَذَابُ يَوۡمٍ عَظِيمࣲ‏

Mpe bosala ye mabe te, noki te, etumbu monene ekozua bino mokolo moko boye

Ayah 156

فَعَقَرُوهَا فَأَصۡبَحُواْ نَٰدِمِينَ

Kasi babomaki ye, mpe na sima bakomaki kolela

Ayah 157

فَأَخَذَهُمُ ٱلۡعَذَابُۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةࣰۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ

Mpe topesaki bango etumbu, wana ezali elembo kasi ebele na bango bazalaki kondima te

Ayah 158

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Mpe Nkolo wayo azali ya sólo na bokasi atonda ngolu

Ayah 159

كَذَّبَتۡ قَوۡمُ لُوطٍ ٱلۡمُرۡسَلِينَ

Bato ya Loth baboyaki mpe kondimela batindami

Ayah 160

إِذۡ قَالَ لَهُمۡ أَخُوهُمۡ لُوطٌ أَلَا تَتَّقُونَ

Tango ndeko wa bango Loth ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te

Ayah 161

إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينࣱ‏

Nazali motindami malamu тропа bino

Ayah 162

فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

Bobanga Allah mpe botosa ngai

Ayah 163

وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo

Ayah 164

أَتَأۡتُونَ ٱلذُّكۡرَانَ مِنَ ٱلۡعَٰلَمِينَ

Boye bozali kosalela posa ya nzoto bino mibali na mibali o kati na mokili

Ayah 165

وَتَذَرُونَ مَا خَلَقَ لَكُمۡ رَبُّكُم مِّنۡ أَزۡوَٰجِكُمۚ بَلۡ أَنتُمۡ قَوۡمٌ عَادُونَ

Mpe botiki basi oyo Nkolo wa bino akela тропа bino? Kasi bozali bato ya masumu (balekisi ndelo mpe babuki mibeko)

Ayah 166

قَالُواْ لَئِن لَّمۡ تَنتَهِ يَٰلُوطُ لَتَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡمُخۡرَجِينَ

Balobi: Eh Loth! Soki otiki te, tokobimisa yo (na mboka)

Ayah 167

قَالَ إِنِّي لِعَمَلِكُم مِّنَ ٱلۡقَالِينَ

Alobi: Ya soló, ngai naboyi maye bozali kosala

Ayah 168

رَبِّ نَجِّنِي وَأَهۡلِي مِمَّا يَعۡمَلُونَ

Nkolo, longisa ngai elongo na libota lia ngai тропа maye bazali kosala

Ayah 169

فَنَجَّيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥٓ أَجۡمَعِينَ

Tolongisaki ye elongo na libota lia ye bango banso

Ayah 170

إِلَّا عَجُوزࣰ ا فِي ٱلۡغَٰبِرِينَ

Longola sé mobange ya mwasi atikalaki elongo na baye bazuaki etumbu

Ayah 171

ثُمَّ دَمَّرۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ

Sima, tobomaki basusu baye batikalaki

Ayah 172

وَأَمۡطَرۡنَا عَلَيۡهِم مَّطَرࣰ اۖ فَسَآءَ مَطَرُ ٱلۡمُنذَرِينَ

Mpe tobetiselaki bango mbula (ya mabanga), mpe mbula nini ya mabe ya motindo wana тропа baye tokebisaki

Ayah 173

إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةࣰۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ

Ya soló, wana ezali elembo, mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te

Ayah 174

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Mpe Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu

Ayah 175

كَذَّبَ أَصۡحَٰبُ لۡـَٔيۡكَةِ ٱلۡمُرۡسَلِينَ

Bato ya aîkat, baboyaki kondimela batindami

Ayah 176

إِذۡ قَالَ لَهُمۡ شُعَيۡبٌ أَلَا تَتَّقُونَ

Tango ndeko wa bango Shuaîb ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te

Ayah 177

إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينࣱ‏

Nazali motindami malamu epai na bino

Ayah 178

فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

Bobanga Allah mpe botosa ngai

Ayah 179

وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo

Ayah 180

۞أَوۡفُواْ ٱلۡكَيۡلَ وَلَا تَكُونُواْ مِنَ ٱلۡمُخۡسِرِينَ

Mpe bokokisa bimekelo ya bitando na ndenge esengeli, kasi bozangisa yango te

Ayah 181

وَزِنُواْ بِٱلۡقِسۡطَاسِ ٱلۡمُسۡتَقِيمِ

Mpe botondisa emekelo na bosembo

Ayah 182

وَلَا تَبۡخَسُواْ ٱلنَّاسَ أَشۡيَآءَهُمۡ وَلَا تَعۡثَوۡاْ فِي ٱلۡأَرۡضِ مُفۡسِدِينَ

