Surah Al-Qamar — The Moon
Surah Al-Qamar (The Moon) is chapter 54 of the Quran, with 55 verses. This page presents the Arabic text with a Lingala translation, verse by verse.
ٱقۡتَرَبَتِ ٱلسَّاعَةُ وَٱنشَقَّ ٱلۡقَمَرُ
Ngonga epusani mpe sanza epasuki
Ayah 1وَإِن يَرَوۡاْ ءَايَةࣰ يُعۡرِضُواْ وَيَقُولُواْ سِحۡرࣱ مُّسۡتَمِرࣱّ
Mpe soki bamoni elembo bazali koboya mpe balobi ete: Oyo ezali bonganga ya makasi
Ayah 2وَكَذَّبُواْ وَٱتَّبَعُوٓاْ أَهۡوَآءَهُمۡۚ وَكُلُّ أَمۡرࣲ مُّسۡتَقِرࣱّ
Mpe baboyi kondima balandi makambo na bango moko, nzoka nde likambo nyoso lizali na suka na yango
Ayah 3وَلَقَدۡ جَآءَهُم مِّنَ ٱلۡأَنۢبَآءِ مَا فِيهِ مُزۡدَجَرٌ
Mpe basango bisilaki koyela bango, basango ya kopekisa bango (mabe)
Ayah 4حِكۡمَةُۢ بَٰلِغَةࣱۖ فَمَا تُغۡنِ ٱلنُّذُرُ
Wana ezali bwanya (bolamu), kasi makebisi esali bango eloko te
Ayah 5فَتَوَلَّ عَنۡهُمۡۘ يَوۡمَ يَدۡعُ ٱلدَّاعِ إِلَىٰ شَيۡءࣲ نُّكُرٍ
Mitiya mosika na bango, mokolo oyo mobengi akobengaka epai (ya likambo) linene
Ayah 6خُشَّعًا أَبۡصَٰرُهُمۡ يَخۡرُجُونَ مِنَ ٱلۡأَجۡدَاثِ كَأَنَّهُمۡ جَرَادࣱ مُّنتَشِرࣱ
Bakobima na malita bilongi ya kokitisama, bakopanzana lokola bamakonko
Ayah 7مُّهۡطِعِينَ إِلَى ٱلدَّاعِۖ يَقُولُ ٱلۡكَٰفِرُونَ هَٰذَا يَوۡمٌ عَسِرࣱ
Bakokamata bango kokende mbangu epai ya molobeli, bapagano bakoloba ete: Oyo ezali mokolo ya mpasi mpe mindondo
Ayah 8۞كَذَّبَتۡ قَبۡلَهُمۡ قَوۡمُ نُوحࣲ فَكَذَّبُواْ عَبۡدَنَا وَقَالُواْ مَجۡنُونࣱ وَٱزۡدُجِرَ
Bato ya Nûh bagangaki na lokuta liboso na bango, baboyaki kondimela mowumbu na biso mpe balobaki ete: Oyo azali ligboma mpe bamitiaki mosika naye
Ayah 9فَدَعَا رَبَّهُۥٓ أَنِّي مَغۡلُوبࣱ فَٱنتَصِرۡ
Abengaki Nkolo wa ye (alobi): Ya soló nazali na bokoki te, sunga ngai (na bokasi bwa yo)
Ayah 10فَفَتَحۡنَآ أَبۡوَٰبَ ٱلسَّمَآءِ بِمَآءࣲ مُّنۡهَمِرࣲ
Мре tofungolaki bizibeli ya likolo mayi ebele
Ayah 11وَفَجَّرۡنَا ٱلۡأَرۡضَ عُيُونࣰ ا فَٱلۡتَقَى ٱلۡمَآءُ عَلَىٰٓ أَمۡرࣲ قَدۡ قُدِرَ
Мре topanzaki mabele na miluka mpe mayi makutanaki na mobeko oyo etiyamaki
Ayah 12وَحَمَلۡنَٰهُ عَلَىٰ ذَاتِ أَلۡوَٰحࣲ وَدُسُرࣲ
Mpe tomemaki ye na mabaya na sete oyo esalaki masuwa
Ayah 13تَجۡرِي بِأَعۡيُنِنَا جَزَآءࣰ لِّمَن كَانَ كُفِرَ
Etambolaki na miso na biso,mpe tofutaki baye baboyaki kondima mbano na bango
Ayah 14وَلَقَد تَّرَكۡنَٰهَآ ءَايَةࣰ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرࣲ
Mpe totikaki yango ezala elembo, boye moto azali kaka kokanisa te
Ayah 15فَكَيۡفَ كَانَ عَذَابِي وَنُذُرِ
Lolenge nini etumbu na makebisi na ngai ezalaki
Ayah 16وَلَقَدۡ يَسَّرۡنَا ٱلۡقُرۡءَانَ لِلذِّكۡرِ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرࣲ
Mpe tosilaki kotia kurani ezala pete na bokundoli, boye ezali na moto oyo akoki kokanisa
Ayah 17كَذَّبَتۡ عَادࣱ فَكَيۡفَ كَانَ عَذَابِي وَنُذُرِ
