Surah Ar-Room — The Romans
Surah Ar-Room (The Romans) is chapter 30 of the Quran, with 60 verses. This page presents the Arabic text with a Lingala translation, verse by verse.
الٓمٓ
Alif, lâm, mîm
Ayah 1غُلِبَتِ ٱلرُّومُ
Bato ya loma balongaki te
Ayah 2فِيٓ أَدۡنَى ٱلۡأَرۡضِ وَهُم مِّنۢ بَعۡدِ غَلَبِهِمۡ سَيَغۡلِبُونَ
Mpe sima ya kokweya na bango, bakozala balongi okati ya mboka oyo ezali pembeni na bango
Ayah 3فِي بِضۡعِ سِنِينَۗ لِلَّهِ ٱلۡأَمۡرُ مِن قَبۡلُ وَمِنۢ بَعۡدُۚ وَيَوۡمَئِذࣲ يَفۡرَحُ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ
O kati ya ndambu ya mibu mitindo mizali mia Allah na ebandeli mpe suka, mpe bandimi bakosepelaka mokolo wana
Ayah 4بِنَصۡرِ ٱللَّهِۚ يَنصُرُ مَن يَشَآءُۖ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
Na elonga bwa Allah. Alongisaka oyo alingi, mpe azali na nguya atonda ngolu
Ayah 5وَعۡدَ ٱللَّهِۖ لَا يُخۡلِفُ ٱللَّهُ وَعۡدَهُۥ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ
Wana nde elaka ya Allah, Allah azangisaka elaka naye te. Kasi ebele ya bato bazali koyeba te
Ayah 6يَعۡلَمُونَ ظَٰهِرࣰ ا مِّنَ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَهُمۡ عَنِ ٱلۡأٓخِرَةِ هُمۡ غَٰفِلُونَ
Bazali sé koyeba bomoyi ya mokili mpe babosani oyo ya mokolo mwa suka
Ayah 7أَوَلَمۡ يَتَفَكَّرُواْ فِيٓ أَنفُسِهِمۗ مَّا خَلَقَ ٱللَّهُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَمَا بَيۡنَهُمَآ إِلَّا بِٱلۡحَقِّ وَأَجَلࣲ مُّسَمࣰّ ىۗ وَإِنَّ كَثِيرࣰ ا مِّنَ ٱلنَّاسِ بِلِقَآيِٕ رَبِّهِمۡ لَكَٰفِرُونَ
Bakanisaka тропа bango moko te?! Allah akelaki te likolo na mabele na nyoso oyo ezali kati na yango mibale mpe akokisaki yango sé na bosôló тре тропа mikolo miyebani. Мре ya soló, bato ebele bazali kondima na bokutani na Nkolo wa bango te
Ayah 8أَوَلَمۡ يَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَيَنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۚ كَانُوٓاْ أَشَدَّ مِنۡهُمۡ قُوَّةࣰ وَأَثَارُواْ ٱلۡأَرۡضَ وَعَمَرُوهَآ أَكۡثَرَ مِمَّا عَمَرُوهَا وَجَآءَتۡهُمۡ رُسُلُهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِۖ فَمَا كَانَ ٱللَّهُ لِيَظۡلِمَهُمۡ وَلَٰكِن كَانُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ يَظۡلِمُونَ
Boye bazali kotambola na mokili te, batala lolenge basalaki na bato ya liboso na bango? Bazalaki na bokasi mingi koleka bango, тре basalelaki mabele mingi na kolona mpe kotonga, batindami na bango bayelaki bango bilembo? Allah abubaki bango te, kasi bango moko nde bamibubaki
Ayah 9ثُمَّ كَانَ عَٰقِبَةَ ٱلَّذِينَ أَسَٰٓـُٔواْ ٱلسُّوٓأَىٰٓ أَن كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَكَانُواْ بِهَا يَسۡتَهۡزِءُونَ