Mpe bobuba bato te na bimekelo na bango, mpe bosala mabe kati na mokili te, (mpe bosomba bosembo ya bato na misolo te)

Ayah 183

وَٱتَّقُواْ ٱلَّذِي خَلَقَكُمۡ وَٱلۡجِبِلَّةَ ٱلۡأَوَّلِينَ

Mpe bobanga oyo akeli bino na baye baleka liboso na bino

Ayah 184

قَالُوٓاْ إِنَّمَآ أَنتَ مِنَ ٱلۡمُسَحَّرِينَ

Balobi: Ya soló, ozali kati ya balokami

Ayah 185

وَمَآ أَنتَ إِلَّا بَشَرࣱ مِّثۡلُنَا وَإِن نَّظُنُّكَ لَمِنَ ٱلۡكَٰذِبِينَ

Mpe ozali sé moto lokola biso, mpe tozali kokanisa ete ozali kati ya babuki lokuta

Ayah 186

فَأَسۡقِطۡ عَلَيۡنَا كِسَفࣰ ا مِّنَ ٱلسَّمَآءِ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ

Kweisela biso ndambu ya mapata soki ozali koloba bosölo

Ayah 187

قَالَ رَبِّيٓ أَعۡلَمُ بِمَا تَعۡمَلُونَ

Alobi: Nkolo wa ngai ayebi maye manso bozali kosala

Ayah 188

فَكَذَّبُوهُ فَأَخَذَهُمۡ عَذَابُ يَوۡمِ ٱلظُّلَّةِۚ إِنَّهُۥ كَانَ عَذَابَ يَوۡمٍ عَظِيمٍ

Kasi baboyaki kondimela ye, mpe topesaki bango etumbu o mokolo moye mapata eyindaki, ya solo, yango ezalaki nde mokolo ya etumbu monene

Ayah 189

إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةࣰۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ

Wana ezali elembo, mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te

Ayah 190

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Mpe ya soló, Nkolo wayo azali wa bokasi atonda ngolu

Ayah 191

وَإِنَّهُۥ لَتَنزِيلُ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

Ya sólo, yango (kurani) eye, ekitisamaki kowuta epai ya Nkolo wa molongo

Ayah 192

نَزَلَ بِهِ ٱلرُّوحُ ٱلۡأَمِينُ

Molimo mosantu (anzelu gabiliyele) akitaki na yango

Ayah 193

عَلَىٰ قَلۡبِكَ لِتَكُونَ مِنَ ٱلۡمُنذِرِينَ

Na motema nayo mpo ozala okati ya bakebisi

Ayah 194

بِلِسَانٍ عَرَبِيࣲّ مُّبِينࣲ‏

Na lokota ya arabo oyo ezali polele

Ayah 195

وَإِنَّهُۥ لَفِي زُبُرِ ٱلۡأَوَّلِينَ

Mpe yango esilaka kokomama na makomi ya batindami ya kala

Ayah 196

أَوَلَمۡ يَكُن لَّهُمۡ ءَايَةً أَن يَعۡلَمَهُۥ عُلَمَٰٓؤُاْ بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ

Boye ezalaki elembo te тропа bango, mpo banganga nzambe ya bana ya isalayele bakoka koyeba yango

Ayah 197

وَلَوۡ نَزَّلۡنَٰهُ عَلَىٰ بَعۡضِ ٱلۡأَعۡجَمِينَ

Mpe soki tokitisaki yango epai ya moto oyo azali arabo te

Ayah 198

فَقَرَأَهُۥ عَلَيۡهِم مَّا كَانُواْ بِهِۦ مُؤۡمِنِينَ

Mpe atangela bango yango mbele bandimaki na yango te

Ayah 199

كَذَٰلِكَ سَلَكۡنَٰهُ فِي قُلُوبِ ٱلۡمُجۡرِمِينَ

Lolenge wana nde tokitisaki (koyimayima ezala) 0 mitema mia batomboki

Ayah 200

لَا يُؤۡمِنُونَ بِهِۦ حَتَّىٰ يَرَوُاْ ٱلۡعَذَابَ ٱلۡأَلِيمَ

Bakondimaka na yango te kino bakomonaka etumbu ya makasi

Ayah 201

فَيَأۡتِيَهُم بَغۡتَةࣰ وَهُمۡ لَا يَشۡعُرُونَ

Ekoyela bango mbalakaka, bakoyebaka te

Ayah 202

فَيَقُولُواْ هَلۡ نَحۡنُ مُنظَرُونَ

Mpe bazali koloba ete: Boye tokozelisama? (mpo tokoka kondima)

