Surah As-Saaffaat — Those drawn up in Ranks
Surah As-Saaffaat (Those drawn up in Ranks) is chapter 37 of the Quran, with 182 verses. This page presents the Arabic text with a Lingala translation, verse by verse.
وَٱلصَّٰٓفَّٰتِ صَفࣰّ ا
Na (ba anzelu) baye batelemi na milongo
Ayah 1فَٱلزَّٰجِرَٰتِ زَجۡرࣰ ا
Mpe na baye bazali kotindika na makasi (mapata)
Ayah 2فَٱلتَّٰلِيَٰتِ ذِكۡرًا
Na baye batangaka bokundoli
Ayah 3إِنَّ إِلَٰهَكُمۡ لَوَٰحِدࣱ
Ya soló, Nzambe na bino azali moko
Ayah 4رَّبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَا وَرَبُّ ٱلۡمَشَٰرِقِ
Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazuami kati na yango mibale mpe Nkolo wa moniele
Ayah 5إِنَّا زَيَّنَّا ٱلسَّمَآءَ ٱلدُّنۡيَا بِزِينَةٍ ٱلۡكَوَاكِبِ
Ya sólo, tobongisaki mapata ya nsé na bonzenga ya minzoto
Ayah 6وَحِفۡظࣰ ا مِّن كُلِّ شَيۡطَٰنࣲ مَّارِدࣲ
Mpe ebatelami na mabe ya satana motomboki
Ayah 7لَّا يَسَّمَّعُونَ إِلَى ٱلۡمَلَإِ ٱلۡأَعۡلَىٰ وَيُقۡذَفُونَ مِن كُلِّ جَانِبࣲ
Mpo bakoka koyoka te epai ya ba anzelu ya likolo, kasi bakobwakelamaka mabanga ngambu inso
Ayah 8دُحُورࣰ اۖ وَلَهُمۡ عَذَابࣱ وَاصِبٌ
Bakobenganama mpe bakozala na etumbu ya libela
Ayah 9إِلَّا مَنۡ خَطِفَ ٱلۡخَطۡفَةَ فَأَتۡبَعَهُۥ شِهَابࣱ ثَاقِبࣱ
Longola sé oyo akolinga kozua (sango) na lolenge ya moyibi, kasi bakolandisaka kobengana ye na libanga ya moto
Ayah 10فَٱسۡتَفۡتِهِمۡ أَهُمۡ أَشَدُّ خَلۡقًا أَم مَّنۡ خَلَقۡنَآۚ إِنَّا خَلَقۡنَٰهُم مِّن طِينࣲ لَّازِبِۭ
Tuna bango, soki kokela bango ezali makasi koleka manso tokela? Te, ya soló, tokelaki bango na mabele ya potopoto oyo ekangaka
Ayah 11بَلۡ عَجِبۡتَ وَيَسۡخَرُونَ
Kasi soki ozali kokamwa mpe bazali koseka
Ayah 12وَإِذَا ذُكِّرُواْ لَا يَذۡكُرُونَ
Mpe soki bapesami malendisi (kurani), baboyi kokanisa yango. (kotanga yango)
Ayah 13وَإِذَا رَأَوۡاْ ءَايَةࣰ يَسۡتَسۡخِرُونَ
Mpe soki bamoni elembo, bakomi kosalela yango litio
Ayah 14وَقَالُوٓاْ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا سِحۡرࣱ مُّبِينٌ
Mpe balobi: Oyo ezali bonganga (bondoki) ya polele
Ayah 15أَءِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابࣰ ا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ
Soki tokufi tokomi mabele, mpe mikuwa, boye tokosekwisama lisusu
Ayah 16أَوَءَابَآؤُنَا ٱلۡأَوَّلُونَ
Na bankoko na biso ya kala
Ayah 17قُلۡ نَعَمۡ وَأَنتُمۡ دَٰخِرُونَ
Loba: Iyo, bino mpe lokola bokokitisama
Ayah 18فَإِنَّمَا هِيَ زَجۡرَةࣱ وَٰحِدَةࣱ فَإِذَا هُمۡ يَنظُرُونَ
Mpe ekozalaka sé bolengisi moko ya makasi, mpe bakomi kotala
Ayah 19وَقَالُواْ يَٰوَيۡلَنَا هَٰذَا يَوۡمُ ٱلدِّينِ
Mpe bakomi koloba: Eh mawa na biso! Oyo nde mokolo mwa mbano (ya suka mpe lifuti)
