Surah Al-Haaqqa — The Reality
Surah Al-Haaqqa (The Reality) is chapter 69 of the Quran, with 52 verses. This page presents the Arabic text with a Lingala translation, verse by verse.
ٱلۡحَآقَّةُ
Mokolo ya Sólo
Ayah 1مَا ٱلۡحَآقَّةُ
Nini nde mokolo ya Sólo
Ayah 2وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا ٱلۡحَآقَّةُ
Eloko nini ekolakisa yo mokolo ya sólo nde nini
Ayah 3كَذَّبَتۡ ثَمُودُ وَعَادُۢ بِٱلۡقَارِعَةِ
Bato ya mboka Thamúd na Aad baboyaki kondimela likambo ya somo
Ayah 4فَأَمَّا ثَمُودُ فَأُهۡلِكُواْ بِٱلطَّاغِيَةِ
Mpona bato ya Thamúd, babebisamaki na tangba ya makasi
Ayah 5وَأَمَّا عَادࣱ فَأُهۡلِكُواْ بِرِيحࣲ صَرۡصَرٍ عَاتِيَةࣲ
Mpe mpona bato ya aad, babebisamaki na mopepe ya makasi
Ayah 6سَخَّرَهَا عَلَيۡهِمۡ سَبۡعَ لَيَالࣲ وَثَمَٰنِيَةَ أَيَّامٍ حُسُومࣰ اۖ فَتَرَى ٱلۡقَوۡمَ فِيهَا صَرۡعَىٰ كَأَنَّهُمۡ أَعۡجَازُ نَخۡلٍ خَاوِيَةࣲ
Mabe wana ekwelaki bango butu sambo na mikolo mwambe, okomona sé bibembe ya bato, bakomi lokola biteni ya nagh’l ya kokata kata
Ayah 7فَهَلۡ تَرَىٰ لَهُم مِّنۢ بَاقِيَةࣲ
Boye okomona ata eloko etikali
Ayah 8وَجَآءَ فِرۡعَوۡنُ وَمَن قَبۡلَهُۥ وَٱلۡمُؤۡتَفِكَٰتُ بِٱلۡخَاطِئَةِ
Falo na baye bazalaki liboso naye na bato ya mboka bikweisama, bayaki na mabe
Ayah 9فَعَصَوۡاْ رَسُولَ رَبِّهِمۡ فَأَخَذَهُمۡ أَخۡذَةࣰ رَّابِيَةً
Mpe baboyaki kondima na motindami ya Nkolo na bango, kasi azuisaki bango kozuama ya mawa te
Ayah 10إِنَّا لَمَّا طَغَا ٱلۡمَآءُ حَمَلۡنَٰكُمۡ فِي ٱلۡجَارِيَةِ
Ya soló, tango mayi etondaki, biso nde tomatisaki bino okati ya masuwa
Ayah 11لِنَجۡعَلَهَا لَكُمۡ تَذۡكِرَةࣰ وَتَعِيَهَآ أُذُنࣱ وَٰعِيَةࣱ
Mpo totiya yango etikala elembo mpo bato bakoka kokanisa
Ayah 12فَإِذَا نُفِخَ فِي ٱلصُّورِ نَفۡخَةࣱ وَٰحِدَةࣱ
Mpe tango bakofula na kelelo mbala moko
Ayah 13وَحُمِلَتِ ٱلۡأَرۡضُ وَٱلۡجِبَالُ فَدُكَّتَا دَكَّةࣰ وَٰحِدَةࣰ
Mabele na bangomba bikotombwana nako pasuka mbala moko
Ayah 14فَيَوۡمَئِذࣲ وَقَعَتِ ٱلۡوَاقِعَةُ
Mokolo wana ekozala bokweisami ya suka
Ayah 15وَٱنشَقَّتِ ٱلسَّمَآءُ فَهِيَ يَوۡمَئِذࣲ وَاهِيَةࣱ
Likolo likopasuka mpe langi na yango ekobongwanaka
Ayah 16وَٱلۡمَلَكُ عَلَىٰٓ أَرۡجَآئِهَاۚ وَيَحۡمِلُ عَرۡشَ رَبِّكَ فَوۡقَهُمۡ يَوۡمَئِذࣲ ثَمَٰنِيَةࣱ
Mpe ba anzelu (basantu) bakozalaka pembeni ya mapata (bazali na bobangi ya Nkolo wa bango) mpe ba anzelu mwambe bakomema ngwende (ya Allah) mokolo wana
Ayah 17يَوۡمَئِذࣲ تُعۡرَضُونَ لَا تَخۡفَىٰ مِنكُمۡ خَافِيَةࣱ
Mokolo wana bokozongisaka nyoso epai ya Allah, bokobombaka eloko moko te
Ayah 18فَأَمَّا مَنۡ أُوتِيَ كِتَٰبَهُۥ بِيَمِينِهِۦ فَيَقُولُ هَآؤُمُ ٱقۡرَءُواْ كِتَٰبِيَهۡ
Oyó bakopesaka ye buku naye na loboko ya mobali, akolobaka: Bosimba mpe botanga buku na ngai
Ayah 19إِنِّي ظَنَنتُ أَنِّي مُلَٰقٍ حِسَابِيَهۡ
Nazalaki kolikia ete nakokutana na mbano mwa ngai
Ayah 20فَهُوَ فِي عِيشَةࣲ رَّاضِيَةࣲ
Мре akozala na bomoyi ya esengo
Ayah 21فِي جَنَّةٍ عَالِيَةࣲ
(Akozalaka) okati ya Iola ya likolo