Ba Aad, baboyaki kondimela (bantoma na bango), boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni
Ayah 18إِنَّآ أَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِمۡ رِيحࣰ ا صَرۡصَرࣰ ا فِي يَوۡمِ نَحۡسࣲ مُّسۡتَمِرࣲّ
Ya soló, totindelaki bango mopepe ya makasi koleka ya kozongelama
Ayah 19تَنزِعُ ٱلنَّاسَ كَأَنَّهُمۡ أَعۡجَازُ نَخۡلࣲ مُّنقَعِرࣲ
Ezali kopikola bato lokola biteni ya nagh’l oyo bapikoli
Ayah 20فَكَيۡفَ كَانَ عَذَابِي وَنُذُرِ
Boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni
Ayah 21وَلَقَدۡ يَسَّرۡنَا ٱلۡقُرۡءَانَ لِلذِّكۡرِ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرࣲ
Мре tosilaki kotiya kurani ezala pete na bokundoli, boye ezali na moto oyo akoki kokanisa
Ayah 22كَذَّبَتۡ ثَمُودُ بِٱلنُّذُرِ
Ba Thamúd baboyaki kondimela makebisi
Ayah 23فَقَالُوٓاْ أَبَشَرࣰ ا مِّنَّا وَٰحِدࣰ ا نَّتَّبِعُهُۥٓ إِنَّآ إِذࣰ ا لَّفِي ضَلَٰلࣲ وَسُعُرٍ
Mpe balobaki: Tolanda sé moto moko okati na biso? Noki te tokobunga mpe tokokweya na mabe
Ayah 24أَءُلۡقِيَ ٱلذِّكۡرُ عَلَيۡهِ مِنۢ بَيۡنِنَا بَلۡ هُوَ كَذَّابٌ أَشِرࣱ
Boye baponaki ntoma sé ye kati na biso nyoso? Te; azali sé moto ya lokuta mpe lolendo monene
Ayah 25سَيَعۡلَمُونَ غَدࣰ ا مَّنِ ٱلۡكَذَّابُ ٱلۡأَشِرُ
Bakoyebaka lobi: Nani atondi na lokuta mpe lolendo
Ayah 26إِنَّا مُرۡسِلُواْ ٱلنَّاقَةِ فِتۡنَةࣰ لَّهُمۡ فَٱرۡتَقِبۡهُمۡ وَٱصۡطَبِرۡ
Ya sólo, totindelaki bango náqah lokola ekamwiseli mpe komekama, kengele bango mpe kanga motema
Ayah 27وَنَبِّئۡهُمۡ أَنَّ ٱلۡمَآءَ قِسۡمَةُۢ بَيۡنَهُمۡۖ كُلُّ شِرۡبࣲ مُّحۡتَضَرࣱ
Mpe yebisa bango été mayi ekabuani na biteni mibale kati na bango, bakozala na ntango na bango ya komela, ye mpe na ngonga naye
Ayah 28فَنَادَوۡاْ صَاحِبَهُمۡ فَتَعَاطَىٰ فَعَقَرَ
Мре babengaki moninga na bango azui mbeli babomi ye mpe basasi ye
Ayah 29فَكَيۡفَ كَانَ عَذَابِي وَنُذُرِ
Boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni
Ayah 30إِنَّآ أَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِمۡ صَيۡحَةࣰ وَٰحِدَةࣰ فَكَانُواْ كَهَشِيمِ ٱلۡمُحۡتَظِرِ
Ya soló, totindelaki bango bogangi moko, mpe bango wana bakomi lokola banzete ekawuka
Ayah 31وَلَقَدۡ يَسَّرۡنَا ٱلۡقُرۡءَانَ لِلذِّكۡرِ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرࣲ
Mpe tosilaki kotiya kurani ezala pete тропа bokundoli, boye moto azali te тропа kokanisa
Ayah 32كَذَّبَتۡ قَوۡمُ لُوطِۭ بِٱلنُّذُرِ
Bato ya Loth baboyaki kondimela makebisi
Ayah 33إِنَّآ أَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِمۡ حَاصِبًا إِلَّآ ءَالَ لُوطࣲۖ نَّجَّيۡنَٰهُم بِسَحَرࣲ
Ya sólo, totindelaki bango mopepe ya makasijongola sé libota lia Loth liye tobikisaki ye yambo tongo etana
Ayah 34نِّعۡمَةࣰ مِّنۡ عِندِنَاۚ كَذَٰلِكَ نَجۡزِي مَن شَكَرَ
Na bolamu kowuta epai na biso. Lolenge wana nde tofutaka oyo azali kotondo (Allah)