Ayah 20هَٰذَا يَوۡمُ ٱلۡفَصۡلِ ٱلَّذِي كُنتُم بِهِۦ تُكَذِّبُونَ
Oyo nde mokolo mwa bokati makambo moye botiaki tembe тропа yango
Ayah 21۞ٱحۡشُرُواْ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ وَأَزۡوَٰجَهُمۡ وَمَا كَانُواْ يَعۡبُدُونَ
Bosangisa babubi na baninga na bango тре baye banso bazalaki kobondela bango
Ayah 22مِن دُونِ ٱللَّهِ فَٱهۡدُوهُمۡ إِلَىٰ صِرَٰطِ ٱلۡجَحِيمِ
Na botiki Allah, mpe bokamba bango na nzela ya lifelo
Ayah 23وَقِفُوهُمۡۖ إِنَّهُم مَّسۡـُٔولُونَ
Mpe botelemisa bango mpo bakoka kotunama
Ayah 24مَا لَكُمۡ لَا تَنَاصَرُونَ
Mpona nini bozali komisunga te
Ayah 25بَلۡ هُمُ ٱلۡيَوۡمَ مُسۡتَسۡلِمُونَ
Kasi lelo bakoluka kozala na botosi
Ayah 26وَأَقۡبَلَ بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضࣲ يَتَسَآءَلُونَ
Mpe basusu bakobongola bilongi epai ya baninga mpe bakomi komitunana
Ayah 27قَالُوٓاْ إِنَّكُمۡ كُنتُمۡ تَأۡتُونَنَا عَنِ ٱلۡيَمِينِ
Bakolobaka: Ezali bino nde bobengaki biso na makasi. (na bopengwi)
Ayah 28قَالُواْ بَل لَّمۡ تَكُونُواْ مُؤۡمِنِينَ
(Bakonzi) bakolobaka: Bino moko boboyaki kondima
Ayah 29وَمَا كَانَ لَنَا عَلَيۡكُم مِّن سُلۡطَٰنِۭۖ بَلۡ كُنتُمۡ قَوۡمࣰ ا طَٰغِينَ
Tozalaki na bokoki epai na bino te, bino moko nde bozalaki bato ya mabe
Ayah 30فَحَقَّ عَلَيۡنَا قَوۡلُ رَبِّنَآۖ إِنَّا لَذَآئِقُونَ
Liloba lia Nkolo wa biso lizali ya soló. Sólo tokomema. (etumbu)
Ayah 31فَأَغۡوَيۡنَٰكُمۡ إِنَّا كُنَّا غَٰوِينَ
Tomemaki bino na libungi, kasi ya soló, tomibungisaki biso moko
Ayah 32فَإِنَّهُمۡ يَوۡمَئِذࣲ فِي ٱلۡعَذَابِ مُشۡتَرِكُونَ
Mokolo mona bakosanganaka (bango) banso na etumbu
Ayah 33إِنَّا كَذَٰلِكَ نَفۡعَلُ بِٱلۡمُجۡرِمِينَ
Lolenge wana nde tokosalaka na batomboki
Ayah 34إِنَّهُمۡ كَانُوٓاْ إِذَا قِيلَ لَهُمۡ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا ٱللَّهُ يَسۡتَكۡبِرُونَ
Ya soló, bazalaki soki bayebisi bango nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé Allah, basali lolendo
Ayah 35وَيَقُولُونَ أَئِنَّا لَتَارِكُوٓاْ ءَالِهَتِنَا لِشَاعِرࣲ مَّجۡنُونِۭ
Mpe bazali koloba: Totika banzambe na biso тропа molobi ntôki oyo тре azali moto ya ligboma
Ayah 36بَلۡ جَآءَ بِٱلۡحَقِّ وَصَدَّقَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Kasi ayaki na bosóló, batindami balobaki bosembo
Ayah 37إِنَّكُمۡ لَذَآئِقُواْ ٱلۡعَذَابِ ٱلۡأَلِيمِ
Ya sólo penza, bokomeka etumbu ya makasi
Ayah 38وَمَا تُجۡزَوۡنَ إِلَّا مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
Mpe bokofutama sé kolandana na maye bozalaki kosala
Ayah 39إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Longola sé bawumbu ya Allah ba oyo baponama
Ayah 40أُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ رِزۡقࣱ مَّعۡلُومࣱ