Na yango suka ya mabe ekozongela baye basalaki mabe, na koboya mikapo mia Allah, mpe bazalaki kozua yango na liseki
Ayah 10ٱللَّهُ يَبۡدَؤُاْ ٱلۡخَلۡقَ ثُمَّ يُعِيدُهُۥ ثُمَّ إِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ
Allah nde abandaka bokeli mpe sima azongeli yango, mpe epai naye nde bokozongisama
Ayah 11وَيَوۡمَ تَقُومُ ٱلسَّاعَةُ يُبۡلِسُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ
Mpe mokolo moye ngonga ekokokaka, batomboki bakozangaka elikia
Ayah 12وَلَمۡ يَكُن لَّهُم مِّن شُرَكَآئِهِمۡ شُفَعَٰٓؤُاْ وَكَانُواْ بِشُرَكَآئِهِمۡ كَٰفِرِينَ
Mpe bakozuaka baye bakosalisaka bango te okati ya basangisi ba bango, mpe bakoyebaka banzambe na bango lisusu te
Ayah 13وَيَوۡمَ تَقُومُ ٱلسَّاعَةُ يَوۡمَئِذࣲ يَتَفَرَّقُونَ
Mpe mokolo moye ngonga ekokokaka, bakokabwanaka. (bango na bango)
Ayah 14فَأَمَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ فَهُمۡ فِي رَوۡضَةࣲ يُحۡبَرُونَ
Kasi тропа baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na bosepeli o kati na lola
Ayah 15وَأَمَّا ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَكَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا وَلِقَآيِٕ ٱلۡأٓخِرَةِ فَأُوْلَٰٓئِكَ فِي ٱلۡعَذَابِ مُحۡضَرُونَ
Mpe тропа baye bapengwaki, тре baboyaki kondima na bilembo bia biso mpe kondima na mokolo ya suka bakomemama okati ya etumbu
Ayah 16فَسُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ حِينَ تُمۡسُونَ وَحِينَ تُصۡبِحُونَ
Bokumisa Allah tongo mpe pokwa
Ayah 17وَلَهُ ٱلۡحَمۡدُ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَعَشِيࣰّ ا وَحِينَ تُظۡهِرُونَ
Mpe matondo nyoso ya likolo mpe ya nsé ezali ya ye, na nzanga mpe sima ya nzanga
Ayah 18يُخۡرِجُ ٱلۡحَيَّ مِنَ ٱلۡمَيِّتِ وَيُخۡرِجُ ٱلۡمَيِّتَ مِنَ ٱلۡحَيِّ وَيُحۡيِ ٱلۡأَرۡضَ بَعۡدَ مَوۡتِهَاۚ وَكَذَٰلِكَ تُخۡرَجُونَ
Azali kobimisa moto ya bomoyi kowuta na liwa, mpe moto ya liwa kowuta na bomoyi, mpe azali kosekwisa mabele sima ya kokufa na yango. Na lolenge wana nde bokosekwaka
Ayah 19وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦٓ أَنۡ خَلَقَكُم مِّن تُرَابࣲ ثُمَّ إِذَآ أَنتُم بَشَرࣱ تَنتَشِرُونَ
Mpe o kati ya bilembo bia ye, akela bino kowuta na mabele, sima bokomi bato bozali kotambola na mokili
Ayah 20وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦٓ أَنۡ خَلَقَ لَكُم مِّنۡ أَنفُسِكُمۡ أَزۡوَٰجࣰ ا لِّتَسۡكُنُوٓاْ إِلَيۡهَا وَجَعَلَ بَيۡنَكُم مَّوَدَّةࣰ وَرَحۡمَةًۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتࣲ لِّقَوۡمࣲ يَتَفَكَّرُونَ
Mpe kati ya bilembo bia ye, akela basi kowuta na bino moko, mpo ete bovanda na kimia epai na bango, mpe atie kati na bino bolingo na ngolu (mawa). Ya soló wana ezali bilembo mpo bokoka kokanisa
