Surah Muhammad
Surah Muhammad is chapter 47 of the Quran, with 38 verses. This page presents the Arabic text with a Lingala translation, verse by verse.
ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَصَدُّواْ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ أَضَلَّ أَعۡمَٰلَهُمۡ
Baye bapengwa mpe bazali kobundisa nzela ya Allah basili kobebisa misala mia bango
Ayah 1وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَءَامَنُواْ بِمَا نُزِّلَ عَلَىٰ مُحَمَّدࣲ وَهُوَ ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّهِمۡ كَفَّرَ عَنۡهُمۡ سَيِّـَٔاتِهِمۡ وَأَصۡلَحَ بَالَهُمۡ
Мре baye bandima mpe basali misala milamu mpe bandimi na maye makitaki epai ya Muhammad ete ezali soló kowuta epai ya Nkolo na bango, akolongola mabe na bango, mpe akobongisa makambo na bango
Ayah 2ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ ٱتَّبَعُواْ ٱلۡبَٰطِلَ وَأَنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱتَّبَعُواْ ٱلۡحَقَّ مِن رَّبِّهِمۡۚ كَذَٰلِكَ يَضۡرِبُ ٱللَّهُ لِلنَّاسِ أَمۡثَٰلَهُمۡ
Wana mpo ete bapengwi balandi lokuta, kasi baye bandima balandi bosembo kowuta epai na Nkolo na bango. Lolenge wana nde Allah azali kopesa másese epai ya bato
Ayah 3فَإِذَا لَقِيتُمُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فَضَرۡبَ ٱلرِّقَابِ حَتَّىٰٓ إِذَآ أَثۡخَنتُمُوهُمۡ فَشُدُّواْ ٱلۡوَثَاقَ فَإِمَّا مَنَّۢا بَعۡدُ وَإِمَّا فِدَآءً حَتَّىٰ تَضَعَ ٱلۡحَرۡبُ أَوۡزَارَهَاۚ ذَٰلِكَۖ وَلَوۡ يَشَآءُ ٱللَّهُ لَٱنتَصَرَ مِنۡهُمۡ وَلَٰكِن لِّيَبۡلُوَاْ بَعۡضَكُم بِبَعۡضࣲۗ وَٱلَّذِينَ قُتِلُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ فَلَن يُضِلَّ أَعۡمَٰلَهُمۡ
Soki bokutani na bapengwi (na bitumba) bokata bakingo na bango, mpe soki bolongi bango, bokanga bango basinga makasi, na sima soki bolingi botiki bango bakei pamba, soki mpe bolingi bato na bango bapesa bino biloko nde botiki bango, kino bitumba bikosila, mpo ete soki Allah alingaki nde asilani na bango ye moko, kasi ezali тропа komeka bino. Mpona ba оуо bakokufa na nzela ya Allah, akobebisa misala na bango te
Ayah 4سَيَهۡدِيهِمۡ وَيُصۡلِحُ بَالَهُمۡ
Akokamba bango mpe akobongisa misala mia bango
Ayah 5وَيُدۡخِلُهُمُ ٱلۡجَنَّةَ عَرَّفَهَا لَهُمۡ
Mpe akokotisaka bango na lola eye alimbolelaki bango (balolenge na yango)
Ayah 6يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِن تَنصُرُواْ ٱللَّهَ يَنصُرۡكُمۡ وَيُثَبِّتۡ أَقۡدَامَكُمۡ
Oh bino baye bondima (na Allah)! soki bosalisi Allah, akolongisa bino mpe akolendisa matambi na bino
Ayah 7وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فَتَعۡسࣰ ا لَّهُمۡ وَأَضَلَّ أَعۡمَٰلَهُمۡ