Bango nde bakozalaka na bolamu oyo eyebani
Ayah 41فَوَٰكِهُ وَهُم مُّكۡرَمُونَ
(Bakoliaka) mbuma mpe bakosepelisaka bango
Ayah 42فِي جَنَّٰتِ ٱلنَّعِيمِ
Okati na bilanga (lola) bilamu
Ayah 43عَلَىٰ سُرُرࣲ مُّتَقَٰبِلِينَ
Likolo lia bambeto bizali ya kotalana
Ayah 44يُطَافُ عَلَيۡهِم بِكَأۡسࣲ مِّن مَّعِينِۭ
Bakolekiselaka bango коро etondi na mayi ya miluka
Ayah 45بَيۡضَآءَ لَذَّةࣲ لِّلشَّٰرِبِينَ
Ya pembe elengi тропа komela
Ayah 46لَا فِيهَا غَوۡلࣱ وَلَا هُمۡ عَنۡهَا يُنزَفُونَ
Ekosalaka bango mabe te, mpe ekolangwisaka te
Ayah 47وَعِندَهُمۡ قَٰصِرَٰتُ ٱلطَّرۡفِ عِينࣱ
Bakozala na basi ya kitoko pembeni na bango, basi ya miso minene ya kotalatala pembeni te
Ayah 48كَأَنَّهُنَّ بَيۡضࣱ مَّكۡنُونࣱ
Bazali lokola pembe ya likei oyo ebatelami
Ayah 49فَأَقۡبَلَ بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضࣲ يَتَسَآءَلُونَ
Basusu bakobaluka kot ala baninga na kotunana
Ayah 50قَالَ قَآئِلࣱ مِّنۡهُمۡ إِنِّي كَانَ لِي قَرِينࣱ
Moko wa bango akolobaka: Ya soló, nazalaki na moninga
Ayah 51يَقُولُ أَءِنَّكَ لَمِنَ ٱلۡمُصَدِّقِينَ
Akoloba ete: Boye ozalaki okati ya bandimi
Ayah 52أَءِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابࣰ ا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَدِينُونَ
Tango tokokufa mpe tokomi mabele na mikuwa, boye tokotunamaka
Ayah 53قَالَ هَلۡ أَنتُم مُّطَّلِعُونَ
Akolobaka: Boye bolingi kotala na likolo
Ayah 54فَٱطَّلَعَ فَرَءَاهُ فِي سَوَآءِ ٱلۡجَحِيمِ
Mpe akotalaka likolo mpe akomonaka ye na lifelo
Ayah 55قَالَ تَٱللَّهِ إِن كِدتَّ لَتُرۡدِينِ
Mpe akoloba: Na nkombo ya Allah, yo nde osali ete ngai nazanga
Ayah 56وَلَوۡلَا نِعۡمَةُ رَبِّي لَكُنتُ مِنَ ٱلۡمُحۡضَرِينَ
Soki ezalaka bolamu bwa Nkolo wa ngai te, mbele nalingaki kozala o kati ya bato ya etumbu
Ayah 57أَفَمَا نَحۡنُ بِمَيِّتِينَ
Ezali solo te ete tokokufa te
Ayah 58إِلَّا مَوۡتَتَنَا ٱلۡأُولَىٰ وَمَا نَحۡنُ بِمُعَذَّبِينَ
Sé ezala kokufa ya biso ya yambo mpe tokozuaka etumbu te
Ayah 59إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
Ya soló, oyo nde elonga enene
Ayah 60لِمِثۡلِ هَٰذَا فَلۡيَعۡمَلِ ٱلۡعَٰمِلُونَ
Na lolenge ya boye nde esengeli na baye balingi kosala basala
Ayah 61أَذَٰلِكَ خَيۡرࣱ نُّزُلًا أَمۡ شَجَرَةُ ٱلزَّقُّومِ
Boye wana ezali esika ya malamu тропа kofanda to ezali nzete ya zaqqüm? (ezali nzete wana mbuma na yango ezali bololo ezali o kati ya lifelo, yango nde bilei ya bato ya mabe)
Ayah 62إِنَّا جَعَلۡنَٰهَا فِتۡنَةࣰ لِّلظَّٰلِمِينَ
Totiyaki yango ezala komekama тропа babubi
Ayah 63إِنَّهَا شَجَرَةࣱ تَخۡرُجُ فِيٓ أَصۡلِ ٱلۡجَحِيمِ
Ezali nzete eye ebotaka o kati ya lifelo