Ayah 21وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦ خَلۡقُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَٱخۡتِلَٰفُ أَلۡسِنَتِكُمۡ وَأَلۡوَٰنِكُمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتࣲ لِّلۡعَٰلِمِينَ
Mpe kati ya bilembo bia ye, akela likolo na mabele mpe akesenisi bino loposo na balokota wana ezali elembo тропа bayebi
Ayah 22وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦ مَنَامُكُم بِٱلَّيۡلِ وَٱلنَّهَارِ وَٱبۡتِغَآؤُكُم مِّن فَضۡلِهِۦٓۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتࣲ لِّقَوۡمࣲ يَسۡمَعُونَ
Mpe kati ya bilembo bia ye, bapongi na bino na butu mpe moyi, mpe koluka bolamu naye. Ya soló, wana ezali bilembo тропа bato oyo bayokaka
Ayah 23وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦ يُرِيكُمُ ٱلۡبَرۡقَ خَوۡفࣰ ا وَطَمَعࣰ ا وَيُنَزِّلُ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءࣰ فَيُحۡيِۦ بِهِ ٱلۡأَرۡضَ بَعۡدَ مَوۡتِهَآۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتࣲ لِّقَوۡمࣲ يَعۡقِلُونَ
Mpe kati ya bilembo bia ye azali komonisa bino bongengi (bwa nkake) na kobangisa na elikia ya kobetisa mbula kowuta na likolo тропа kopesa bomoyi na mabele sima ya kokufa na yango. Wana ezali bilembo тропа baye bazali kososolo
Ayah 24وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦٓ أَن تَقُومَ ٱلسَّمَآءُ وَٱلۡأَرۡضُ بِأَمۡرِهِۦۚ ثُمَّ إِذَا دَعَاكُمۡ دَعۡوَةࣰ مِّنَ ٱلۡأَرۡضِ إِذَآ أَنتُمۡ تَخۡرُجُونَ
Mpe kati ya bilembo naye, likolo na mabele ezali ya kotelema na mobeko mia ye. Sima akobengaka bino mbela moko bokobima kati na mabele
Ayah 25وَلَهُۥ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ كُلࣱّ لَّهُۥ قَٰنِتُونَ
Maye manso mazali okati na likolo na mabele, mazali ya ye mpe mazali kotosa ye
Ayah 26وَهُوَ ٱلَّذِي يَبۡدَؤُاْ ٱلۡخَلۡقَ ثُمَّ يُعِيدُهُۥ وَهُوَ أَهۡوَنُ عَلَيۡهِۚ وَلَهُ ٱلۡمَثَلُ ٱلۡأَعۡلَىٰ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
Mpe ye nde abandaka kokela mpe akozongisa yango, (ya bokeli sima azongisi yango,) mpe wana ezali pete тропа ye, mpe epai naye ezuami ndakisa ya koleka kuna na likolo mpe na nsé. Mpe azali na bokasi atonda bwanya
Ayah 27ضَرَبَ لَكُم مَّثَلࣰ ا مِّنۡ أَنفُسِكُمۡۖ هَل لَّكُم مِّن مَّا مَلَكَتۡ أَيۡمَٰنُكُم مِّن شُرَكَآءَ فِي مَا رَزَقۡنَٰكُمۡ فَأَنتُمۡ فِيهِ سَوَآءࣱ تَخَافُونَهُمۡ كَخِيفَتِكُمۡ أَنفُسَكُمۡۚ كَذَٰلِكَ نُفَصِّلُ ٱلۡأٓيَٰتِ لِقَوۡمࣲ يَعۡقِلُونَ
Azali kopesa bino másese na banzoto na bino moko, boye bosangisi bawumbu na bino na maye topesi bino na bozui mpo ete bokokana? Bozali kobanga bango ndenge bomibanganaka bino na bino? Na boye nde tozali kolimbola bilembo bia biso mpo na baye basosolaka