Mpe bapengwi bakozua mpasi mpe akobungisaka misala mia bango
Ayah 8ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ كَرِهُواْ مَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ فَأَحۡبَطَ أَعۡمَٰلَهُمۡ
Mpo baboyaki maye Allah akitisaki, yango abebisi misala mia bango
Ayah 9۞أَفَلَمۡ يَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَيَنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۖ دَمَّرَ ٱللَّهُ عَلَيۡهِمۡۖ وَلِلۡكَٰفِرِينَ أَمۡثَٰلُهَا
Mpona nini te bazali kotambola na mokili batala lolenge kani esukelaki baye bazalaki liboso na bango? Allah abebisaki bango, mpe lolenge wana nde ekozalela bapengwi
Ayah 10ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱللَّهَ مَوۡلَى ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَأَنَّ ٱلۡكَٰفِرِينَ لَا مَوۡلَىٰ لَهُمۡ
Mpo ete, ya soló, Allah azali mobateli ya bandimi kasi ya sólo bapengwi bazali na mobateli te
Ayah 11إِنَّ ٱللَّهَ يُدۡخِلُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ جَنَّٰتࣲ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُۖ وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ يَتَمَتَّعُونَ وَيَأۡكُلُونَ كَمَا تَأۡكُلُ ٱلۡأَنۡعَٰمُ وَٱلنَّارُ مَثۡوࣰ ى لَّهُمۡ
Ya sólo, Allah akokotisa baye bandimaki mpe basalaki misala milamu na lola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, тре bapengwi bazali kosepela na kólia lolenge banyama baliaka, mpe esika na bango ya kovanda ezali nde na lifelo
Ayah 12وَكَأَيِّن مِّن قَرۡيَةٍ هِيَ أَشَدُّ قُوَّةࣰ مِّن قَرۡيَتِكَ ٱلَّتِيٓ أَخۡرَجَتۡكَ أَهۡلَكۡنَٰهُمۡ فَلَا نَاصِرَ لَهُمۡ
Mpe bamboka ya makasiboni koleka etuka nayo oyo ebenganaki yo, tobebisaki yango mpe bazuaki mosungi te
Ayah 13أَفَمَن كَانَ عَلَىٰ بَيِّنَةࣲ مِّن رَّبِّهِۦ كَمَن زُيِّنَ لَهُۥ سُوٓءُ عَمَلِهِۦ وَٱتَّبَعُوٓاْ أَهۡوَآءَهُم
Boye oyo azali na polele kowuta epai na Nkolo naye, akokani na oyo babongiseli ye mosala ya mabe mpe balandi bamposa na bango
Ayah 14مَّثَلُ ٱلۡجَنَّةِ ٱلَّتِي وُعِدَ ٱلۡمُتَّقُونَۖ فِيهَآ أَنۡهَٰرࣱ مِّن مَّآءٍ غَيۡرِ ءَاسِنࣲ وَأَنۡهَٰرࣱ مِّن لَّبَنࣲ لَّمۡ يَتَغَيَّرۡ طَعۡمُهُۥ وَأَنۡهَٰرࣱ مِّنۡ خَمۡرࣲ لَّذَّةࣲ لِّلشَّٰرِبِينَ وَأَنۡهَٰرࣱ مِّنۡ عَسَلࣲ مُّصَفࣰّ ىۖ وَلَهُمۡ فِيهَا مِن كُلِّ ٱلثَّمَرَٰتِ وَمَغۡفِرَةࣱ مِّن رَّبِّهِمۡۖ كَمَنۡ هُوَ خَٰلِدࣱ فِي ٱلنَّارِ وَسُقُواْ مَآءً حَمِيمࣰ ا فَقَطَّعَ أَمۡعَآءَهُمۡ