Ayah 64طَلۡعُهَا كَأَنَّهُۥ رُءُوسُ ٱلشَّيَٰطِينِ
Mbuma na yango ezali lokola mitu ya basatana
Ayah 65فَإِنَّهُمۡ لَأٓكِلُونَ مِنۡهَا فَمَالِـُٔونَ مِنۡهَا ٱلۡبُطُونَ
Ya soló, esengeli na bango kólia yango тре kotondisa mabumu na bango
Ayah 66ثُمَّ إِنَّ لَهُمۡ عَلَيۡهَا لَشَوۡبࣰ ا مِّنۡ حَمِيمࣲ
Sima bakomela mayi ya tofina ya moto
Ayah 67ثُمَّ إِنَّ مَرۡجِعَهُمۡ لَإِلَى ٱلۡجَحِيمِ
Sima lifelo nde esika ya bozongi na bango ya sólo
Ayah 68إِنَّهُمۡ أَلۡفَوۡاْ ءَابَآءَهُمۡ ضَآلِّينَ
Ya soló, bakutaki batata na bango na libungi
Ayah 69فَهُمۡ عَلَىٰٓ ءَاثَٰرِهِمۡ يُهۡرَعُونَ
Mpe balandaki sé nzele na bango
Ayah 70وَلَقَدۡ ضَلَّ قَبۡلَهُمۡ أَكۡثَرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
Мре liboso na bango, ebele ya bankoko na bango basilaki kobunga
Ayah 71وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا فِيهِم مُّنذِرِينَ
Tosilaki kotindela bango bakebisi
Ayah 72فَٱنظُرۡ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُنذَرِينَ
Tala lolenge ezalaki тропа baye bakebisamaki
Ayah 73إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama
Ayah 74وَلَقَدۡ نَادَىٰنَا نُوحࣱ فَلَنِعۡمَ ٱلۡمُجِيبُونَ
Mpe ya soló, Nûh abengaki biso тре toyanolaki ye kitoko
Ayah 75وَنَجَّيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥ مِنَ ٱلۡكَرۡبِ ٱلۡعَظِيمِ
Mpe tobikisaki ye elongo na libota lia ye na etumbu ya monene
Ayah 76وَجَعَلۡنَا ذُرِّيَّتَهُۥ هُمُ ٱلۡبَاقِينَ
Mpe totiyaki ete libota lia ye bazala bakitani
Ayah 77وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu
Ayah 78سَلَٰمٌ عَلَىٰ نُوحࣲ فِي ٱلۡعَٰلَمِينَ
Kimia ezala likolo ya Nûh kati na mokili mobimba
Ayah 79إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Ya soló, lolenge wana nde tofutaka babongisi
Ayah 80إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso, baye bandima
Ayah 81ثُمَّ أَغۡرَقۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ
Sima tobomaki basusu
Ayah 82۞وَإِنَّ مِن شِيعَتِهِۦ لَإِبۡرَٰهِيمَ
Mpe ya soló, Ibrâhîm azalaki moko kati na baye balandaki ye na lingomba
Ayah 83إِذۡ جَآءَ رَبَّهُۥ بِقَلۡبࣲ سَلِيمٍ
Tango ayaki epai ya Nkolo waye na motema mosantu
Ayah 84إِذۡ قَالَ لِأَبِيهِ وَقَوۡمِهِۦ مَاذَا تَعۡبُدُونَ
Tango alobaki na tata waye тре bato naye: Bozali kobondela nini
Ayah 85أَئِفۡكًا ءَالِهَةࣰ دُونَ ٱللَّهِ تُرِيدُونَ
Na libungi na bino boluki banzambe mosusu botiki Allah
Ayah 86فَمَا ظَنُّكُم بِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Bozali kokanisa nini тропа Nkolo wa molongo
Ayah 87فَنَظَرَ نَظۡرَةࣰ فِي ٱلنُّجُومِ
Sima atalaki minzoto na bokebi
Ayah 88فَقَالَ إِنِّي سَقِيمࣱ
Mpe alobaki ete: Ya soló ngai nazui malali
Ayah 89فَتَوَلَّوۡاْ عَنۡهُ مُدۡبِرِينَ