Ayah 35وَلَقَدۡ أَنذَرَهُم بَطۡشَتَنَا فَتَمَارَوۡاْ بِٱلنُّذُرِ
Mpe asilaki kokebisa bango тропа etumbu na biso, kasi bazangaki kondimela makebisi
Ayah 36وَلَقَدۡ رَٰوَدُوهُ عَن ضَيۡفِهِۦ فَطَمَسۡنَآ أَعۡيُنَهُمۡ فَذُوقُواْ عَذَابِي وَنُذُرِ
Mpe balingaki kokweisa bapaya naye, kasi tokangaki miso na bango, bomeka etumbu na ngai na makebisi na ngai
Ayah 37وَلَقَدۡ صَبَّحَهُم بُكۡرَةً عَذَابࣱ مُّسۡتَقِرࣱّ
Мре etumbu ya makasi ezuaki bango na ntongo
Ayah 38فَذُوقُواْ عَذَابِي وَنُذُرِ
Bomeka etumbu na ngai mpe makebisi na ngai
Ayah 39وَلَقَدۡ يَسَّرۡنَا ٱلۡقُرۡءَانَ لِلذِّكۡرِ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرࣲ
Mpe totiyaki kurani ezala pete тропа bokundoli,boye ezali na moto te ya kokanisa
Ayah 40وَلَقَدۡ جَآءَ ءَالَ فِرۡعَوۡنَ ٱلنُّذُرُ
Mpe ya soló, makebisi makomelaka bato ya falo
Ayah 41كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا كُلِّهَا فَأَخَذۡنَٰهُمۡ أَخۡذَ عَزِيزࣲ مُّقۡتَدِرٍ
Baboyaki kondima na bilembo bia biso nionso, mpe tozuaki bango na bozwi ya oyo azali na nguya atonda makoki
Ayah 42أَكُفَّارُكُمۡ خَيۡرࣱ مِّنۡ أُوْلَٰٓئِكُمۡ أَمۡ لَكُم بَرَآءَةࣱ فِي ٱلزُّبُرِ
Boye bapengwi na bino bazali malamu koleka ba oyo kuna? То ezali na eloko ya kobatela bino okati ya makomi
Ayah 43أَمۡ يَقُولُونَ نَحۡنُ جَمِيعࣱ مُّنتَصِرࣱ
Bazali koloba: Tozali lisanga (makasi) tokolonga
Ayah 44سَيُهۡزَمُ ٱلۡجَمۡعُ وَيُوَلُّونَ ٱلدُّبُرَ
Lisanga na bango ekopanzana mpe bakokima
Ayah 45بَلِ ٱلسَّاعَةُ مَوۡعِدُهُمۡ وَٱلسَّاعَةُ أَدۡهَىٰ وَأَمَرُّ
Ngonga moko ya mpamba nde elaka na bango, mpe yango ezali nsomo mpe bololo
Ayah 46إِنَّ ٱلۡمُجۡرِمِينَ فِي ضَلَٰلࣲ وَسُعُرࣲ
Ya soló batomboki bazali na libungi mpe na kati ya moto
Ayah 47يَوۡمَ يُسۡحَبُونَ فِي ٱلنَّارِ عَلَىٰ وُجُوهِهِمۡ ذُوقُواْ مَسَّ سَقَرَ
Mokolo oyo bakobendamaka na bilongi na bango okati ya moto, bomeka etumbu ya lifelo
Ayah 48إِنَّا كُلَّ شَيۡءٍ خَلَقۡنَٰهُ بِقَدَرࣲ
Ya soló, tokelaki biloko binso na bokoki
Ayah 49وَمَآ أَمۡرُنَآ إِلَّا وَٰحِدَةࣱ كَلَمۡحِۭ بِٱلۡبَصَرِ
Mpe mitindo mia biso mizalaka sé liloba moko, ezali sé lokola kobuka liso
Ayah 50وَلَقَدۡ أَهۡلَكۡنَآ أَشۡيَاعَكُمۡ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرࣲ
Mpe tosilaki koboma bato liboso lokola bino, boye ezali na moto yakokanisa te
Ayah 51وَكُلُّ شَيۡءࣲ فَعَلُوهُ فِي ٱلزُّبُرِ
Mpe biloko binso biye bisalama bisila kokomama kati na (buku)
Ayah 52وَكُلُّ صَغِيرࣲ وَكَبِيرࣲ مُّسۡتَطَرٌ
(Biloko) nyoso, ezala ya moke to ya monene ekomama
Ayah 53إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي جَنَّٰتࣲ وَنَهَرࣲ
Ya sólo, babangi (Allah) bakozalaka na kati ya lola mpe mpene ya mingala ezali koleka na nsé na yango
Ayah 54فِي مَقۡعَدِ صِدۡقٍ عِندَ مَلِيكࣲ مُّقۡتَدِرِۭ
Mpe esika ya bosembo yakofanda pene na mokonzi wa bokoki (Allah)
Ayah 55