Ndakisa ya Iola eye elengelami тропа babangi (Allah); o kati na yango ezali na mingala ya mayi oyo ebebaka te, ezali na mingala ya miliki oyo elengi na yango ebonguanaka te, mpe na mingala ya masanga ya elengi тропа bomeli, na mingala ya mafuta ya nzoi ya kitoko, mpe тропа bango ezali na lolenge ya bambuma nyoso ekozala okati na yango, mpe bakozua bolimbisi kowuta epai ya Nkolo wa bango. Kasi, boye bazali lolenge moko na oyo akotikala na lifelo ya libela bakomelisaka bango mayi ya moto ya makasi mpe ekokatakata misopo na bango
Ayah 15وَمِنۡهُم مَّن يَسۡتَمِعُ إِلَيۡكَ حَتَّىٰٓ إِذَا خَرَجُواْ مِنۡ عِندِكَ قَالُواْ لِلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡعِلۡمَ مَاذَا قَالَ ءَانِفًاۚ أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ طَبَعَ ٱللَّهُ عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ وَٱتَّبَعُوٓاْ أَهۡوَآءَهُمۡ
Мре kati na bango, bamosusu bazali koyoka yo, soki babimi epai nayo balobi na baye bazuaki boyebi ete: Alobi nini? Baye wana Allah akanga mitema mia bango mpe balandi sé bamposa na bango
Ayah 16وَٱلَّذِينَ ٱهۡتَدَوۡاْ زَادَهُمۡ هُدࣰ ى وَءَاتَىٰهُمۡ تَقۡوَىٰهُمۡ
Мре тропа baye bamitiyaki o nzela ya semba, akokamba bango koleka mpe akobakisela bango bobangi na bango
Ayah 17فَهَلۡ يَنظُرُونَ إِلَّا ٱلسَّاعَةَ أَن تَأۡتِيَهُم بَغۡتَةࣰۖ فَقَدۡ جَآءَ أَشۡرَاطُهَاۚ فَأَنَّىٰ لَهُمۡ إِذَا جَآءَتۡهُمۡ ذِكۡرَىٰهُمۡ
Boye bazali kozela ete ngonga eyela bango mbalakaka?! Nzoka bilembo na yango bisili koya; mpe soki bokundoli eyeli bango bakokanisa ndenge nini
Ayah 18فَٱعۡلَمۡ أَنَّهُۥ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا ٱللَّهُ وَٱسۡتَغۡفِرۡ لِذَنۢبِكَ وَلِلۡمُؤۡمِنِينَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتِۗ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ مُتَقَلَّبَكُمۡ وَمَثۡوَىٰكُمۡ
Mpe yeba ete: Ya soló, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te bobele Allah, sima osenga bolimbisi ya masumu nayo na ya bandimi ya mibali na ya basi. Allah nde ayebi makambo na bino (awa na nsé), mpe ayebi bisika ya bopemi na bino (lobi kati na lola)
Ayah 19وَيَقُولُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَوۡلَا نُزِّلَتۡ سُورَةࣱۖ فَإِذَآ أُنزِلَتۡ سُورَةࣱ مُّحۡكَمَةࣱ وَذُكِرَ فِيهَا ٱلۡقِتَالُ رَأَيۡتَ ٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِم مَّرَضࣱ يَنظُرُونَ إِلَيۡكَ نَظَرَ ٱلۡمَغۡشِيِّ عَلَيۡهِ مِنَ ٱلۡمَوۡتِۖ فَأَوۡلَىٰ لَهُمۡ
Mpe bandimi bazali koloba ete: Mpona nini suratu ekitisami te? Kasi soki suratu ya mibeko okati na yango milobeli bitumba, okomona baye bazalaki na bokono omitema bazali kotala yo na etaleli ya moto amoni liwa, nde ezali malamu mpona bango
Ayah 20طَاعَةࣱ وَقَوۡلࣱ مَّعۡرُوفࣱۚ فَإِذَا عَزَمَ ٱلۡأَمۡرُ فَلَوۡ صَدَقُواْ ٱللَّهَ لَكَانَ خَيۡرࣰ ا لَّهُمۡ