Bapesi ye mokongo bakei
Ayah 90فَرَاغَ إِلَىٰٓ ءَالِهَتِهِمۡ فَقَالَ أَلَا تَأۡكُلُونَ
Apusani ngambu ya banzambe na bango alobi: Boliaka te
Ayah 91مَا لَكُمۡ لَا تَنطِقُونَ
Boye bozali koloba te тропа nini
Ayah 92فَرَاغَ عَلَيۡهِمۡ ضَرۡبَۢا بِٱلۡيَمِينِ
Akei kobeta bango mbata na loboko ya mobali
Ayah 93فَأَقۡبَلُوٓاْ إِلَيۡهِ يَزِفُّونَ
Sima bato bayaki epai naye na lombango
Ayah 94قَالَ أَتَعۡبُدُونَ مَا تَنۡحِتُونَ
Ayebisi bango: Boye bozali kobondela bikeko biye bosali bino moko
Ayah 95وَٱللَّهُ خَلَقَكُمۡ وَمَا تَعۡمَلُونَ
Kasi Allah nde akela bino na maye bozali kosala
Ayah 96قَالُواْ ٱبۡنُواْ لَهُۥ بُنۡيَٰنࣰ ا فَأَلۡقُوهُ فِي ٱلۡجَحِيمِ
Balobaki ete: Botimola libulu ya moto mpe bobwaka ye na kati
Ayah 97فَأَرَادُواْ بِهِۦ كَيۡدࣰ ا فَجَعَلۡنَٰهُمُ ٱلۡأَسۡفَلِينَ
Basalelaki ye likita kasi tokweisaki bango
Ayah 98وَقَالَ إِنِّي ذَاهِبٌ إِلَىٰ رَبِّي سَيَهۡدِينِ
Mpe alobaki ete: Ya soló, ngai nakei epai ya Nkolo wa ngai akokamba ngai
Ayah 99رَبِّ هَبۡ لِي مِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
Nkolo, Pesa ngai (mwana) o kati ya bato ya malamu
Ayah 100فَبَشَّرۡنَٰهُ بِغُلَٰمٍ حَلِيمࣲ
Mpe topesaki ye sango elamu ya mwana mobali ya boboto mingi (Ismail)
Ayah 101فَلَمَّا بَلَغَ مَعَهُ ٱلسَّعۡيَ قَالَ يَٰبُنَيَّ إِنِّيٓ أَرَىٰ فِي ٱلۡمَنَامِ أَنِّيٓ أَذۡبَحُكَ فَٱنظُرۡ مَاذَا تَرَىٰۚ قَالَ يَٰٓأَبَتِ ٱفۡعَلۡ مَا تُؤۡمَرُۖ سَتَجِدُنِيٓ إِن شَآءَ ٱللَّهُ مِنَ ٱلصَّٰبِرِينَ
Мре tango (Ismail) akolaki (Ibrâhîm) alobi: Eh mwana wa ngai! Namoni na ndoto ete nazali kokata yo kingo, omoni ndenge nini? (Ismâîl) alobi: Eh tata wa ngai wa bolingo! Sala lolenge batindi yo, okokuta ngai na bolingi ya Allah, okati ya bakangi mitema
Ayah 102فَلَمَّآ أَسۡلَمَا وَتَلَّهُۥ لِلۡجَبِينِ
Sima ya bango banso mibale kotosa (mibeko mia Allah), alalisi ye mpo ete aboma ye
Ayah 103وَنَٰدَيۡنَٰهُ أَن يَٰٓإِبۡرَٰهِيمُ
Mpe tobelelaki ye ete: Oh Ibrâhîm
Ayah 104قَدۡ صَدَّقۡتَ ٱلرُّءۡيَآۚ إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Osili kokokisa (elaka) ya ndoto, lolenge wana nde tofutaka babongisi
Ayah 105إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ ٱلۡبَلَٰٓؤُاْ ٱلۡمُبِينُ
Ya soló, wana ezalaki momekano mwa polele
Ayah 106وَفَدَيۡنَٰهُ بِذِبۡحٍ عَظِيمࣲ
Mpe topesaki ye ebwele ya kitoko тропа kosasa
Ayah 107وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu
Ayah 108سَلَٰمٌ عَلَىٰٓ إِبۡرَٰهِيمَ
Kimia ezala likolo ya Ibrâhîm
Ayah 109كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Lolenge wana nde tofutaka babongisi
Ayah 110إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Ya soló, ye azalaki okati ya bawumbu na biso bandimi