Ayah 22قُطُوفُهَا دَانِيَةࣱ
Bambuma na yango ezali pembeni
Ayah 23كُلُواْ وَٱشۡرَبُواْ هَنِيٓـَٔۢا بِمَآ أَسۡلَفۡتُمۡ فِي ٱلۡأَيَّامِ ٱلۡخَالِيَةِ
Bolia mpe bomela na esengo kolandana na mikolo oyo bolekisaki
Ayah 24وَأَمَّا مَنۡ أُوتِيَ كِتَٰبَهُۥ بِشِمَالِهِۦ فَيَقُولُ يَٰلَيۡتَنِي لَمۡ أُوتَ كِتَٰبِيَهۡ
Mpe oyo bakopesa ye buku naye na loboko ya mwasi akolobaka: Eh ngai! Soki bapesaka ngai ata yango te
Ayah 25وَلَمۡ أَدۡرِ مَا حِسَابِيَهۡ
Mpe nayebaki ata eloko moko na yango te
Ayah 26يَٰلَيۡتَهَا كَانَتِ ٱلۡقَاضِيَةَ
Natikala ata na liwa na ngai
Ayah 27مَآ أَغۡنَىٰ عَنِّي مَالِيَهۡۜ
Misolo mia ngai misalisi ngai na eloko te
Ayah 28هَلَكَ عَنِّي سُلۡطَٰنِيَهۡ
Bokonzi na ngai esili kobebisama
Ayah 29خُذُوهُ فَغُلُّوهُ
Bokanga ye singa na kingo
Ayah 30ثُمَّ ٱلۡجَحِيمَ صَلُّوهُ
Sima bobwaka ye na moto
Ayah 31ثُمَّ فِي سِلۡسِلَةࣲ ذَرۡعُهَا سَبۡعُونَ ذِرَاعࣰ ا فَٱسۡلُكُوهُ
Bokanga ye na minyololo ya ntaka ntuku nsambo
Ayah 32إِنَّهُۥ كَانَ لَا يُؤۡمِنُ بِٱللَّهِ ٱلۡعَظِيمِ
Ya soló, azalaki kondima na Allah wa monene te
Ayah 33وَلَا يَحُضُّ عَلَىٰ طَعَامِ ٱلۡمِسۡكِينِ
Mpe azalaki na (mawa) ya koleisa babola te
Ayah 34فَلَيۡسَ لَهُ ٱلۡيَوۡمَ هَٰهُنَا حَمِيمࣱ
Lelo azali na mosungi te
Ayah 35وَلَا طَعَامٌ إِلَّا مِنۡ غِسۡلِينࣲ
Mpe bilia naye ekozala sé mayi ya moto ya tofina
Ayah 36لَّا يَأۡكُلُهُۥٓ إِلَّا ٱلۡخَٰطِـُٔونَ
Baye bakoliaka yango sé ba oyo basalaki mabe
Ayah 37فَلَآ أُقۡسِمُ بِمَا تُبۡصِرُونَ
Nalapi na maye bozali kornona
Ayah 38وَمَا لَا تُبۡصِرُونَ
Мре na maye bozali kornona te
Ayah 39إِنَّهُۥ لَقَوۡلُ رَسُولࣲ كَرِيمࣲ
Yango, ezali liloba lia motindami ya lokumu
Ayah 40وَمَا هُوَ بِقَوۡلِ شَاعِرࣲۚ قَلِيلࣰ ا مَّا تُؤۡمِنُونَ
Kasi ezali liloba lia moto mpamba te, kasi bozali moke oyo bozali kondima
Ayah 41وَلَا بِقَوۡلِ كَاهِنࣲۚ قَلِيلࣰ ا مَّا تَذَكَّرُونَ
Mpe ezali liloba lia nganga te. Ebele bazali kokanisa te
Ayah 42تَنزِيلࣱ مِّن رَّبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Ekitaki kowuta epai ya Nkolo ya molongo
Ayah 43وَلَوۡ تَقَوَّلَ عَلَيۡنَا بَعۡضَ ٱلۡأَقَاوِيلِ
Ata alobelaki biso ndambu ya maloba ya lokuta oyo balobaki
Ayah 44لَأَخَذۡنَا مِنۡهُ بِٱلۡيَمِينِ
Tolingaki kozua ye na loboko ya mobali
Ayah 45ثُمَّ لَقَطَعۡنَا مِنۡهُ ٱلۡوَتِينَ
Sima, tolingaki kokata ye singa ya motema
Ayah 46فَمَا مِنكُم مِّنۡ أَحَدٍ عَنۡهُ حَٰجِزِينَ
Moko azali te ya kopekisa biso
Ayah 47وَإِنَّهُۥ لَتَذۡكِرَةࣱ لِّلۡمُتَّقِينَ
Ya soló, wana ezali sé bokundoli тропа babangi
Ayah 48وَإِنَّا لَنَعۡلَمُ أَنَّ مِنكُم مُّكَذِّبِينَ
Mpe toyebi malamu banani bakosi kati na bino
Ayah 49وَإِنَّهُۥ لَحَسۡرَةٌ عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ
Мре ya soló, ye akozangisaka bapengwi te (na etumbu)
Ayah 50وَإِنَّهُۥ لَحَقُّ ٱلۡيَقِينِ
Mpe ya soló, wana ezali bosembo mpenza ya bondimi
Ayah 51فَسَبِّحۡ بِٱسۡمِ رَبِّكَ ٱلۡعَظِيمِ
Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya lokumu
Ayah 52