Botosi mpe liloba ya malamu. Mpe soki motindo mozuami тропа likambo (ya bitumba) ezalaki malamu тропа bango bandimela Allah тропа likambo yango
Ayah 21فَهَلۡ عَسَيۡتُمۡ إِن تَوَلَّيۡتُمۡ أَن تُفۡسِدُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَتُقَطِّعُوٓاْ أَرۡحَامَكُمۡ
Boye soki bopesi mokongo, bokokende te тропа kotia mobulu na nsé mpe kokata bondeko ya mabota? (soki bolingi bokonzi koleka)
Ayah 22أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ لَعَنَهُمُ ٱللَّهُ فَأَصَمَّهُمۡ وَأَعۡمَىٰٓ أَبۡصَٰرَهُمۡ
Baye wana Allah apesaki bango botutu, mpe abomi bango boyoki mpe bomoni
Ayah 23أَفَلَا يَتَدَبَّرُونَ ٱلۡقُرۡءَانَ أَمۡ عَلَىٰ قُلُوبٍ أَقۡفَالُهَآ
Mpona nini bazali kososola kurani te to boye mitema na bango mikangami na fungóla
Ayah 24إِنَّ ٱلَّذِينَ ٱرۡتَدُّواْ عَلَىٰٓ أَدۡبَٰرِهِم مِّنۢ بَعۡدِ مَا تَبَيَّنَ لَهُمُ ٱلۡهُدَى ٱلشَّيۡطَٰنُ سَوَّلَ لَهُمۡ وَأَمۡلَىٰ لَهُمۡ
Ya soló, baye bazali kozongela banzela na bango (ya mabe) na sima ya koyeba nzela ya semba oyo eyeli bango polele, satana akosi bango mpe akweisi bango
Ayah 25ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ قَالُواْ لِلَّذِينَ كَرِهُواْ مَا نَزَّلَ ٱللَّهُ سَنُطِيعُكُمۡ فِي بَعۡضِ ٱلۡأَمۡرِۖ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ إِسۡرَارَهُمۡ
Mpo bango balobaki na baye bayini emoniseli ya Allah ete: Tokotosa bino na ndambu ya makambo, kasi Allah ayebi malamu basekele na bango
Ayah 26فَكَيۡفَ إِذَا تَوَفَّتۡهُمُ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ يَضۡرِبُونَ وُجُوهَهُمۡ وَأَدۡبَٰرَهُمۡ
Mpe ekozala boni soki ba anzelu bazui milimo mia bango, wana bazali kobeta bango na bilongi na mikongo mia bango
Ayah 27ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمُ ٱتَّبَعُواْ مَآ أَسۡخَطَ ٱللَّهَ وَكَرِهُواْ رِضۡوَٰنَهُۥ فَأَحۡبَطَ أَعۡمَٰلَهُمۡ
Wana ezali mpo balandaki maye Allah aboyaki, mpe bazalaki na ntina ya kondima yango te, тре misala mia bango mibebisamaki
Ayah 28أَمۡ حَسِبَ ٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِم مَّرَضٌ أَن لَّن يُخۡرِجَ ٱللَّهُ أَضۡغَٰنَهُمۡ
To boye baye bazali na bokono na mitema mia bango (bakanisi ete) Allah akobimisa bonguna na bango polele te
Ayah 29وَلَوۡ نَشَآءُ لَأَرَيۡنَٰكَهُمۡ فَلَعَرَفۡتَهُم بِسِيمَٰهُمۡۚ وَلَتَعۡرِفَنَّهُمۡ فِي لَحۡنِ ٱلۡقَوۡلِۚ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ أَعۡمَٰلَكُمۡ
Mpe soki tolingaki nde tolakisaki yo bango, oyebi bango na bilembo na bango. Mpe okoyeba bango na lolenge na bango ya koloba. Kasi Allah ayebi misala na bino