Ayah 111وَبَشَّرۡنَٰهُ بِإِسۡحَٰقَ نَبِيࣰّ ا مِّنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
Mpe topesaki ye sango elamu ya kobotama ya Is’háq, ntoma okati ya (bato) malamu
Ayah 112وَبَٰرَكۡنَا عَلَيۡهِ وَعَلَىٰٓ إِسۡحَٰقَۚ وَمِن ذُرِّيَّتِهِمَا مُحۡسِنࣱ وَظَالِمࣱ لِّنَفۡسِهِۦ مُبِينࣱ
Mpe topambolaki ye na Is’háq, na libota lia bango mibale oyo ezalaki na (bato ya malamu) mpe oyo akomibuba etali sé ye moko
Ayah 113وَلَقَدۡ مَنَنَّا عَلَىٰ مُوسَىٰ وَهَٰرُونَ
Mpe ya sólo, tosilaki kopesa na Mûssa na Hânına bolamu na biso
Ayah 114وَنَجَّيۡنَٰهُمَا وَقَوۡمَهُمَا مِنَ ٱلۡكَرۡبِ ٱلۡعَظِيمِ
Mpe tobikisaki bango mibale elongo na bato na bango na etumbu ya monene
Ayah 115وَنَصَرۡنَٰهُمۡ فَكَانُواْ هُمُ ٱلۡغَٰلِبِينَ
Mpe tolongisaki bango, mpe bango nde bazalaki balongi
Ayah 116وَءَاتَيۡنَٰهُمَا ٱلۡكِتَٰبَ ٱلۡمُسۡتَبِينَ
Mpe topesaki bango buku ya polele
Ayah 117وَهَدَيۡنَٰهُمَا ٱلصِّرَٰطَ ٱلۡمُسۡتَقِيمَ
Mpe tokambaki bango mibale na nzela ya semba
Ayah 118وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِمَا فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
Mpe nkombo ya bango mibale ezala bokanisi тропа basusu
Ayah 119سَلَٰمٌ عَلَىٰ مُوسَىٰ وَهَٰرُونَ
Kimia ezala likolo ya Mûssa na Háruna
Ayah 120إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi
Ayah 121إِنَّهُمَا مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Ya soló, bango mibale bazalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi
Ayah 122وَإِنَّ إِلۡيَاسَ لَمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Мре ya sólo IL’YÁS azalaki moko okati ya batindami
Ayah 123إِذۡ قَالَ لِقَوۡمِهِۦٓ أَلَا تَتَّقُونَ
Tango alobaki na bato naye: Boye bokobanga te
Ayah 124أَتَدۡعُونَ بَعۡلࣰ ا وَتَذَرُونَ أَحۡسَنَ ٱلۡخَٰلِقِينَ
Boye bozali kokumisa ba’alan (nkombo ya ekeko), mpe botiki mokeli malamu
Ayah 125ٱللَّهَ رَبَّكُمۡ وَرَبَّ ءَابَآئِكُمُ ٱلۡأَوَّلِينَ
Allah nde Nkolo wa bino, mpe Nkolo ya bankoko ya bino ya kala
Ayah 126فَكَذَّبُوهُ فَإِنَّهُمۡ لَمُحۡضَرُونَ
Baboyaki kondimela ye, kasi bakomemama o kati ya etumbu
Ayah 127إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama
Ayah 128وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu
Ayah 129سَلَٰمٌ عَلَىٰٓ إِلۡ يَاسِينَ
Kimia ezala likolo ya Il’yâsîn na balandi ye
Ayah 130إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi
Ayah 131إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi
Ayah 132وَإِنَّ لُوطࣰ ا لَّمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Mpe ya sólo, Loth azalaki okati ya batindami
Ayah 133إِذۡ نَجَّيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥٓ أَجۡمَعِينَ