Ayah 28بَلِ ٱتَّبَعَ ٱلَّذِينَ ظَلَمُوٓاْ أَهۡوَآءَهُم بِغَيۡرِ عِلۡمࣲۖ فَمَن يَهۡدِي مَنۡ أَضَلَّ ٱللَّهُۖ وَمَا لَهُم مِّن نَّٰصِرِينَ
В abubi balandaki baposa na bango, na bozangi boyebi. Nani akokamba oyo Allah abungisi mpe bakozalaka na mosungi te
Ayah 29فَأَقِمۡ وَجۡهَكَ لِلدِّينِ حَنِيفࣰ اۚ فِطۡرَتَ ٱللَّهِ ٱلَّتِي فَطَرَ ٱلنَّاسَ عَلَيۡهَاۚ لَا تَبۡدِيلَ لِخَلۡقِ ٱللَّهِۚ ذَٰلِكَ ٱلدِّينُ ٱلۡقَيِّمُ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ
Balóla elongi nayo mobimba тропа lingomba ya bomoko bwa Allah. Yango nde lolenge Allah akelaki bato na yango, mbongwama ezali te kati ya bokeli ya Allah, oyo nde lingomba ya semba, kasi ebele ya bato bazali koyeba te
Ayah 30۞مُنِيبِينَ إِلَيۡهِ وَٱتَّقُوهُ وَأَقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَلَا تَكُونُواْ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
Bozonga epai naye (na botubeli), mpe bobanga ye, mpe botelemisa losambo mpe bozala o kati ya basangisi te
Ayah 31مِنَ ٱلَّذِينَ فَرَّقُواْ دِينَهُمۡ وَكَانُواْ شِيَعࣰ اۖ كُلُّ حِزۡبِۭ بِمَا لَدَيۡهِمۡ فَرِحُونَ
O kati ya baye bakaboli lingomba lia bango mpe bakomisi yango binzambe nzambe, eteni na eteni ezali kosepela na oyo ya ye
Ayah 32وَإِذَا مَسَّ ٱلنَّاسَ ضُرࣱّ دَعَوۡاْ رَبَّهُم مُّنِيبِينَ إِلَيۡهِ ثُمَّ إِذَآ أَذَاقَهُم مِّنۡهُ رَحۡمَةً إِذَا فَرِيقࣱ مِّنۡهُم بِرَبِّهِمۡ يُشۡرِكُونَ
Mpe tango mabe ekoyelaka bato, babeleli Nkolo wa bango mpe bamizongisi epai naye na botubeli bonso, sima soki amekisi bango ndambu ya ngolu kowuta epai naye, okomona ndambu kati na bango babandi kosangisa Nkolo wa bango
Ayah 33لِيَكۡفُرُواْ بِمَآ ءَاتَيۡنَٰهُمۡۚ فَتَمَتَّعُواْ فَسَوۡفَ تَعۡلَمُونَ
Bapengwa na maye topesi bango. Mpe bosepela moke, kasi bokoyeba kala mingi te
Ayah 34أَمۡ أَنزَلۡنَا عَلَيۡهِمۡ سُلۡطَٰنࣰ ا فَهُوَ يَتَكَلَّمُ بِمَا كَانُواْ بِهِۦ يُشۡرِكُونَ
To mpe tokitiselaki bango bokonzi (buku) azali kolobela bango тропа maye bazalaki kosangisa ye na yango
Ayah 35وَإِذَآ أَذَقۡنَا ٱلنَّاسَ رَحۡمَةࣰ فَرِحُواْ بِهَاۖ وَإِن تُصِبۡهُمۡ سَيِّئَةُۢ بِمَا قَدَّمَتۡ أَيۡدِيهِمۡ إِذَا هُمۡ يَقۡنَطُونَ
Mpe tango tomekisaka bato ndambu ya mawa (na biso), bazali kosepela na yango. Mpe tango mabe ezui bango na oyo bango moko basali, okomona bango bazangi kolikia
Ayah 36أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ أَنَّ ٱللَّهَ يَبۡسُطُ ٱلرِّزۡقَ لِمَن يَشَآءُ وَيَقۡدِرُۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتࣲ لِّقَوۡمࣲ يُؤۡمِنُونَ