Ayah 203

أَفَبِعَذَابِنَا يَسۡتَعۡجِلُونَ

Boye! Etumbu na biso nde bazali kowelisa

Ayah 204

أَفَرَءَيۡتَ إِن مَّتَّعۡنَٰهُمۡ سِنِينَ

Boye ozali kornona te, soki topesaki bango mua mibu po basakana

Ayah 205

ثُمَّ جَآءَهُم مَّا كَانُواْ يُوعَدُونَ

Sima maye balakamaki ekomelaki bango

Ayah 206

مَآ أَغۡنَىٰ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يُمَتَّعُونَ

Esengo eye bazalaki na yango esalisaki bango na eloko te

Ayah 207

وَمَآ أَهۡلَكۡنَا مِن قَرۡيَةٍ إِلَّا لَهَا مُنذِرُونَ

Mpe tobomaka mboka te, sé totinda bakebisi liboso

Ayah 208

ذِكۡرَىٰ وَمَا كُنَّا ظَٰلِمِينَ

(Mpona) kokebisa, mpe tozali babubi te

Ayah 209

وَمَا تَنَزَّلَتۡ بِهِ ٱلشَّيَٰطِينُ

Mpe ezalaki basatana nde bakiti nayango te (kurani)

Ayah 210

وَمَا يَنۢبَغِي لَهُمۡ وَمَا يَسۡتَطِيعُونَ

Mpe esengeli na bango te, mpe bazali na makoki ya kosala yango te

Ayah 211

إِنَّهُمۡ عَنِ ٱلسَّمۡعِ لَمَعۡزُولُونَ

(Kasi) ya soló, bango bamitiye mosika mpona koyoka

Ayah 212

فَلَا تَدۡعُ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَ فَتَكُونَ مِنَ ٱلۡمُعَذَّبِينَ

Mpe kobondela nzambe mosusu te elongo na Allah, noki te okozuama 0 kati ya bato ya etumbu

Ayah 213

وَأَنذِرۡ عَشِيرَتَكَ ٱلۡأَقۡرَبِينَ

Mpe kebisa libota nayo ya pene

Ayah 214

وَٱخۡفِضۡ جَنَاحَكَ لِمَنِ ٱتَّبَعَكَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ

Mpe kitisa mapeka nayo (zala malamu) mpona bandimi oyo bazali kolanda yo

Ayah 215

فَإِنۡ عَصَوۡكَ فَقُلۡ إِنِّي بَرِيٓءࣱ مِّمَّا تَعۡمَلُونَ

Mpe soki baboyi kotosa yo, loba na bango ete: Ya soló ngai na nazali mosika na maye bozali kosala

Ayah 216

وَتَوَكَّلۡ عَلَى ٱلۡعَزِيزِ ٱلرَّحِيمِ

Mpe mipesa epai ya oyo azali na bokasi atonda mawa

Ayah 217

ٱلَّذِي يَرَىٰكَ حِينَ تَقُومُ

Oyo amonaka yo tango otelemaka

Ayah 218

وَتَقَلُّبَكَ فِي ٱلسَّٰجِدِينَ

Mpe (amonaka) yo tango ogumbamaka

Ayah 219

إِنَّهُۥ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ

Ya soló, ye azali moyoki mpe moyebi

Ayah 220

هَلۡ أُنَبِّئُكُمۡ عَلَىٰ مَن تَنَزَّلُ ٱلشَّيَٰطِينُ

Boye nayebisa bino epai ya nani basatana bazali kokita

Ayah 221

تَنَزَّلُ عَلَىٰ كُلِّ أَفَّاكٍ أَثِيمࣲ‏

Bazali kokita epai ya bato ya lokuta basumuki

Ayah 222

يُلۡقُونَ ٱلسَّمۡعَ وَأَكۡثَرُهُمۡ كَٰذِبُونَ

Batiyaka matoyi kasi ebele na bango bazali bakosi

Ayah 223

وَٱلشُّعَرَآءُ يَتَّبِعُهُمُ ٱلۡغَاوُۥنَ

Kasi epai ya bato ya másese (masapo), elandaka bango sé baye babunga

Ayah 224

أَلَمۡ تَرَ أَنَّهُمۡ فِي كُلِّ وَادࣲ يَهِيمُونَ

Boye omoni te ete bazali kolekaleka kati kati ya ba ngomba (mibale)

Ayah 225

وَأَنَّهُمۡ يَقُولُونَ مَا لَا يَفۡعَلُونَ

Mpe ya sólo, bango balobaka maye basalaka te

Ayah 226

إِلَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَذَكَرُواْ ٱللَّهَ كَثِيرࣰ ا وَٱنتَصَرُواْ مِنۢ بَعۡدِ مَا ظُلِمُواْۗ وَسَيَعۡلَمُ ٱلَّذِينَ ظَلَمُوٓاْ أَيَّ مُنقَلَبࣲ يَنقَلِبُونَ

Longola sé baye bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, mpe bazali kokumisa Allah mingi, mpe bamisalisi na kopamela mabe ya babubi, kasi babubi bakoyebaka kala mingi te ba nani ekobebela bango

Ayah 227