Tango tolongisaki ye na libota lia ye mobimba
Ayah 134إِلَّا عَجُوزࣰ ا فِي ٱلۡغَٰبِرِينَ
Longola sé mobange ya mwasi azalaki okati ya batikali
Ayah 135ثُمَّ دَمَّرۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ
Sima tobebisaki basusu
Ayah 136وَإِنَّكُمۡ لَتَمُرُّونَ عَلَيۡهِم مُّصۡبِحِينَ
Ya soló, bino bozali koleka pembeni na bango na tongo (nzela ya mobembo)
Ayah 137وَبِٱلَّيۡلِۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
Mpe kati na butu, boye bozali kokanisa te
Ayah 138وَإِنَّ يُونُسَ لَمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Mpe ya soló, Yûnus azalaki moko o kati ya batindami
Ayah 139إِذۡ أَبَقَ إِلَى ٱلۡفُلۡكِ ٱلۡمَشۡحُونِ
Tango akimaki akei komata na masuwa oyo etondaki mingi, (elingaki kozinda)
Ayah 140فَسَاهَمَ فَكَانَ مِنَ ٱلۡمُدۡحَضِينَ
Mpe aponamaki été abwakama
Ayah 141فَٱلۡتَقَمَهُ ٱلۡحُوتُ وَهُوَ مُلِيمࣱ
Mpe mbisi emelaki ye mpo été atikaki bato na ndingisa ya Allah te
Ayah 142فَلَوۡلَآ أَنَّهُۥ كَانَ مِنَ ٱلۡمُسَبِّحِينَ
Soki azalaki te moko o kati ya bakumisi Allah
Ayah 143لَلَبِثَ فِي بَطۡنِهِۦٓ إِلَىٰ يَوۡمِ يُبۡعَثُونَ
Mbele alingaki kotikala okati ya libumu lia ye (mbisi) kino o mokolo mwa lisekwa
Ayah 144۞فَنَبَذۡنَٰهُ بِٱلۡعَرَآءِ وَهُوَ سَقِيمࣱ
Tobimisaki ye na mabele bolumbu mpe na nsoni
Ayah 145وَأَنۢبَتۡنَا عَلَيۡهِ شَجَرَةࣰ مِّن يَقۡطِينࣲ
Mpe tobotisaki matiti ya maboke likolo naye. (esika afandaki)
Ayah 146وَأَرۡسَلۡنَٰهُ إِلَىٰ مِاْئَةِ أَلۡفٍ أَوۡ يَزِيدُونَ
Mpe na sima totindaki ye epai ya bato nkama nkoto to mpe ebele koleka
Ayah 147فَـَٔامَنُواْ فَمَتَّعۡنَٰهُمۡ إِلَىٰ حِينࣲ
Mpe bandimaki, kasi topesaki bango bosepeli ya mwa ngonga ya moke
Ayah 148فَٱسۡتَفۡتِهِمۡ أَلِرَبِّكَ ٱلۡبَنَاتُ وَلَهُمُ ٱلۡبَنُونَ
Tuna bango motuna, boye Nkolo wayo azalaka na bana basi mpe bango bazali na bana mibali
Ayah 149أَمۡ خَلَقۡنَا ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ إِنَٰثࣰ ا وَهُمۡ شَٰهِدُونَ
То boye, tokelaki ba anzelu bazala basi mpe bango bazali kornona
Ayah 150أَلَآ إِنَّهُم مِّنۡ إِفۡكِهِمۡ لَيَقُولُونَ
Ya soló, bazali koloba sé na lokuta na bango
Ayah 151وَلَدَ ٱللَّهُ وَإِنَّهُمۡ لَكَٰذِبُونَ
(Bazali koloba) ete: Allah abota, ya solo bazali na lokuta
Ayah 152أَصۡطَفَى ٱلۡبَنَاتِ عَلَى ٱلۡبَنِينَ
Boye akopona bana basi koleka bana mibali
Ayah 153مَا لَكُمۡ كَيۡفَ تَحۡكُمُونَ
Mpona nini bozali kokata likambo na lolenge wana
Ayah 154أَفَلَا تَذَكَّرُونَ
Boye bozali kokanisa te
Ayah 155أَمۡ لَكُمۡ سُلۡطَٰنࣱ مُّبِينࣱ
То bozali na bilembetele bisusu bia polele
Ayah 156فَأۡتُواْ بِكِتَٰبِكُمۡ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