Boye bazali kornona te ete Allah apesaka bozui na oyo alingi mpe abotoloko? Ya soló wana ezali elembo mpo bato bakoka kondima
Ayah 37فَـَٔاتِ ذَا ٱلۡقُرۡبَىٰ حَقَّهُۥ وَٱلۡمِسۡكِينَ وَٱبۡنَ ٱلسَّبِيلِۚ ذَٰلِكَ خَيۡرࣱ لِّلَّذِينَ يُرِيدُونَ وَجۡهَ ٱللَّهِۖ وَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُفۡلِحُونَ
Mpe pesa moto ya libota nayo oyo esengeli тропа kopesa ye, mpe mobola, mpe moleki nzela oyo esengeli ya bango, wana ezali malamu тропа baye bazali koluka elongi ya Allah, mpe bango wana nde balongi
Ayah 38وَمَآ ءَاتَيۡتُم مِّن رِّبࣰ ا لِّيَرۡبُوَاْ فِيٓ أَمۡوَٰلِ ٱلنَّاسِ فَلَا يَرۡبُواْ عِندَ ٱللَّهِۖ وَمَآ ءَاتَيۡتُم مِّن زَكَوٰةࣲ تُرِيدُونَ وَجۡهَ ٱللَّهِ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُضۡعِفُونَ
Mpe maye manso bozali kobimisa ewuti na ekotama тропа kokolisa misolo mia bino likolo ya baninga, ekokolisama te epai ya Allah, kasi oyo bobimisi kowuta na zakat, тропа koluka elongi ya Allah, baye wana bakozua (lifuta) na bango ya kobakisama
Ayah 39ٱللَّهُ ٱلَّذِي خَلَقَكُمۡ ثُمَّ رَزَقَكُمۡ ثُمَّ يُمِيتُكُمۡ ثُمَّ يُحۡيِيكُمۡۖ هَلۡ مِن شُرَكَآئِكُم مَّن يَفۡعَلُ مِن ذَٰلِكُم مِّن شَيۡءࣲۚ سُبۡحَٰنَهُۥ وَتَعَٰلَىٰ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
Allah nde akeli bino, тре apeși bino bozui, тре akoboma bino, тре sima akosekwisa bino. Na yango, moko kati ya baye bozali kosangisa ye na yango boye akoki kosalela bino eloko moko na oyo Allah asaleli bino? Nkembo naye oyo aleki na likolo na maye manso bazali kosangisa ye na yango
Ayah 40ظَهَرَ ٱلۡفَسَادُ فِي ٱلۡبَرِّ وَٱلۡبَحۡرِ بِمَا كَسَبَتۡ أَيۡدِي ٱلنَّاسِ لِيُذِيقَهُم بَعۡضَ ٱلَّذِي عَمِلُواْ لَعَلَّهُمۡ يَرۡجِعُونَ
Mabe esili котопапа polele likolo ya mabele mpe likolo ya mayi (ebale) kowuta na maye bato bazali kosala, na yango, Allah apeși bango ndambu ya etumbu ya maye basali, mpo bakanisa kozonga
Ayah 41قُلۡ سِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَٱنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلُۚ كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّشۡرِكِينَ
Loba: Botambola na mokili bótala lolenge kani basalaki baye balekaki liboso na bino, kasi ebele na bango bazalaki basangisi
Ayah 42فَأَقِمۡ وَجۡهَكَ لِلدِّينِ ٱلۡقَيِّمِ مِن قَبۡلِ أَن يَأۡتِيَ يَوۡمࣱ لَّا مَرَدَّ لَهُۥ مِنَ ٱللَّهِۖ يَوۡمَئِذࣲ يَصَّدَّعُونَ
Tiya elongi nayo na lingomba lia (bosóló mpe lia botosi), yambo ete eya kowuta na Allah mokolo oyo bokokokaka kopuşa yango te, mpe mokolo wana (bato) bakokabwanaka
Ayah 43مَن كَفَرَ فَعَلَيۡهِ كُفۡرُهُۥۖ وَمَنۡ عَمِلَ صَٰلِحࣰ ا فَلِأَنفُسِهِمۡ يَمۡهَدُونَ