Ayah 30وَلَنَبۡلُوَنَّكُمۡ حَتَّىٰ نَعۡلَمَ ٱلۡمُجَٰهِدِينَ مِنكُمۡ وَٱلصَّٰبِرِينَ وَنَبۡلُوَاْ أَخۡبَارَكُمۡ
Mpe tokomeka bino mpo toyeba banani bazali kobunda (тропа Allah), тре banani bazali kokanga mitema, mpo ete na sima tomonisa basango na bino
Ayah 31إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَصَدُّواْ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ وَشَآقُّواْ ٱلرَّسُولَ مِنۢ بَعۡدِ مَا تَبَيَّنَ لَهُمُ ٱلۡهُدَىٰ لَن يَضُرُّواْ ٱللَّهَ شَيۡـࣰٔ ا وَسَيُحۡبِطُ أَعۡمَٰلَهُمۡ
Ya soló, baye bapengwa тре bazali kobundisi nzela ya Allah, mpe baboyi kondimela motindami o sima ya kolimbolela bango bokambi ya polele, wana bakosala Allah eloko te. Kasi akobebisa misala mia bango
Ayah 32۞يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُواْ ٱلرَّسُولَ وَلَا تُبۡطِلُوٓاْ أَعۡمَٰلَكُمۡ
Oh bino baye bondima! Botosa Allah mpe botosa motindami (na ye) kasi bobebisa misala mia bino te
Ayah 33إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَصَدُّواْ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ ثُمَّ مَاتُواْ وَهُمۡ كُفَّارࣱ فَلَن يَغۡفِرَ ٱللَّهُ لَهُمۡ
Ya sólo, baye bapengwa тре babundisaki nzela ya Allah, sima liwa lizui bango sé na bopengwi, Allah akolimbisaka bango te
Ayah 34فَلَا تَهِنُواْ وَتَدۡعُوٓاْ إِلَى ٱلسَّلۡمِ وَأَنتُمُ ٱلۡأَعۡلَوۡنَ وَٱللَّهُ مَعَكُمۡ وَلَن يَتِرَكُمۡ أَعۡمَٰلَكُمۡ
Bolembe te mpe bobenga na kimia te na tango bozali likolo na bango, mpe Allah azali elongo na bino, mpe akokutola misala na bino te
Ayah 35إِنَّمَا ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَا لَعِبࣱ وَلَهۡوࣱۚ وَإِن تُؤۡمِنُواْ وَتَتَّقُواْ يُؤۡتِكُمۡ أُجُورَكُمۡ وَلَا يَسۡـَٔلۡكُمۡ أَمۡوَٰلَكُمۡ
Ya soló, bomoyi ya mokili ezali sé lisano mpe liseki. Soki bondimi mpe bobangi, (Allah) akopesa bino bolamu na bino mpe akosenga bino bomengo te
Ayah 36إِن يَسۡـَٔلۡكُمُوهَا فَيُحۡفِكُمۡ تَبۡخَلُواْ وَيُخۡرِجۡ أَضۡغَٰنَكُمۡ
Soki atunaki bino yango, bolingaki bozala bapimi, mpe akobimisa boyini na bino
Ayah 37هَٰٓأَنتُمۡ هَٰٓؤُلَآءِ تُدۡعَوۡنَ لِتُنفِقُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ فَمِنكُم مَّن يَبۡخَلُۖ وَمَن يَبۡخَلۡ فَإِنَّمَا يَبۡخَلُ عَن نَّفۡسِهِۦۚ وَٱللَّهُ ٱلۡغَنِيُّ وَأَنتُمُ ٱلۡفُقَرَآءُۚ وَإِن تَتَوَلَّوۡاْ يَسۡتَبۡدِلۡ قَوۡمًا غَيۡرَكُمۡ ثُمَّ لَا يَكُونُوٓاْ أَمۡثَٰلَكُم
Bino nde, soki babengi bino ete bobimisa na nzela ya Allah, basusu bakangi maboko, kasi oyo akokanga maboko ayeba ete asali yango na nzoto naye moko, nzoka nde Allah azali wa bomengo mpe bino bozali babola. Mpe soki bopesi mokongo akoya na bato ya sika, mpe bakozala lokola bino te
Ayah 38