Boya na buku na bino, soki bozali koloba bosôló
Ayah 157وَجَعَلُواْ بَيۡنَهُۥ وَبَيۡنَ ٱلۡجِنَّةِ نَسَبࣰ اۚ وَلَقَدۡ عَلِمَتِ ٱلۡجِنَّةُ إِنَّهُمۡ لَمُحۡضَرُونَ
Mpe bati bondeko kati naye na bilima, kasi bilima bayebi ete bazali (bapengwi) mpe ete bakomemama (na etumbu)
Ayah 158سُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ عَمَّا يَصِفُونَ
Nkembo na Allah wa likolo, mpona maye bazali koloba
Ayah 159إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama
Ayah 160فَإِنَّكُمۡ وَمَا تَعۡبُدُونَ
Ya soló, bino na baye bozali kobondela
Ayah 161مَآ أَنتُمۡ عَلَيۡهِ بِفَٰتِنِينَ
Bozali na nguya ya kobungisa moto moko te
Ayah 162إِلَّا مَنۡ هُوَ صَالِ ٱلۡجَحِيمِ
Longola sé oyo akozikisama na moto
Ayah 163وَمَا مِنَّآ إِلَّا لَهُۥ مَقَامࣱ مَّعۡلُومࣱ
Moko te okati na biso, sé azali na esika eyebani
Ayah 164وَإِنَّا لَنَحۡنُ ٱلصَّآفُّونَ
Mpe ya soló, tozali komitelemisa na milongo
Ayah 165وَإِنَّا لَنَحۡنُ ٱلۡمُسَبِّحُونَ
Mpe ya soló, biso nde tozali kopesa lokumu (ya Allah)
Ayah 166وَإِن كَانُواْ لَيَقُولُونَ
Ata soki bazalaki koloba
Ayah 167لَوۡ أَنَّ عِندَنَا ذِكۡرࣰ ا مِّنَ ٱلۡأَوَّلِينَ
Soki tokanisaka bato ya kala
Ayah 168لَكُنَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Tolingaki kozala bawumbu ya Allah baye baponama
Ayah 169فَكَفَرُواْ بِهِۦۖ فَسَوۡفَ يَعۡلَمُونَ
Bapengwaki na yango, kasi bakomonaka
Ayah 170وَلَقَدۡ سَبَقَتۡ كَلِمَتُنَا لِعِبَادِنَا ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Na yango, tosilaka kopesa liloba lia biso epai ya bawumbu na biso batindami
Ayah 171إِنَّهُمۡ لَهُمُ ٱلۡمَنصُورُونَ
Ya sólo, ezali bango nde bakosalisama
Ayah 172وَإِنَّ جُندَنَا لَهُمُ ٱلۡغَٰلِبُونَ
Mpe ya soló, basoda na biso nde bakolonga
Ayah 173فَتَوَلَّ عَنۡهُمۡ حَتَّىٰ حِينࣲ
Mitiya mosika na bango, kino ngonga moko boye
Ayah 174وَأَبۡصِرۡهُمۡ فَسَوۡفَ يُبۡصِرُونَ
Мре tala bango, mosika te bakomona
Ayah 175أَفَبِعَذَابِنَا يَسۡتَعۡجِلُونَ
Nini boye bazali kowelisa etumbu na biso
Ayah 176فَإِذَا نَزَلَ بِسَاحَتِهِمۡ فَسَآءَ صَبَاحُ ٱلۡمُنذَرِينَ
Tango bakokweyaka na bisika bia bango, tango wana ekozala mabe тропа bango oyo basilaki kokebisama
Ayah 177وَتَوَلَّ عَنۡهُمۡ حَتَّىٰ حِينࣲ
Mpe mitiya mosika na bango, kino ngonga moko boye
Ayah 178وَأَبۡصِرۡ فَسَوۡفَ يُبۡصِرُونَ
Mpe tala, kala mingi te bakomonaka
Ayah 179سُبۡحَٰنَ رَبِّكَ رَبِّ ٱلۡعِزَّةِ عَمَّا يَصِفُونَ
Nkembo ya Nkolo wayo, Nkolo ya nguya тропа maye bazali koloba
Ayah 180وَسَلَٰمٌ عَلَى ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Kimia ezala likolo lia batindami
Ayah 181وَٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Mpe lokumu ya Allah, Nkolo wa molongo mobimba
Ayah 182