Oyo akopengwa, akozua lifuta ya bopengwi naye, mpe oyo akosala bolamu, ezali тропа bolamu ya bango moko ya lobi nde bazali kolengele
Ayah 44لِيَجۡزِيَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ مِن فَضۡلِهِۦٓۚ إِنَّهُۥ لَا يُحِبُّ ٱلۡكَٰفِرِينَ
Mpo Allah afuta bandimi baye basalaki misala milamu тропа bolamu bwa ye. Ya soló, ye alingaka bapengwi te
Ayah 45وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦٓ أَن يُرۡسِلَ ٱلرِّيَاحَ مُبَشِّرَٰتࣲ وَلِيُذِيقَكُم مِّن رَّحۡمَتِهِۦ وَلِتَجۡرِيَ ٱلۡفُلۡكُ بِأَمۡرِهِۦ وَلِتَبۡتَغُواْ مِن فَضۡلِهِۦ وَلَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
Mpe o kati ya bilembo bia ye, azali kotinda mopepe lokola sango elamu mpe тропа komekisa bino ngolu naye, mpo ete bwato (masuwa) etambola na mokano naye, mpo ete boluka litomba na bolamu naye, mpo bokoka kotondo ye na yango
Ayah 46وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا مِن قَبۡلِكَ رُسُلًا إِلَىٰ قَوۡمِهِمۡ فَجَآءُوهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ فَٱنتَقَمۡنَا مِنَ ٱلَّذِينَ أَجۡرَمُواْۖ وَكَانَ حَقًّا عَلَيۡنَا نَصۡرُ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Mpe ya solo, tosilaki kotinda batindami liboso nayo epai ya bato na bango, bayelaki bango bilembo ya polele mpe bikamwiseli, na sima tokangaki baye basalaki mabe mpe ezalaki lotomo epai na biso ete tosunga bandimi
Ayah 47ٱللَّهُ ٱلَّذِي يُرۡسِلُ ٱلرِّيَٰحَ فَتُثِيرُ سَحَابࣰ ا فَيَبۡسُطُهُۥ فِي ٱلسَّمَآءِ كَيۡفَ يَشَآءُ وَيَجۡعَلُهُۥ كِسَفࣰ ا فَتَرَى ٱلۡوَدۡقَ يَخۡرُجُ مِنۡ خِلَٰلِهِۦۖ فَإِذَآ أَصَابَ بِهِۦ مَن يَشَآءُ مِنۡ عِبَادِهِۦٓ إِذَا هُمۡ يَسۡتَبۡشِرُونَ
Allah nde azali kotinda mopepe oyo ezali kotombola londende, mpe apanzaka yango na mapata ndenge alingi, na sima akaboli yango na biteni, na sima okomona mbula ezali kobima nakati na yango mpe soki asopi yango epai ya ba oyo alingi o kati ya bawumbu naye tala ndenge bakomi na esengo
Ayah 48وَإِن كَانُواْ مِن قَبۡلِ أَن يُنَزَّلَ عَلَيۡهِم مِّن قَبۡلِهِۦ لَمُبۡلِسِينَ
Nzoka nde bango liboso basilaki kozanga elikia
Ayah 49فَٱنظُرۡ إِلَىٰٓ ءَاثَٰرِ رَحۡمَتِ ٱللَّهِ كَيۡفَ يُحۡيِ ٱلۡأَرۡضَ بَعۡدَ مَوۡتِهَآۚ إِنَّ ذَٰلِكَ لَمُحۡيِ ٱلۡمَوۡتَىٰۖ وَهُوَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءࣲ قَدِيرࣱ
Tala bilembo bia ngolu ya Allah ndenge azali kopesa bomoyi na mabele sima ya kokauka na yango. Ya soló, ye nde akopesaka bomoyi na baye bakufa, mpe azali na bokoki na biloko binso
Ayah 50وَلَئِنۡ أَرۡسَلۡنَا رِيحࣰ ا فَرَأَوۡهُ مُصۡفَرࣰّ ا لَّظَلُّواْ مِنۢ بَعۡدِهِۦ يَكۡفُرُونَ
Mpe soki sima na yango totindi mopepe ya makasi ebebisi milona na bango mpe bamoni yango na langi ya mayi ya mosaka bakomi kozanga botondi
Ayah 51فَإِنَّكَ لَا تُسۡمِعُ ٱلۡمَوۡتَىٰ وَلَا تُسۡمِعُ ٱلصُّمَّ ٱلدُّعَآءَ إِذَا وَلَّوۡاْ مُدۡبِرِينَ
Ya solo, okoki koyokisa bawei te, mpe okoki koyokisa bakufi matoyi te, soki obengi bango tango bapesaka mokongo
Ayah 52وَمَآ أَنتَ بِهَٰدِ ٱلۡعُمۡيِ عَن ضَلَٰلَتِهِمۡۖ إِن تُسۡمِعُ إِلَّا مَن يُؤۡمِنُ بِـَٔايَٰتِنَا فَهُم مُّسۡلِمُونَ
Mpe ezali yo te nde okoki kokamba baye bakufa miso na bobungi bwa bango, okoyokisa nde baye bandimi na mikapo mia biso mpe bazali komisokia
Ayah 53۞ٱللَّهُ ٱلَّذِي خَلَقَكُم مِّن ضَعۡفࣲ ثُمَّ جَعَلَ مِنۢ بَعۡدِ ضَعۡفࣲ قُوَّةࣰ ثُمَّ جَعَلَ مِنۢ بَعۡدِ قُوَّةࣲ ضَعۡفࣰ ا وَشَيۡبَةࣰۚ يَخۡلُقُ مَا يَشَآءُۚ وَهُوَ ٱلۡعَلِيمُ ٱلۡقَدِيرُ
Allah nde akeli bino ya kolemba, sima apesi bino makasi, sima ya bokasi apesi bino bolembu na bopaka. Akelaka oyo alingi mpe azali moyebi akoka
Ayah 54وَيَوۡمَ تَقُومُ ٱلسَّاعَةُ يُقۡسِمُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ مَا لَبِثُواْ غَيۡرَ سَاعَةࣲۚ كَذَٰلِكَ كَانُواْ يُؤۡفَكُونَ
Mpe tango mokolo ya suka ekotelema bato mabe bakolapaka ete bawumelaki na mokili sé ngonga moko ya mpamba, ndenge wana nde bazalaka kokosa
Ayah 55وَقَالَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡعِلۡمَ وَٱلۡإِيمَٰنَ لَقَدۡ لَبِثۡتُمۡ فِي كِتَٰبِ ٱللَّهِ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡبَعۡثِۖ فَهَٰذَا يَوۡمُ ٱلۡبَعۡثِ وَلَٰكِنَّكُمۡ كُنتُمۡ لَا تَعۡلَمُونَ
Mpe baye bapesamaki boyebi na bondimi bakolobaka: Bosilaki kovanda na eleko eye engebene na mokano ya Allah kino o mokolo mwa bosekwisami. Oyo nde mokolo yango, kasi bozalaki koyeba te
Ayah 56فَيَوۡمَئِذࣲ لَّا يَنفَعُ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ مَعۡذِرَتُهُمۡ وَلَا هُمۡ يُسۡتَعۡتَبُونَ
Mokolo mona bolimbisi ekosunga te тропа babubi, mpe bakosenga bango te ete bazonga
Ayah 57وَلَقَدۡ ضَرَبۡنَا لِلنَّاسِ فِي هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانِ مِن كُلِّ مَثَلࣲۚ وَلَئِن جِئۡتَهُم بِـَٔايَةࣲ لَّيَقُولَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِنۡ أَنتُمۡ إِلَّا مُبۡطِلُونَ
Ya soló, tosili kobetela bato bandakisa ya lolenge nyoso kati na kurani eye. Mpe soki oyeli bango ekamwiseli, baye bapengwa bakomi koloba ete; bozali sé babungisi
Ayah 58كَذَٰلِكَ يَطۡبَعُ ٱللَّهُ عَلَىٰ قُلُوبِ ٱلَّذِينَ لَا يَعۡلَمُونَ
Lolenge wana nde Allah akangaka mitema mia bato oyo bayebi te
Ayah 59فَٱصۡبِرۡ إِنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقࣱّۖ وَلَا يَسۡتَخِفَّنَّكَ ٱلَّذِينَ لَا يُوقِنُونَ
Kanga motema na kozela. Ya solo, elaka ya Nkolo nayo ezali ya sólo mpenza, kasi baye bazangi kondima babungisa yo te
Ayah 60